< Exodus 20 >

1 And the Lord spoke all these words:
Tala maloba oyo Nzambe alobaki:
2 I am the Lord thy God, who brought thee out of the land of Egypt, out of the house of bondage.
« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.
3 Thou shalt not have strange gods before me.
Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
4 Thou shalt not make to thyself a graven thing, nor the likeness of any thing that is in heaven above, or in the earth beneath, nor of those things that are in the waters under the earth.
Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.
5 Thou shalt not adore them, nor serve them: I am the Lord thy God, mighty, jealous, visiting the iniquity of the fathers upon the children, unto the third and fourth generation of them that hate me:
Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
6 And shewing mercy unto thousands to them that love me, and keep my commandments.
Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.
7 Thou shalt not take the name of the Lord thy God in vain: for the Lord will not hold him guiltless that shall take the name of the Lord his God in vain.
Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.
8 Remember that thou keep holy the sabbath day.
Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango.
9 Six days shalt thou labour, and shalt do all thy works.
Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.
10 But on the seventh day is the sabbath of the Lord thy God: thou shalt do no work on it, thou nor thy son, nor thy daughter, nor thy manservant, nor thy maidservant, nor thy beast, nor the stranger that is within thy gates.
Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te; ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo.
11 For in six days the Lord made heaven and earth, and the sea, and all things that are in them, and rested on the seventh day: therefore the Lord blessed the seventh day, and sanctified it.
Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango.
12 Honour thy father and thy mother, that thou mayest be longlived upon the land which the Lord thy God will give thee.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
13 Thou shalt not kill.
Okobomaka te.
14 Thou shalt not commit adultery.
Okosalaka ekobo te.
15 Thou shalt not steal.
Okoyibaka te.
16 Thou shalt not bear false witness against thy neighbour.
Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.
17 Thou shalt not covet thy neighbour’s house: neither shalt thou desire his wife, nor his servant, nor his handmaid, nor his ox, nor his ass, nor any thing that is his.
Okolulaka te ndako ya moninga na yo; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. »
18 And all the people saw the voices and the flames, and the sound of the trumpet, and the mount smoking: and being terrified and struck with fear, they stood afar off,
Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika
19 Saying to Moses: Speak thou to us, and we will hear: let not the Lord speak to us, lest we die.
mpe balobaki na Moyize: — Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo; kasi Nzambe te, noki te tokokufa!
20 And Moses said to the people: Fear not: for God is come to prove you, and that the dread of him might be in you, and you should not sin.
Moyize azongiselaki bango: — Bobanga te! Nzambe ayei nde komeka bino mpo ete kobanga Nzambe ezala kati na bino mpe bosala masumu te.
21 And the people stood afar off. But Moses went to the dark cloud wherein God was.
Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki.
22 And the Lord said to Moses: Thus shalt thou say to the children of Israel: You have seen that I have spoken to you from heaven.
Yawe alobaki na Moyize: — Yebisa makambo oyo epai ya bana ya Isalaele: « Bomonaki bino moko ndenge nini nalobelaki bino wuta na likolo.
23 You shall not make gods of silver, nor shall you make to yourselves gods of gold.
Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai.
24 You shall make an altar of earth unto me, and you shall offer upon it your holocausts and peace offerings, your sheep and oxen, in every place where the memory of my name shall be: I will come to thee, and will bless thee.
Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.
25 And if thou make an altar of stone unto me, thou shalt not build it of hewn stones: for if thou lift up a tool upon it, it shall be defiled.
Soki otongeli Ngai etumbelo ya mabanga, okotonga yango te na mabanga oyo bakata; pamba te soki okati yango, okobebisa bosantu na yango.
26 Thou shalt not go up by steps unto my altar, lest thy nakedness be discovered.
Okomata te na etumbelo na Ngai na ematelo mpo ete bolumbu na yo emonana te. »

< Exodus 20 >