< Numbers 36 >

1 The heads of the fathers’ households of the family of the children of Gilead, the son of Machir, the son of Manasseh, of the families of the sons of Joseph, came near and spoke before Moses and before the princes, the heads of the fathers’ households of the children of Israel.
Bakonzi ya mabota ya etuka ya bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase mpe mokitani ya Jozefi, bayaki liboso ya Moyize mpe liboso ya bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosolola na bango.
2 They said, “The LORD commanded my lord to give the land for inheritance by lot to the children of Israel. My lord was commanded by the LORD to give the inheritance of Zelophehad our brother to his daughters.
Balobaki: « Tango Yawe apesaki mitindo epai ya nkolo na ngai ete apesa mokili lokola libula epai ya bana ya Isalaele na kobeta zeke, apesaki yo mpe mitindo ya kopesa libula ya Tselofikadi, ndeko na biso ya mobali, epai ya bana na ye ya basi.
3 If they are married to any of the sons of the other tribes of the children of Israel, then their inheritance will be taken away from the inheritance of our fathers, and will be added to the inheritance of the tribe to which they shall belong. So it will be taken away from the lot of our inheritance.
Boye, soki esalemi ete bana basi yango babali mibali oyo bawuti na mabota mosusu ya Isalaele, libula na bango ekolongwa na libula ya batata na biso, mpe bakobakisa yango na libula ya libota ya mibali oyo bakobala bango. Bongo, libula oyo epesamelaki biso ekokoma moke.
4 When the jubilee of the children of Israel comes, then their inheritance will be added to the inheritance of the tribe to which they shall belong. So their inheritance will be taken away from the inheritance of the tribe of our fathers.”
Tango mobu ya kosepela kokangolama ekokoma mpo na bana ya Isalaele, libula ya bana basi yango ekobakisama na libula ya mabota ya mibali oyo babalaki bango, mpe bakozwa mabele na bango wuta na libula ya libota ya bakoko na biso. »
5 Moses commanded the children of Israel according to the LORD’s word, saying, “The tribe of the sons of Joseph speak what is right.
Boye, na etinda ya Yawe, Moyize epesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele: « Makambo oyo libota ya bakitani ya Jozefi balobi ezali na nzela.
6 This is the thing which the LORD commands concerning the daughters of Zelophehad, saying, ‘Let them be married to whom they think best, only they shall marry into the family of the tribe of their father.
Tala liloba oyo Yawe alobaki mpo na bana basi ya Tselofikadi: ‹ Bakoki solo kobalana na mibali nyonso oyo bango balingi, kasi ezala kaka kati na mibali ya libota ya tata na bango.
7 So shall no inheritance of the children of Israel move from tribe to tribe; for the children of Israel shall all keep the inheritance of the tribe of his fathers.
Pamba te libula moko te kati na Isalaele ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu; moto nyonso ya Isalaele asengeli kobatela mabele ya libota oyo azwaki lokola libula wuta na bakoko na ye.
8 Every daughter who possesses an inheritance in any tribe of the children of Israel shall be wife to one of the family of the tribe of her father, that the children of Israel may each possess the inheritance of his fathers.
Mwana mwasi nyonso kati na bikolo ya Isalaele oyo akozwa mabele lokola libula asengeli kobalana kaka na mobali ya libota ya tata na ye mpo ete moto nyonso ya Isalaele azwa libula ya tata na ye.
9 So shall no inheritance move from one tribe to another tribe; for the tribes of the children of Israel shall each keep his own inheritance.’”
Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › »
10 The daughters of Zelophehad did as the LORD commanded Moses:
Boye, bana basi ya Tselofikadi basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
11 for Mahlah, Tirzah, Hoglah, Milcah, and Noah, the daughters of Zelophehad, were married to their father’s brothers’ sons.
Bana basi ya Tselofikadi: Mala, Tiritsa, Ogila, Milika mpe Noa; babalanaki na bandeko na bango, na ngambo ya libota ya tata na bango.
12 They were married into the families of the sons of Manasseh the son of Joseph. Their inheritance remained in the tribe of the family of their father.
Babalanaki kati na etuka ya bakitani ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, mpe libula na bango etikalaki na libota mpe etuka ya tata na bango.
13 These are the commandments and the ordinances which the LORD commanded by Moses to the children of Israel in the plains of Moab by the Jordan at Jericho.
Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.

< Numbers 36 >