< Luke 17 >

1 He said to the disciples, “It is impossible that no occasions of stumbling should come, but woe to him through whom they come!
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka!
2 It would be better for him if a millstone were hung around his neck, and he were thrown into the sea, rather than that he should cause one of these little ones to stumble.
Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo.
3 Be careful. If your brother sins against you, rebuke him. If he repents, forgive him.
Bosala penza keba mpo na bolamu na bino! Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye.
4 If he sins against you seven times in the day, and seven times returns, saying, ‘I repent,’ you shall forgive him.”
Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo: « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye!
5 The apostles said to the Lord, “Increase our faith.”
Bantoma balobaki na Nkolo: — Bakisa kondima na biso!
6 The Lord said, “If you had faith like a grain of mustard seed, you would tell this sycamore tree, ‘Be uprooted and be planted in the sea,’ and it would obey you.
Nkolo azongisaki: — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.
7 But who is there among you, having a servant plowing or keeping sheep, that will say when he comes in from the field, ‘Come immediately and sit down at the table’?
Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga: « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia? »
8 Would not he rather tell him, ‘Prepare my supper, clothe yourself properly, and serve me while I eat and drink. Afterward you shall eat and drink’?
Boni, akoloba na ye te: « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela? »
9 Does he thank that servant because he did the things that were commanded? I think not.
Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye?
10 Even so you also, when you have done all the things that are commanded you, say, ‘We are unworthy servants. We have done our duty.’”
Ndenge moko mpe mpo na bino: soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba: « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »
11 As he was on his way to Jerusalem, he was passing along the borders of Samaria and Galilee.
Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile.
12 As he entered into a certain village, ten men who were lepers met him, who stood at a distance.
Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye; batelemaki na mosika
13 They lifted up their voices, saying, “Jesus, Master, have mercy on us!”
mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi: — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa!
14 When he saw them, he said to them, “Go and show yourselves to the priests.” As they went, they were cleansed.
Tango Yesu amonaki bango, alobaki: — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe! Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto.
15 One of them, when he saw that he was healed, turned back, glorifying God with a loud voice.
Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi.
16 He fell on his face at Jesus’ feet, giving him thanks; and he was a Samaritan.
Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
17 Jesus answered, “Were not the ten cleansed? But where are the nine?
Bongo Yesu atunaki: — Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te? Wapi bato mosusu libwa?
18 Were there none found who returned to give glory to God, except this foreigner?”
Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo?
19 Then he said to him, “Get up, and go your way. Your faith has healed you.”
Bongo alobaki na moto yango ya Samari: — Telema mpe kende; kondima na yo ebikisi yo!
20 Being asked by the Pharisees when God’s Kingdom would come, he answered them, “God’s Kingdom does not come with observation;
Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu: — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini? Yesu azongiselaki bango: — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.
21 neither will they say, ‘Look, here!’ or, ‘Look, there!’ for behold, God’s Kingdom is within you.”
Bakoloba te: « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.
22 He said to the disciples, “The days will come when you will desire to see one of the days of the Son of Man, and you will not see it.
Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.
23 They will tell you, ‘Look, here!’ or ‘Look, there!’ Do not go away or follow after them,
Bakoloba na bino: « Azali awa! » to « Azali kuna! » Bolanda bango te!
24 for as the lightning, when it flashes out of one part under the sky, shines to another part under the sky, so will the Son of Man be in his day.
Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.
25 But first, he must suffer many things and be rejected by this generation.
Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.
26 As it was in the days of Noah, even so it will also be in the days of the Son of Man.
Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto:
27 They ate, they drank, they married, and they were given in marriage until the day that Noah entered into the ship, and the flood came and destroyed them all.
bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.
28 Likewise, even as it was in the days of Lot: they ate, they drank, they bought, they sold, they planted, they built;
Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti: bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.
29 but in the day that Lot went out from Sodom, it rained fire and sulfur from the sky and destroyed them all.
Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.
30 It will be the same way in the day that the Son of Man is revealed.
Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.
31 In that day, he who will be on the housetop and his goods in the house, let him not go down to take them away. Let him who is in the field likewise not turn back.
Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo.
32 Remember Lot’s wife!
Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti!
33 Whoever seeks to save his life loses it, but whoever loses his life preserves it.
Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.
34 I tell you, in that night there will be two people in one bed. One will be taken and the other will be left.
Nazali koloba na bino: na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala;
35 There will be two grinding grain together. One will be taken and the other will be left.”
basi mibale bakozala konika bambuma elongo: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala; [
mibali mibale bakozala kati na elanga moko: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.]
37 They, answering, asked him, “Where, Lord?” He said to them, “Where the body is, there the vultures will also be gathered together.”
Bayekoli batunaki Yesu: — Nkolo, makambo yango ekosalema wapi? Yesu azongiselaki bango: — Epai ebembe ezali, kuna nde bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana.

< Luke 17 >