< Matthew 22 >

1 And Jesus answering spoke to them again in parables, saying,
Yesu alobaki na bango lisusu na masese:
2 The kingdom of the heavens has become like a king who made a wedding feast for his son,
— Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.
3 and sent his bondmen to call the persons invited to the wedding feast, and they would not come.
Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki.
4 Again he sent other bondmen, saying, Say to the persons invited, Behold, I have prepared my dinner; my oxen and my fatted beasts are killed, and all things ready; come to the wedding feast.
Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango: « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei: nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »
5 But they made light of it, and went, one to his own land, and another to his commerce.
Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba: bamoko bakendeki na bilanga na bango; bamosusu, na mombongo na bango;
6 And the rest, laying hold of his bondmen, ill-treated and slew [them].
mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.
7 And [when] the king [heard of it he] was wroth, and having sent his forces, destroyed those murderers and burned their city.
Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.
8 Then he says to his bondmen, The wedding feast is ready, but those invited were not worthy;
Alobaki na basali na ye: « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.
9 go therefore into the thoroughfares of the highways, and as many as ye shall find invite to the wedding feast.
Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. »
10 And those bondmen went out into the highways, and brought together all as many as they found, both evil and good; and the wedding feast was furnished with guests.
Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna: bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami.
11 And the king, having gone in to see the guests, beheld there a man not clothed with a wedding garment.
Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala.
12 And he says to him, [My] friend, how camest thou in here not having on a wedding garment? But he was speechless.
Atunaki ye: « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.
13 Then said the king to the servants, Bind him feet and hands, and take him away, and cast him out into the outer darkness: there shall be the weeping and the gnashing of teeth.
Bongo mokonzi alobaki na basali na ye: « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
14 For many are called ones, but few chosen ones.
Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.
15 Then went the Pharisees and held a council how they might ensnare him in speaking.
Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.
16 And they send out to him their disciples with the Herodians, saying, Teacher, we know that thou art true and teachest the way of God in truth, and carest not for any one, for thou regardest not men's person;
Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu: — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te;
17 tell us therefore what thou thinkest: Is it lawful to give tribute to Caesar, or not?
yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo: Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare?
18 But Jesus, knowing their wickedness, said, Why tempt ye me, hypocrites?
Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki: — Bato ya bilongi mibale! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo?
19 Shew me the money of the tribute. And they presented to him a denarius.
Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako. Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende.
20 And he says to them, Whose [is] this image and superscription?
Atunaki bango: — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani?
21 They say to him, Caesar's. Then he says to them, Pay then what is Caesar's to Caesar, and what is God's to God.
Bazongisaki: — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango: — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe!
22 And when they heard [him], they wondered, and left him, and went away.
Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki; batikaki Ye mpe bakendeki.
23 On that day came to him Sadducees, who say there is no resurrection; and they demanded of him,
Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye:
24 saying, Teacher, Moses said, If any one die, not having children, his brother shall marry his wife and shall raise up seed to his brother.
— Moteyi, Moyize alobaki: « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. »
25 Now there were with us seven brethren; and the first having married died, and not having seed, left his wife to his brother.
Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye.
26 In like manner also the second and the third, unto the seven.
Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo.
27 And last of all the woman also died.
Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
28 In the resurrection therefore of which of the seven shall she be wife, for all had her?
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye?
29 And Jesus answering said to them, Ye err, not knowing the scriptures nor the power of God.
Yesu azongiselaki bango: — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
30 For in the resurrection they neither marry nor are given in marriage, but are as angels of God in heaven.
Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
31 But concerning the resurrection of the dead, have ye not read what was spoken to you by God, saying,
Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino:
32 I am the God of Abraham, and the God of Isaac, and the God of Jacob? God is not God of [the] dead, but of [the] living.
« Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.
33 And when the crowds heard [it] they were astonished at his doctrine.
Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu.
34 But the Pharisees, having heard that he had put the Sadducees to silence, were gathered together.
Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki;
35 And one of them, a lawyer, demanded, tempting him, and saying,
mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye:
36 Teacher, which is the great commandment in the law?
— Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso?
37 And he said to him, Thou shalt love [the] Lord thy God with all thy heart, and with all thy soul, and with all thy understanding.
Yesu azongiselaki ye: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.
38 This is [the] great and first commandment.
Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene.
39 And [the] second is like it, Thou shalt love thy neighbour as thyself.
Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
40 On these two commandments the whole law and the prophets hang.
Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.
41 And the Pharisees being gathered together, Jesus demanded of them,
Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango:
42 saying, What think ye concerning the Christ? whose son is he? They say to him, David's.
— Bozali kokanisa nini na tina na Klisto? Azali Mwana ya nani? Bazongiselaki Ye: — Azali mwana ya Davidi!
43 He says to them, How then does David in Spirit call him Lord, saying,
Alobaki na bango: — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo? Pamba te alobaki:
44 The Lord said to my Lord, Sit on my right hand until I put thine enemies under thy feet?
« Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
45 If therefore David call him Lord, how is he his son?
Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye?
46 And no one was able to answer him a word, nor did any one dare from that day to question him any more.
Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.

< Matthew 22 >