< Isaiah 49 >

1 Listen, islands, to me. Listen, you peoples, from afar: the LORD has called me from the womb; from the inside of my mother, he has mentioned my name.
Boyoka ngai, bino bisanga; boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika: Yawe abengaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, azalaki kolobela kombo na ngai wuta mbotama na ngai;
2 He has made my mouth like a sharp sword. He has hidden me in the shadow of his hand. He has made me a polished shaft. He has kept me close in his quiver.
akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye;
3 He said to me, “You are my servant, Israel, in whom I will be glorified.”
alobaki na ngai: « Oh Isalaele, ozali mosali na ngai, nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. »
4 But I said, “I have labored in vain. I have spent my strength in vain for nothing; yet surely the justice due to me is with the LORD, and my reward with my God.”
Kasi ngai, nalobaki: « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »
5 Now the LORD, he who formed me from the womb to be his servant, says to bring Jacob again to him, and to gather Israel to him, for I am honorable in the LORD’s eyes, and my God has become my strength.
Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpo ete nazala mosali na Ye, mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye mpe kosangisa Isalaele pene na Ye, pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai,
6 Indeed, he says, “It is too light a thing that you should be my servant to raise up the tribes of Jacob, and to restore the preserved of Israel. I will also give you as a light to the nations, that you may be my salvation to the end of the earth.”
Ye, Yawe, alobi: « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
7 The LORD, the Redeemer of Israel, and his Holy One, says to him whom man despises, to him whom the nation abhors, to a servant of rulers: “Kings shall see and rise up, princes, and they shall worship, because of the LORD who is faithful, even the Holy One of Israel, who has chosen you.”
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe: « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
8 The LORD says, “I have answered you in an acceptable time. I have helped you in a day of salvation. I will preserve you and give you for a covenant of the people, to raise up the land, to make them inherit the desolate heritage,
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Na tango ya malamu, nakoyanola yo; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki;
9 saying to those who are bound, ‘Come out!’; to those who are in darkness, ‘Show yourselves!’ “They shall feed along the paths, and their pasture shall be on all treeless heights.
mpo ete oloba na bakangami: ‹ Bobima, › mpe na bato oyo bazali kati na molili: ‹ Bokoma bansomi! › Boye bakozala lokola bibwele oyo ezali kolia matiti pene ya nzela, mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso oyo ebotaka matiti te.
10 They shall not hunger nor thirst; neither shall the heat nor sun strike them, for he who has mercy on them will lead them. He will guide them by springs of water.
Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.
11 I will make all my mountains a road, and my highways shall be exalted.
Nakobongola bangomba na Ngai nyonso nzela, mpe nakokunda mabulu ya banzela na Ngai ya minene.
12 Behold, these shall come from afar, and behold, these from the north and from the west, and these from the land of Sinim.”
Tala, bakowuta penza mosika, ndambo moko na ngambo ya nor, ndambo mosusu na ngambo ya weste, mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. »
13 Sing, heavens, and be joyful, earth! Break out into singing, mountains! For the LORD has comforted his people, and will have compassion on his afflicted.
Oh likolo, ganga na esengo! Oh mabele, sepela! Oh bangomba, boyemba banzembo! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.
14 But Zion said, “The LORD has forsaken me, and the Lord has forgotten me.”
Kasi Siona alobaki: « Yawe asundoli ngai, Nkolo na ngai abosani ngai! »
15 “Can a woman forget her nursing child, that she should not have compassion on the son of her womb? Yes, these may forget, yet I will not forget you!
Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te!
16 Behold, I have engraved you on the palms of my hands. Your walls are continually before me.
Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai; bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
17 Your children hurry. Your destroyers and those who devastated you will leave you.
Bana na yo bakozonga na lombangu, kasi babebisi na yo bakokende mosika na yo.
18 Lift up your eyes all around, and see: all these gather themselves together, and come to you. As I live,” says the LORD, “you shall surely clothe yourself with them all as with an ornament, and dress yourself with them, like a bride.
Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga: bana na yo nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.
19 “For, as for your waste and your desolate places, and your land that has been destroyed, surely now that land will be too small for the inhabitants, and those who swallowed you up will be far away.
Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga, bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te; sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo, mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasi bakozala mosika na yo.
20 The children of your bereavement will say in your ears, ‘This place is too small for me. Give me a place to live in.’
Okanisaki ete ozangaki bana, kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo: « Esika oyo ezali penza moke mpo na biso; pesa biso esika oyo eleki monene mpo ete tokoka kovanda. »
21 Then you will say in your heart, ‘Who has conceived these for me, since I have been bereaved of my children and am alone, an exile, and wandering back and forth? Who has brought these up? Behold, I was left alone. Where were these?’”
Boye, okomilobela na motema: « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi? »
22 The Lord GOD says, “Behold, I will lift up my hand to the nations, and lift up my banner to the peoples. They shall bring your sons in their bosom, and your daughters shall be carried on their shoulders.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala, nakotombola loboko na Ngai liboso ya bikolo, nakotelemisa bendele na Ngai liboso ya bato; bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bango mpe oyo ya basi, na mapeka na bango.
23 Kings shall be your foster fathers, and their queens your nursing mothers. They will bow down to you with their faces to the earth, and lick the dust of your feet. Then you will know that I am the LORD; and those who wait for me will not be disappointed.”
Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »
24 Shall the plunder be taken from the mighty, or the lawful captives be delivered?
Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumba na maboko ya basoda ya mpiko to kokangola mokangami wuta na maboko ya monyokoli na ye?
25 But the LORD says, “Even the captives of the mighty shall be taken away, and the plunder retrieved from the fierce, for I will contend with him who contends with you and I will save your children.
Kasi tala liloba oyo Yawe alobi: « Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko, mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli. Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo, mpe nakobikisa bana na yo.
26 I will feed those who oppress you with their own flesh; and they will be drunk on their own blood, as with sweet wine. Then all flesh shall know that I, the LORD, am your Savior and your Redeemer, the Mighty One of Jacob.”
Nakosala ete banyokoli na yo balia misuni na bango moko; bakolangwa makila na bango moko ndenge balangwaka masanga ya vino. Boye, moto nyonso akoyeba ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo, Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »

< Isaiah 49 >