< 1 Kings 2 >

1 And the days of David were at hand that he should die; and he enjoined Solomon his son saying,
Tango Davidi akomaki pene ya kokufa, apesaki malako oyo epai ya Salomo, mwana na ye ya mobali:
2 I go the way of all the earth: be of good courage therefore, and be a man;
— Nalingi kokende na nzela oyo bato nyonso bakendaka. Zala makasi, lakisa ete ozali mobali.
3 and keep the charge of Jehovah thy God, to walk in his ways, to keep his statutes, and his commandments, and his ordinances, and his testimonies, as it is written in the law of Moses, that thou mayest prosper in all that thou doest and whithersoever thou turnest thyself;
Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka: tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende;
4 that Jehovah may confirm his word which he spoke concerning me, saying, If thy sons take heed to their way, to walk before me in truth with all their heart and with all their soul, there shall not fail thee, said he, a man upon the throne of Israel.
mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo: « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele.
5 And thou knowest also what Joab the son of Zeruiah did to me, what he did to the two captains of the hosts of Israel, to Abner the son of Ner, and to Amasa the son of Jether, whom he slew, and shed the blood of war in peace, and put the blood of war upon his girdle that was about his loins, and upon his sandals that were on his feet.
Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele: Abineri, mwana mobali ya Neri; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.
6 And thou shalt do according to thy wisdom, and not let his hoar head go down to Sheol in peace. (Sheol h7585)
Salela ye kolanda bwanya na yo mpe kotika te ete suki na ye ya pembe ekita na kimia na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
7 But shew kindness to the sons of Barzillai the Gileadite, and let them be of those that eat at thy table; for so they came up to me when I fled because of Absalom thy brother.
Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali.
8 And behold, there is with thee Shimei the son of Gera, the Benjaminite of Bahurim, who cursed me with a grievous curse in the day that I went to Mahanaim; but he came down to meet me at the Jordan, and I swore to him by Jehovah saying, I will not put thee to death with the sword.
Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe: ‹ Nakoboma yo na mopanga te. ›
9 And now hold him not guiltless; for thou art a wise man, and thou shalt know what thou oughtest to do to him; but bring his hoar head down to Sheol with blood. (Sheol h7585)
Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. » (Sheol h7585)
10 And David slept with his fathers, and was buried in the city of David.
Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.
11 And the days that David reigned over Israel were forty years: he reigned seven years in Hebron, and he reigned thirty-three years in Jerusalem.
Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei: mibu sambo na Ebron, mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
12 And Solomon sat on the throne of David his father; and his kingdom was established greatly.
Salomo avandaki na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ye, mpe bokonzi na ye elendisamaki.
13 And Adonijah the son of Haggith came to Bathsheba the mother of Solomon. And she said, Comest thou peaceably? And he said, Peaceably.
Adoniya, mwana mobali ya Agite, akendeki epai ya Batisheba, mama ya Salomo. Batisheba atunaki ye: — Boni, oyei kotala ngai na kimia? Azongisaki: — Iyo, nayei na kimia.
14 And he said, I have something to say to thee. And she said, Speak.
Abakisaki: — Nazali na likambo moko ya koyebisa yo. Batisheba azongisaki: — Okoki koloba yango.
15 And he said, Thou knowest that the kingdom was mine, and all Israel had set their faces on me that I should reign; but the kingdom is turned about and is become my brother's, for it was his from Jehovah.
Adoniya alobaki: — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.
16 And now I ask one petition of thee; refuse me not. And she said to him, Speak.
Sik’oyo, nazali na bosenga moko, kopimela ngai yango te. Batisheba alobaki: — Okoki koloba yango.
17 And he said, Speak, I pray thee, to Solomon the king — for he will not refuse thee — that he give me Abishag the Shunammite as wife.
Adoniya alobaki: — Nabondeli yo, loba na mokonzi Salomo ete apesa ngai Abishagi, moto ya Sunami, mpo ete akoma mwasi na ngai, pamba te mokonzi akoki koboya te koyokela yo.
