< Judges 19 >

1 In those days, when there was no king in Israel, there was a certain Levite living on the farther side of the hill country of Ephraim, who took for himself a concubine out of Bethlehem Judah.
Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.
2 His concubine played the prostitute against him, and went away from him to her father’s house to Bethlehem Judah, and was there for four months.
Kasi makangu yango atambolaki na ekobo liboso na ye, alongwaki na libala mpe azongaki na ndako ya tata na ye, na Beteleemi kati na Yuda. Sima na basanza minei wuta azongaki na ndako ya tata na ye,
3 Her husband arose and went after her to speak kindly to her, to bring her again, having his servant with him and a couple of donkeys. She brought him into her father’s house; and when the father of the young lady saw him, he rejoiced to meet him.
mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye.
4 His father-in-law, the young lady’s father, kept him there; and he stayed with him three days. So they ate and drank, and stayed there.
Tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, akangaki ye mpo ete avanda mwa moke. Boye avandaki na ye mikolo misato, aliaki, amelaki mpe alalaki kuna.
5 On the fourth day, they got up early in the morning, and he rose up to depart. The young lady’s father said to his son-in-law, “Strengthen your heart with a morsel of bread, and afterward you shall go your way.”
Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye: « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi; bongo sima, okoki na yo kokende. »
6 So they sat down, ate, and drank, both of them together. Then the young lady’s father said to the man, “Please be pleased to stay all night, and let your heart be merry.”
Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki: « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »
7 The man rose up to depart; but his father-in-law urged him, and he stayed there again.
Mobali atelemaki mpo na kokende; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango.
8 He arose early in the morning on the fifth day to depart; and the young lady’s father said, “Please strengthen your heart and stay until the day declines;” and they both ate.
Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki: « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko.
9 When the man rose up to depart, he, and his concubine, and his servant, his father-in-law, the young lady’s father, said to him, “Behold, now the day draws toward evening, please stay all night. Behold, the day is ending. Stay here, that your heart may be merry; and tomorrow go on your way early, that you may go home.”
Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye: « Tala, pokwa esili koya! Nabondeli yo: lekisa lisusu butu awa; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »
10 But the man would not stay that night, but he rose up and went near Jebus (also called Jerusalem). With him were a couple of saddled donkeys. His concubine also was with him.
Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza.
11 When they were by Jebus, the day was far spent; and the servant said to his master, “Please come and let’s enter into this city of the Jebusites, and stay in it.”
Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye: — Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu.
12 His master said to him, “We will not enter into the city of a foreigner that is not of the children of Israel; but we will pass over to Gibeah.”
Nkolo azongiselaki ye: — Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali; tokokoma kino na Gibea.
13 He said to his servant, “Come and let’s draw near to one of these places; and we will lodge in Gibeah, or in Ramah.”
Alobaki lisusu na mosali na ye: — Yaka, topusana pene na moko ya bamboka oyo; bongo tokolekisa butu kati na Gibea to na Rama.
14 So they passed on and went their way; and the sun went down on them near Gibeah, which belongs to Benjamin.
Boye bakobaki kotambola, mpe moyi ebungaki tango bakomaki pene ya Gibea, kati na mokili ya Benjame.
15 They went over there, to go in to stay in Gibeah. He went in, and sat down in the street of the city; for there was no one who took them into his house to stay.
Batelemaki na Gibea mpo na kolekisa butu. Bakotaki mpe bavandaki na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka, kasi moto moko te ayambaki bango na ndako na ye mpo na kolekisa butu.
16 Behold, an old man came from his work out of the field at evening. Now the man was from the hill country of Ephraim, and he lived in Gibeah; but the men of the place were Benjamites.
Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame.
17 He lifted up his eyes, and saw the wayfaring man in the street of the city; and the old man said, “Where are you going? Where did you come from?”
Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye: — Okeyi wapi mpe owuti wapi?
18 He said to him, “We are passing from Bethlehem Judah to the farther side of the hill country of Ephraim. I am from there, and I went to Bethlehem Judah. I am going to the LORD’s house; and there is no one who has taken me into his house.
Moto ya mobembo azongiselaki ye: — Towuti na Beteleemi ya Yuda; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye.
19 Yet there is both straw and feed for our donkeys; and there is bread and wine also for me, and for your servant, and for the young man who is with your servants. There is no lack of anything.”
Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo; tozangi eloko moko te.
20 The old man said, “Peace be to you! Just let me supply all your needs, but do not sleep in the street.”
Mobange yango alobaki: — Tika ete kimia ezala na yo! Bosenga na yo nyonso ekozala na moto na ngai. Kasi kolekisa butu te na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka.
21 So he brought him into his house, and gave the donkeys fodder. Then they washed their feet, and ate and drank.
Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki.
22 As they were making their hearts merry, behold, the men of the city, certain wicked fellows, surrounded the house, beating at the door; and they spoke to the master of the house, the old man, saying, “Bring out the man who came into your house, that we can have sex with him!”
Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako: — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.
23 The man, the master of the house, went out to them, and said to them, “No, my brothers, please do not act so wickedly; since this man has come into my house, do not do this folly.
Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango: — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.
24 Behold, here is my virgin daughter and his concubine. I will bring them out now. Humble them, and do with them what seems good to you; but to this man do not do any such folly.”
Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te.
25 But the men would not listen to him; so the man grabbed his concubine, and brought her out to them; and they had sex with her, and abused her all night until the morning. When the day began to dawn, they let her go.
Kasi mibali yango baboyaki koyokela ye. Boye mobali azwaki makangu na ye mpe abimisaki ye libanda epai na bango. Bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, butu mobimba; mpe tango tongo ekomaki pene ya kotana, batikaki ye akende.
26 Then the woman came in the dawning of the day, and fell down at the door of the man’s house where her lord was, until it was light.
Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu.
27 Her lord rose up in the morning and opened the doors of the house, and went out to go his way; and behold, the woman his concubine had fallen down at the door of the house, with her hands on the threshold.
Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke.
28 He said to her, “Get up, and let’s get going!” but no one answered. Then he took her up on the donkey; and the man rose up, and went to his place.
Alobaki na ye: « Telema; tokende! » Kasi azwaki eyano te. Bongo mobali yango atiaki makangu na ye na likolo ya ane na ye, akobaki mobembo na ye mpo na kozonga na ndako na ye.
29 When he had come into his house, he took a knife and cut up his concubine, and divided her, limb by limb, into twelve pieces, and sent her throughout all the borders of Israel.
Tango akomaki na ndako na ye, azwaki mbeli, akataki nzoto ya makangu na ye na biteni zomi na mibale mpe atindaki yango na etando nyonso ya Isalaele.
30 It was so, that all who saw it said, “Such a deed has not been done or seen from the day that the children of Israel came up out of the land of Egypt to this day! Consider it, take counsel, and speak.”
Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki: « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. »

< Judges 19 >