< Luke 5 >

1 On one occasion, while Jesus was standing by the Lake of Gennesaret with the crowd pressing in on Him to hear the word of God,
Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.
2 He saw two boats at the edge of the lake. The fishermen had left them and were washing their nets.
Amonaki babwato mibale pembeni ya ebale; ezali balobi mbisi nde bakitaki longwa na babwato yango mpo na kosukola minyama na bango.
3 Jesus got into the boat belonging to Simon and asked him to put out a little from shore. And sitting down, He taught the people from the boat.
Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.
4 When Jesus had finished speaking, He said to Simon, “Put out into deep water and let down your nets for a catch.”
Tango asilisaki koteya, alobaki na Simona: — Pusa bwato epai mayi ezali penza mozindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na koloba bambisi.
5 “Master,” Simon replied, “we have worked hard all night without catching anything. But because You say so, I will let down the nets.”
Simona azongiselaki Ye: — Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.
6 When they had done so, they caught such a large number of fish that their nets began to tear.
Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka.
7 So they signaled to their partners in the other boat to come and help them, and they came and filled both boats so full that they began to sink.
Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda.
8 When Simon Peter saw this, he fell at Jesus’ knees. “Go away from me, Lord,” he said, “for I am a sinful man.”
Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki: — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu!
9 For he and his companions were astonished at the catch of fish they had taken,
Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki.
10 and so were his partners James and John, the sons of Zebedee. “Do not be afraid,” Jesus said to Simon. “From now on you will catch men.”
Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona: — Kobanga te! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.
11 And when they had brought their boats ashore, they left everything and followed Him.
Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu.
12 While Jesus was in one of the towns, a man came along who was covered with leprosy. When he saw Jesus, he fell facedown and begged Him, “Lord, if You are willing, You can make me clean.”
Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye: — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
13 Jesus reached out His hand and touched the man. “I am willing,” He said. “Be clean!” And immediately the leprosy left him.
Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki: — Solo, nalingi yango, koma peto! Mbala moko, maba esilaki.
14 “Do not tell anyone,” Jesus instructed him. “But go, show yourself to the priest and present the offering Moses prescribed for your cleansing, as a testimony to them.”
Yesu apesaki ye mitindo: — Koloba na moto moko te makambo oyo ekomeli yo, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe, mpo na kopetolama na yo, pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko, mpo ete ezala litatoli mpo na bango.
15 But the news about Jesus spread all the more, and great crowds came to hear Him and to be healed of their sicknesses.
Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.
16 Yet He frequently withdrew to the wilderness to pray.
Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.
17 One day Jesus was teaching, and the Pharisees and teachers of the law were sitting there. People had come from Jerusalem and from every village of Galilee and Judea, and the power of the Lord was present for Him to heal the sick.
Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bayaki kovanda wana; bawutaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yuda mpe na Yelusalemi. Mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na Yesu mpo na kobikisa babeli.
18 Just then some men came carrying a paralyzed man on a mat. They tried to bring him inside to set him before Jesus,
Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu.
19 but they could not find a way through the crowd. So they went up on the roof and lowered him on his mat through the tiles into the middle of the crowd, right in front of Jesus.
Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.
20 When Jesus saw their faith, He said, “Friend, your sins are forgiven.”
Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki: — Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami!
21 But the scribes and Pharisees began thinking to themselves, “Who is this man who speaks blasphemy? Who can forgive sins but God alone?”
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa: — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te?
22 Knowing what they were thinking, Jesus replied, “Why are you thinking these things in your hearts?
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango: — Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino?
23 Which is easier: to say, ‘Your sins are forgiven,’ or to say, ‘Get up and walk?’
Likambo nini eleki pete mpo na koloba: « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola? »
24 But so that you may know that the Son of Man has authority on the earth to forgive sins...” He said to the paralytic, “I tell you, get up, pick up your mat, and go home.”
Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono: « Nalobi na yo: Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo! »
25 And immediately the man stood up before them, took what he had been lying on, and went home glorifying God.
Mbala moko, atelemaki liboso na bango, akamataki tsipoyi oyo bazalaki kolalisa ye na yango, azongaki na ndako na ye na kokumisa Nzambe.
26 Everyone was taken with amazement and glorified God. They were filled with awe and said, “We have seen remarkable things today.”
Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba: « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa! »
27 After this, Jesus went out and saw a tax collector named Levi sitting at the tax booth. “Follow Me,” He told him,
Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye: « Landa Ngai. »
28 and Levi got up, left everything, and followed Him.
Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu.
29 Then Levi hosted a great banquet for Jesus at his house. A large crowd of tax collectors was there, along with others who were eating with them.
Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango.
30 But the Pharisees and their scribes complained to Jesus’ disciples, “Why do you eat and drink with tax collectors and sinners?”
Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu: — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu?
31 Jesus answered, “It is not the healthy who need a doctor, but the sick.
Yesu azongiselaki bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
32 I have not come to call the righteous, but sinners, to repentance.”
Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.
33 Then they said to Him, “John’s disciples and those of the Pharisees frequently fast and pray, but Yours keep on eating and drinking.”
Bafarizeo balobaki na Yesu: — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarizeo bakilaka bilei mbala na mbala mpe bamipesaka na mabondeli; kasi bayekoli na yo, mosala na bango kaka kolia mpe komela?
34 Jesus replied, “Can you make the guests of the bridegroom fast while He is with them?
Yesu azongiselaki bango: — Boni, bokoki solo kosenga na bato oyo babengami na feti ya libala ete bakila bilei wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango?
35 But the time will come when the bridegroom will be taken from them; then they will fast.”
Tango ezali koya, oyo mobali ya libala akozala lisusu te elongo na bango; ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
36 He also told them a parable: “No one tears a piece of cloth from a new garment and sews it on an old one. If he does, he will tear the new garment as well, and the patch from the new will not match the old.
Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo: — Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala.
37 And no one pours new wine into old wineskins. If he does, the new wine will burst the skins, the wine will spill, and the wineskins will be ruined.
Moto moko mpe te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala; soki te, vino ya sika ekopasola bambeki mpe ekosopana, mpe bambeki ekobeba libela.
38 Instead, new wine is poured into new wineskins.
Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika.
39 And no one after drinking old wine wants new, for he says, ‘The old is better.’”
Mpe moto moko te alingaka komela vino ya sika soki awuti komela vino ya kala, pamba te balobaka: « Vino ya kala eleki kitoko. »

< Luke 5 >