18 And Bathsheba said, Well, I will speak for thee to the king.
Batisheba azongisaki: — Malamu! Ngai moko nakolobela yo epai ya mokonzi.
19 And Bathsheba went to king Solomon, to speak to him for Adonijah. And the king rose up to meet her, and bowed himself to her, and sat down on his throne; and he caused a throne to be set for the king's mother, and she sat on his right hand.
Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.
20 Then she said, I desire one small petition of thee; refuse me not. And the king said to her, Ask, my mother, for I will not refuse thee.
Batisheba alobaki: — Nazali na bosenga moko ya moke mpo na koyebisa yo, kasi kopimela ngai yango te. Mokonzi azongisaki: — Loba na yo, mama na ngai; nakopimela yo yango te.
21 And she said, Let Abishag the Shunammite be given to Adonijah thy brother as wife.
Batisheba alobaki: — Tika ete Abishagi, moto ya Sunami, akoma mwasi ya Adoniya, ndeko na yo ya mobali.
22 And king Solomon answered and said to his mother, And why dost thou ask Abishag the Shunammite for Adonijah? ask for him the kingdom also; for he is mine elder brother; even for him, and for Abiathar the priest, and for Joab the son of Zeruiah.
Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye: — Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya!
23 And king Solomon swore by Jehovah saying, God do so to me, and more also, — Adonijah has spoken this word against his own life!
Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe: — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo!
24 And now [as] Jehovah liveth, who has established me, and set me on the throne of David my father, and who has made me a house, as he promised, Adonijah shall be put to death this day.
Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.
25 And king Solomon sent by the hand of Benaiah the son of Jehoiada; who fell on him, that he died.
Mokonzi Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, kobeta Adoniya; mpe Adoniya akufaki.
26 And the king said to Abiathar the priest, Go to Anathoth, to thine own fields; for thou art worthy of death; but I will not at this time put thee to death, because thou didst bear the ark of Adonai Jehovah before David my father, and because thou hast been afflicted in all wherein my father was afflicted.
Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari: — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.
27 And Solomon thrust out Abiathar from being priest to Jehovah, to fulfil the word of Jehovah, which he had spoken concerning the house of Eli in Shiloh.
Boye, Salomo alongolaki Abiatari na mosala na ye ya Nganga-Nzambe ya Yawe, mpo na kokokisa maloba oyo Yawe alobaki na Silo na tina na libota ya Eli.
28 And the report came to Joab (for Joab had turned after Adonijah, though he had not turned after Absalom); and Joab fled to the tent of Jehovah, and caught hold of the horns of the altar.
Tango sango ekomaki epai ya Joabi, ye oyo abundelaki Adoniya kasi Abisalomi te, akimaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe asimbaki maseke ya etumbelo.
29 And it was told king Solomon that Joab had fled to the tent of Jehovah; and behold, he is by the altar. And Solomon sent Benaiah the son of Jehoiada, saying, Go, fall on him.
Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye.
30 And Benaiah came to the tent of Jehovah and said to him, Thus saith the king: Come forth. And he said, No; for I will die here. And Benaiah brought the king word again, saying, Thus said Joab, and thus he answered me.
Benaya akotaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe alobaki na Joabi: — Mokonzi alobi ete obima. Kasi Joabi azongisaki: — Te, nakokufela kaka awa! Benaya azongaki epai ya mokonzi mpo na koyebisa ye eyano ya Joabi.
31 And the king said to him, Do as he has said, and fall upon him, and bury him; and take away the innocent blood, which Joab shed, from me and from the house of my father.
Mokonzi apesaki ye mitindo: — Sala ndenge alobi; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.
32 And Jehovah shall requite the blood which he shed upon his own head, because he fell upon two men more righteous and better than he, and slew them with the sword, without my father David's knowledge: Abner the son of Ner, captain of the host of Israel, and Amasa the son of Jether, captain of the host of Judah.
Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango: Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.
