< Deuteronomy 32 >

1 Give ear, O heavens, to my voice; let the earth take note of the words of my mouth:
Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai!
2 My teaching is dropping like rain, coming down like dew on the fields; like rain on the young grass and showers on the garden plants:
Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona!
3 For I will give honour to the name of the Lord: let our God be named great.
Nakosakola Kombo ya Yawe. Bokumisa monene ya Nzambe na biso!
4 He is the Rock, complete is his work; for all his ways are righteousness: a God without evil who keeps faith, true and upright is he.
Yawe azali lokola Libanga; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te; azali sembo mpe alima.
5 They have become false, they are not his children, the mark of sin is on them; they are an evil and hard-hearted generation.
Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.
6 Is this your answer to the Lord, O foolish people and unwise? Is he not your father who has given you life? He has made you and given you your place.
Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya! Boni, Yawe azali Tata na bino te? Azali Mokeli na bino te? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.
7 Keep in mind the days of the past, give thought to the years of generations gone by: go to your father and he will make it clear to you, to the old men and they will give you the story.
Bokanisa mikolo ya kala, mpe botala milongo oyo eleka kala! Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino. Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino.
8 When the Most High gave the nations their heritage, separating into groups the children of men, he had the limits of the peoples marked out, keeping in mind the number of the children of Israel.
Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.
9 For the Lord's wealth is his people; Jacob is the land of his heritage.
Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye; Jakobi azali libula na Ye.
10 He came to him in the waste land, in the unpeopled waste of sand: putting his arms round him and caring for him, he kept him as the light of his eye.
Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.
11 As an eagle, teaching her young to make their flight, with her wings outstretched over them, takes them up on her strong feathers:
Azali lokola mpongo oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.
12 So the Lord only was his guide, no other god was with him.
Ye moko Yawe akambaki bango; nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye.
13 He put him on the high places of the earth, his food was the increase of the field; honey he gave him out of the rock and oil out of the hard rock;
Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,
14 Butter from his cows and milk from his sheep, with fat of lambs and sheep of Bashan, and goats, and the heart of the grain; and for your drink, wine from the blood of the grape.
miliki ya bangombe mpe ya bameme; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.
15 But Jeshurun became fat and would not be controlled: you have become fat, you are thick and full of food: then he was untrue to the God who made him, giving no honour to the Rock of his salvation.
Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.
16 The honour which was his they gave to strange gods; by their disgusting ways he was moved to wrath.
Bapesaki Yawe kanda makasi likolo ya banzambe na bango ya bapaya, mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.
17 They made offerings to evil spirits which were not God, to gods who were strange to them, which had newly come up, not feared by your fathers.
Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe oyo ezali Nzambe te; babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te, banzambe oyo ebimaki sika, banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.
18 You have no thought for the Rock, your father, you have no memory of the God who gave you birth.
Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.
19 And the Lord saw with disgust the evil-doing of his sons and daughters.
Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango, pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda.
20 And he said, My face will be veiled from them, I will see what their end will be: for they are an uncontrolled generation, children in whom is no faith.
Alobaki: « Nakobombela bango elongi na Ngai, mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala, pamba te bazali molongo ya bato mabe, bana bazanga boyengebene.
21 They have given my honour to that which is not God, moving me to wrath with their false worship: I will give their honour to those who are not a people, moving them to wrath by a foolish nation,
Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.
22 For my wrath is a flaming fire, burning to the deep parts of the underworld, burning up the earth with her increase, and firing the deep roots of the mountains. (Sheol h7585)
Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba. (Sheol h7585)
23 I will send a rain of troubles on them, my arrows will be showered on them.
Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.
24 They will be wasted from need of food, and overcome by burning heat and bitter destruction; and the teeth of beasts I will send on them, with the poison of the worms of the dust.
Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.
25 Outside they will be cut off by the sword, and in the inner rooms by fear; death will take the young man and the virgin, the baby at the breast and the grey-haired man.
Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana; kati na bandako na bango, somo ekokonza; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.
26 I said I would send them wandering far away, I would make all memory of them go from the minds of men:
Nalobaki: Nakopanza bango mpe nakosala ete bato babosana bango.
27 But for the fear that their haters, uplifted in their pride, might say, Our hand is strong, the Lord has not done all this.
Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai mpe bayini na bango bamikosa te na koloba: ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, Yawe asalaki eloko moko te. › »
28 For they are a nation without wisdom; there is no sense in them.
Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele, bazali na bososoli te kati na bango.
29 If only they were wise, if only this was clear to them, and they would give thought to their future!
Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala!
30 How would it be possible for one to overcome a thousand, and two to send ten thousand in flight, if their rock had not let them go, if the Lord had not given them up?
Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te?
31 For their rock is not like our Rock, even our haters themselves being judges.
Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te; bango moko banguna na biso bayebi yango.
32 For their vine is the vine of Sodom, from the fields of Gomorrah: their grapes are the grapes of evil, and the berries are bitter:
Bilanga na bango ya vino ewuti na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore. Bambuma na bango etondi na ngenge, mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.
33 Their wine is the poison of dragons, the cruel poison of snakes.
Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.
34 Is not this among my secrets, kept safe in my store-house?
« Boni, ebombami epai na Ngai te? Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai?
35 Punishment is mine and reward, at the time of the slipping of their feet: for the day of their downfall is near, sudden will be their fate.
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
36 For the Lord will be judge of his people, he will have pity for his servants; when he sees that their power is gone, there is no one, shut up or free.
Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.
37 And he will say, Where are their gods, the rock in which they put their faith?
Bongo akoloba: « Wapi banzambe na bango? Wapi libanga epai wapi babombamaki?
38 Who took the fat of their offerings, and the wine of their drink offering? Let them now come to your help, let them be your salvation.
Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango mpe komela makabo na bango ya vino? Tika ete etelema mpo na kosalisa bino mpe kopesa bino ebombamelo!
39 See now, I myself am he; there is no other god but me: giver of death and life, wounding and making well: and no one has power to make you free from my hand.
Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe; mosusu azali te! Nabomaka mpe napesaka bomoi; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.
40 For lifting up my hand to heaven I say, By my unending life,
Natomboli loboko na Ngai na likolo, mpe nalobi: Na Kombo na Ngai,
41 If I make sharp my shining sword, and my hand is outstretched for judging, I will give punishment to those who are against me, and their right reward to my haters.
tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
42 I will make my arrows red with blood, my sword will be feasting on flesh, with the blood of the dead and the prisoners, of the long-haired heads of my haters.
Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »
43 Be glad, O you his people, over the nations; for he will take payment for the blood of his servants, and will give punishment to his haters, and take away the sin of his land, for his people.
Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.
44 So Moses said all the words of this song in the hearing of the people, he and Hoshea, the son of Nun.
Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.
45 And after saying all this to the people,
Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele,
46 Moses said to them, Let the words which I have said to you today go deep into your hearts, and give orders to your children to do every word of this law.
alobaki na bango lisusu: « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.
47 And this is no small thing for you, but it is your life, and through this you may make your days long in the land which you are going over Jordan to take for your heritage.
Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
48 That same day the Lord said to Moses,
Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize:
49 Go up into this mountain of Abarim, to Mount Nebo in the land of Moab opposite Jericho; there you may see the land of Canaan, which I am giving to the children of Israel for their heritage:
« Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango.
50 And let death come to you on the mountain where you are going, and be put to rest with your people; as death came to Aaron, your brother, on Mount Hor, where he was put to rest with his people:
Okokufa na ngomba oyo okomata; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,
51 Because of your sin against me before the children of Israel at the waters of Meribath Kadesh in the waste land of Zin; because you did not keep my name holy among the children of Israel.
pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.
52 So you will see the land before you, but you will not go into the land which I am giving to the children of Israel.
Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »

< Deuteronomy 32 >