< Joshua 8 >

1 The LORD said to Joshua, “Do not be afraid, and do not be dismayed. Take all the warriors with you, and arise, go up to Ai. Behold, I have given into your hand the king of Ai, with his people, his city, and his land.
Yawe alobaki na Jozue: « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo: mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye.
2 You shall do to Ai and her king as you did to Jericho and her king, except you shall take its goods and its livestock for yourselves. Set an ambush for the city behind it.”
Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »
3 So Joshua arose, with all the warriors, to go up to Ai. Joshua chose thirty thousand men, the mighty men of valor, and sent them out by night.
Jozue atelemaki elongo na basoda nyonso mpo na kobundisa engumba Ayi. Aponaki bilombe ya bitumba nkoto tuku misato mpe atindaki bango na butu.
4 He commanded them, saying, “Behold, you shall lie in ambush against the city, behind the city. Do not go very far from the city, but all of you be ready.
Apesaki bango mitindo oyo: « Bobombama na sima ya engumba oyo; bozala penza mosika mingi te na engumba, kasi bozala pene.
5 I and all the people who are with me will approach the city. It shall happen, when they come out against us, as at the first, that we will flee before them.
Ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai, tokopusana pene ya engumba. Tango bakobima mpo na kobundisa biso lokola na mbala oyo eleki, tokokima liboso na bango.
6 They will come out after us until we have drawn them away from the city; for they will say, ‘They flee before us, like the first time.’ So we will flee before them,
Bakolanda biso, mpe tokobenda bango mosika ya engumba, pamba te bakoloba: ‹ Bazali kokima liboso na biso lokola na mbala oyo eleki, › mpe tokokima liboso na bango.
7 and you shall rise up from the ambush, and take possession of the city; for the LORD your God will deliver it into your hand.
Boye, bino bokobima wuta na bisika oyo bokobombama mpe bokobotola engumba. Yawe, Nzambe na bino, akabi yango na maboko na bino.
8 It shall be, when you have seized the city, that you shall set the city on fire. You shall do this according to the LORD’s word. Behold, I have commanded you.”
Tango bokobotola engumba, botia yango moto mpe bosala ndenge Yawe alobaki. »
9 Joshua sent them out; and they went to set up the ambush, and stayed between Bethel and Ai on the west side of Ai; but Joshua stayed among the people that night.
Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele.
10 Joshua rose up early in the morning, mustered the people, and went up, he and the elders of Israel, before the people to Ai.
Jozue alamukaki na tongo-tongo penza mpe atalaki ndenge nini basoda na ye bamilengelaki. Sima na yango, alekaki liboso elongo na bakambi ya Isalaele mpo na kokende kobundisa engumba Ayi.
11 All the people, even the men of war who were with him, went up and came near, and came before the city and encamped on the north side of Ai. Now there was a valley between him and Ai.
Basoda na ye nyonso bapusanaki kino na liboso ya engumba mpe batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Ayi, bongo lubwaku ezalaki kati na bango mpe Ayi.
12 He took about five thousand men, and set them in ambush between Bethel and Ai, on the west side of the city.
Jozue azwaki basoda nkoto mitano mpe abombaki bango na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya engumba.
13 So they set the people, even all the army who was on the north of the city, and their ambush on the west of the city; and Joshua went that night into the middle of the valley.
Mampinga ya basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya engumba; mpe basoda oyo batikalaka na sima, na ngambo ya weste ya engumba. Na butu wana, Jozue akendeki na kati-kati ya etando.
14 When the king of Ai saw it, they hurried and rose up early, and the men of the city went out against Israel to battle, he and all his people, at the time appointed, before the Arabah; but he did not know that there was an ambush against him behind the city.
Tango mokonzi ya Ayi amonaki bongo, ye elongo na bato na ye nyonso, bavandi ya engumba, batelemaki na lombangu mpe babimaki mpo na kobundisa Isalaele na esika oyo nzela ekutana, liboso ya Araba. Ayebaki te ete basoda mosusu babombamaki na sima ya engumba.
15 Joshua and all Israel made as if they were beaten before them, and fled by the way of the wilderness.
Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bakosaki lokola bato oyo basili kokweya na bitumba mpe bakimaki na ngambo ya esobe.
16 All the people who were in the city were called together to pursue after them. They pursued Joshua, and were drawn away from the city.
Babelelaki bato nyonso ya Ayi mpo ete balanda bango. Boye, balandaki Jozue mpe bakendeki mosika ya engumba.
17 There was not a man left in Ai or Bethel who did not go out after Israel. They left the city open, and pursued Israel.
Kati na Ayi mpe Beteli, mobali moko te atikalaki oyo azangaki kolanda Isalaele. Batikaki engumba ya kofungwama, wana bazalaki kolanda Isalaele.
18 The LORD said to Joshua, “Stretch out the javelin that is in your hand toward Ai, for I will give it into your hand.” Joshua stretched out the javelin that was in his hand toward the city.