33 And their blood shall be requited upon the head of Joab, and upon the head of his seed for ever; but upon David, and upon his seed, and upon his house, and upon his throne, shall there be peace for ever from Jehovah.
Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.
34 And Benaiah the son of Jehoiada went up and fell upon him, and put him to death; and he was buried in his own house in the wilderness.
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, akendeki kobeta Joabi mpe abomaki ye. Bakundaki ye na ndako na ye moko, kati na esobe.
35 And the king put Benaiah the son of Jehoiada in his stead over the host; and Zadok the priest the king put in the stead of Abiathar.
Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.
36 And the king sent and called for Shimei, and said to him, Build thee a house in Jerusalem, and abide there, and go not forth thence anywhere.
Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye: — Tonga ndako kati na Yelusalemi mpe vanda kuna. Okokende esika mosusu te.
37 And it shall be that on the day thou goest forth, and passest over the torrent of Kidron, ...know for certain that thou shalt surely die: thy blood shall be upon thine own head.
Mokolo oyo okobima mpe okokatisa lubwaku ya Sedron, okokufa, mpe makila na yo ekotangama na moto na yo moko.
38 And Shimei said to the king, The saying is good: as my lord the king has said, so will thy servant do. And Shimei dwelt in Jerusalem many days.
Shimei azongiselaki mokonzi: — Makambo oyo olobi ezali malamu! Mowumbu na yo akosala ndenge mokonzi, nkolo na ngai, alobi. Shimei avandaki na Yelusalemi mikolo ebele.
39 And it came to pass at the end of three years, that two servants of Shimei's ran away to Achish son of Maachah, king of Gath. And they told Shimei saying, Behold, thy servants are in Gath.
Kasi sima na mibu misato, bawumbu mibale kati na bawumbu ya Shimei bakimaki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maaka, mokonzi ya Gati. Bayebisaki Shimei ete bawumbu na ye bazali na Gati.
40 Then Shimei arose, and saddled his ass, and went to Gath, to Achish, to seek his servants; and Shimei went, and brought his servants from Gath.
Tango Shimei ayokaki bongo, abongisaki ane na ye mpe akendeki epai ya Akishi, na Gati, mpo na koluka bawumbu na ye. Shimei akendeki penza na Gati mpe azongisaki bawumbu yango na Yelusalemi.
41 And it was told Solomon that Shimei had gone from Jerusalem to Gath, and had come again.
Bamemelaki Salomo sango ete Shimei alongwaki na Yelusalemi, akendeki na Gati mpe azongi.
42 And the king sent and called for Shimei, and said to him, Did I not make thee swear by Jehovah, and protest to thee, saying, Know for certain, that on the day thou goest forth, and walkest abroad anywhere, thou shalt surely die? and thou saidst to me, The word that I have heard is good.
Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye: — Nalapisaki yo ndayi te na Kombo na Yawe mpe nakebisaki yo te ete mokolo oyo okobima mpo na kokende esika mosusu, okokufa penza? Mpe na mokolo yango, olobaki na ngai: « Makambo oyo olobi ezali malamu, nakotosa. »
43 Why then hast thou not kept the oath of Jehovah, and the commandment that I charged thee with?
Mpo na nini okokisi te ndayi na yo epai na Yawe mpo na kotosa mitindo oyo napesaki?
44 And the king said to Shimei, Thou knowest all the wickedness of which thy heart is conscious, which thou didst to David my father; and Jehovah returns thy wickedness upon thine own head;
Mokonzi alobaki lisusu na Shimei: — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.
45 and king Solomon shall be blessed, and the throne of David shall be established before Jehovah for ever.
Kasi mokonzi Salomo akopambolama, mpe kiti ya bokonzi ya Davidi ekolendisama makasi liboso ya Yawe mpo na libela.
46 And the king commanded Benaiah the son of Jehoiada; who went out and fell upon him, and he died. And the kingdom was established in the hand of Solomon.
Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.

< 1 Kings 2 >