< Genesis 22 >

1 After these things, God tested Abraham, and said to him, “Abraham!” He said, “Here I am.”
Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye: — Abrayami! Abrayami azongisaki: — Ngai oyo.
2 He said, “Now take your son, your only son, Isaac, whom you love, and go into the land of Moriah. Offer him there as a burnt offering on one of the mountains which I will tell you of.”
Nzambe alobaki na ye: — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.
3 Abraham rose early in the morning, and saddled his donkey; and took two of his young men with him, and Isaac his son. He split the wood for the burnt offering, and rose up, and went to the place of which God had told him.
Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
4 On the third day Abraham lifted up his eyes, and saw the place far off.
Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika.
5 Abraham said to his young men, “Stay here with the donkey. The boy and I will go over there. We will worship, and come back to you.”
Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye: « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe; sima na yango, tokozongela bino. »
6 Abraham took the wood of the burnt offering and laid it on Isaac his son. He took in his hand the fire and the knife. They both went together.
Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.
7 Isaac spoke to Abraham his father, and said, “My father?” He said, “Here I am, my son.” He said, “Here is the fire and the wood, but where is the lamb for a burnt offering?”
Izaki atunaki Abrayami, tata na ye: — Tata na ngai! Abrayami azongisaki: — Ngai oyo! Izaki alobaki: — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba?
8 Abraham said, “God will provide himself the lamb for a burnt offering, my son.” So they both went together.
Abrayami azongisaki: — Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba. Boye bango mibale bakendeki nzela moko.
9 They came to the place which God had told him of. Abraham built the altar there, and laid the wood in order, bound Isaac his son, and laid him on the altar, on the wood.
Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.
10 Abraham stretched out his hand, and took the knife to kill his son.
Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali.
11 The LORD’s angel called to him out of the sky, and said, “Abraham, Abraham!” He said, “Here I am.”
Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo: — Abrayami! Abrayami! Abrayami azongisaki: — Ngai oyo.
12 He said, “Do not lay your hand on the boy or do anything to him. For now I know that you fear God, since you have not withheld your son, your only son, from me.”
Anjelu alobaki: — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.
13 Abraham lifted up his eyes, and looked, and saw that behind him was a ram caught in the thicket by his horns. Abraham went and took the ram, and offered him up for a burnt offering instead of his son.
Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.
14 Abraham called the name of that place “The LORD Will Provide”. As it is said to this day, “On the LORD’s mountain, it will be provided.”
Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo: « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »
15 The LORD’s angel called to Abraham a second time out of the sky,
Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo
16 and said, “‘I have sworn by myself,’ says the LORD, ‘because you have done this thing, and have not withheld your son, your only son,
mpe alobaki: « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,
17 that I will bless you greatly, and I will multiply your offspring greatly like the stars of the heavens, and like the sand which is on the seashore. Your offspring will possess the gate of his enemies.
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
18 All the nations of the earth will be blessed by your offspring, because you have obeyed my voice.’”
Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »
19 So Abraham returned to his young men, and they rose up and went together to Beersheba. Abraham lived at Beersheba.
Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda.
20 After these things, Abraham was told, “Behold, Milcah, she also has borne children to your brother Nahor:
Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana:
21 Uz his firstborn, Buz his brother, Kemuel the father of Aram,
Mwana na ye ya liboso, Utsi; Buzi, ndeko na ye mobali; Kemweli, tata ya Arami;
22 Chesed, Hazo, Pildash, Jidlaph, and Bethuel.”
Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli.
23 Bethuel became the father of Rebekah. These eight Milcah bore to Nahor, Abraham’s brother.
Betweli azalaki tata ya Rebeka. Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe.
24 His concubine, whose name was Reumah, also bore Tebah, Gaham, Tahash, and Maacah.
Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana: Teba, Gami, Taashi mpe Maaka.

< Genesis 22 >