Yawe alobaki na Jozue: « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye.
19 The ambush arose quickly out of their place, and they ran as soon as he had stretched out his hand and entered into the city and took it. They hurried and set the city on fire.
Tango kaka asembolaki loboko, basoda oyo babombamaki babimaki na lombangu wuta na bisika oyo babombamaki, bakotaki na engumba, babotolaki yango mpe batiaki yango moto.
20 When the men of Ai looked behind them, they saw, and behold, the smoke of the city ascended up to heaven, and they had no power to flee this way or that way. The people who fled to the wilderness turned back on the pursuers.
Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango.
21 When Joshua and all Israel saw that the ambush had taken the city, and that the smoke of the city ascended, then they turned back and killed the men of Ai.
Boye, tango Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete basoda oyo babombamaki bazwi engumba mpe milinga ezali komata wuta na engumba, bazongaki mpe babomaki bato ya Ayi.
22 The others came out of the city against them, so they were in the middle of Israel, some on this side, and some on that side. They struck them, so that they let none of them remain or escape.
Basoda ya Isalaele oyo babombamaki, babimaki na engumba mpo na kobundisa bango. Bato ya Ayi bakomaki na kati-kati ya basoda ya Isalaele oyo bazalaki, bamoko na ngambo moko, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. Basoda ya Isalaele basilisaki koboma bango nyonso, ata moko te atikalaki na bomoi, mpe ata moko te akimaki.
23 They captured the king of Ai alive, and brought him to Joshua.
Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue.
24 When Israel had finished killing all the inhabitants of Ai in the field, in the wilderness in which they pursued them, and they had all fallen by the edge of the sword until they were consumed, all Israel returned to Ai and struck it with the edge of the sword.
Tango Isalaele asilisaki koboma mibali nyonso ya Ayi, kati na zamba mpe kati na esobe epai wapi balandaki bango, mpe wana bango nyonso basilaki kokufa na mopanga, bana nyonso ya Isalaele bazongaki na Ayi mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna.
25 All that fell that day, both of men and women, were twelve thousand, even all the people of Ai.
Motango ya bato nyonso oyo bakufaki na mokolo wana, basi mpe mibali, ezalaki nkoto zomi na mibale: bango nyonso bazalaki bato ya Ayi.
26 For Joshua did not draw back his hand, with which he stretched out the javelin, until he had utterly destroyed all the inhabitants of Ai.
Jozue akitisaki te loboko na ye, oyo esimbaki likonga kino tango asilisaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ayi.
27 Israel took for themselves only the livestock and the goods of that city, according to the LORD’s word which he commanded Joshua.
Kasi Isalaele azwaki mpo na ye, lokola bomengo ya bitumba, bibwele mpe biloko ya engumba yango, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na Jozue.
28 So Joshua burned Ai and made it a heap forever, even a desolation, to this day.
Jozue atumbaki Ayi mpe akomisaki yango libebi mpo na libela, esika ezanga bato kino na mokolo ya lelo.
29 He hanged the king of Ai on a tree until the evening. At sundown, Joshua commanded, and they took his body down from the tree and threw it at the entrance of the gate of the city, and raised a great heap of stones on it that remains to this day.
Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo.
30 Then Joshua built an altar to the LORD, the God of Israel, on Mount Ebal,
Jozue atongaki etumbelo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, na ngomba Ebali,
31 as Moses the servant of the LORD commanded the children of Israel, as it is written in the book of the law of Moses: an altar of uncut stones, on which no one had lifted up any iron. They offered burnt offerings on it to the LORD and sacrificed peace offerings.
ndenge Moyize, mosali na Yawe, atindaki bana ya Isalaele. Atongaki yango kolanda makambo oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize: etumbelo etongama na mabanga oyo bakata na esalelo ya ebende te. Na likolo na yango, batiaki mbeka ya kotumba mpo na Yawe mpe babonzaki mbeka ya boyokani.
32 He wrote there on the stones a copy of Moses’ law, which he wrote in the presence of the children of Israel.
Na esika yango, na miso ya bana nyonso ya Isalaele, Jozue akomaki, na likolo ya mabanga, Mobeko oyo Moyize akomaki mpo na bana ya Isalaele.
33 All Israel, with their elders, officers, and judges, stood on both sides of the ark before the Levitical priests, who carried the ark of the LORD’s covenant, the foreigner as well as the native; half of them in front of Mount Gerizim, and half of them in front of Mount Ebal, as Moses the servant of the LORD had commanded at the first, that they should bless the people of Israel.
Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele.
34 Afterward he read all the words of the law, the blessing and the curse, according to all that is written in the book of the law.
Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko: mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko.
35 There was not a word of all that Moses commanded which Joshua did not read before all the assembly of Israel, with the women, the little ones, and the foreigners who were among them.
Jozue azangisaki te kotanga, liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, basi, bana mpe bapaya oyo bazalaki kati na bango, maloba nyonso oyo Moyize akomaki.

< Joshua 8 >