< 2 Kings 8 >

1 Now Elisha had spoken to the woman whose son he had restored to life, saying, “Arise, and go, you and your household, and stay for a while wherever you can; for the LORD has called for a famine. It will also come on the land for seven years.”
Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki: « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo; ekowumela mibu sambo. »
2 The woman arose, and did according to the man of God’s word. She went with her household, and lived in the land of the Philistines for seven years.
Mwasi asalaki ndenge moto na Nzambe alobaki. Ye elongo na libota na ye bakendeki mpe bavandaki mibu sambo na mokili ya Filisitia.
3 At the end of seven years, the woman returned from the land of the Philistines. Then she went out to beg the king for her house and for her land.
Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye.
4 Now the king was talking with Gehazi the servant of the man of God, saying, “Please tell me all the great things that Elisha has done.”
Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki: « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. »
5 As he was telling the king how he had restored to life him who was dead, behold, the woman whose son he had restored to life begged the king for her house and for her land. Gehazi said, “My lord, O king, this is the woman, and this is her son, whom Elisha restored to life.”
Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki: « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. »
6 When the king asked the woman, she told him. So the king appointed to her a certain officer, saying, “Restore all that was hers, and all the fruits of the field since the day that she left the land, even until now.”
Mokonzi atunaki na mwasi yango mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Na sima, mokonzi aponaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe apesaki ye mitindo: « Zongisela ye biloko na ye nyonso mpe bambuma nyonso ya bilanga oyo mabele na ye ebotaki wuta mokolo oyo alongwaki na mboka na biso kino lelo. »
7 Elisha came to Damascus; and Benhadad the king of Syria was sick. He was told, “The man of God has come here.”
Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba,
8 The king said to Hazael, “Take a present in your hand, and go meet the man of God, and inquire of the LORD by him, saying, ‘Will I recover from this sickness?’”
mokonzi alobaki na Azaeli: « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe: ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo? › »
9 So Hazael went to meet him and took a present with him, even of every good thing of Damascus, forty camels’ burden, and came and stood before him and said, “Your son Benhadad king of Syria has sent me to you, saying, ‘Will I recover from this sickness?’”
Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki: — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai; atuni: « Boni, nakobika solo na bokono oyo? »
10 Elisha said to him, “Go, tell him, ‘You will surely recover;’ however the LORD has shown me that he will surely die.”
Elize azongisaki: — Loba na ye: « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa.
11 He settled his gaze steadfastly on him, until he was ashamed. Then the man of God wept.
Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki.
12 Hazael said, “Why do you weep, my lord?” He answered, “Because I know the evil that you will do to the children of Israel. You will set their strongholds on fire, and you will kill their young men with the sword, and will dash their little ones in pieces, and rip up their pregnant women.”
Azaeli atunaki: — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela? Elize azongisaki: — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
13 Hazael said, “But what is your servant, who is but a dog, that he could do this great thing?” Elisha answered, “The LORD has shown me that you will be king over Syria.”
Azaeli akamwaki mpe azongisaki: — Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina! Elize alobaki lisusu: — Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri.
14 Then he departed from Elisha, and came to his master, who said to him, “What did Elisha say to you?” He answered, “He told me that you would surely recover.”
Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye: — Elize alobi na yo nini? Azongisaki: — Alobi na ngai: « Solo, okobika na bokono oyo. »
15 On the next day, he took a thick cloth, dipped it in water, and spread it on the king’s face, so that he died. Then Hazael reigned in his place.
Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi.
16 In the fifth year of Joram the son of Ahab king of Israel, Jehoshaphat being king of Judah then, Jehoram the son of Jehoshaphat king of Judah began to reign.
Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
17 He was thirty-two years old when he began to reign. He reigned eight years in Jerusalem.
Azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi.
18 He walked in the way of the kings of Israel, as did Ahab’s house, for he married Ahab’s daughter. He did that which was evil in the LORD’s sight.
Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana na ye ya mwasi.
19 However, the LORD would not destroy Judah, for David his servant’s sake, as he promised him to give to him a lamp for his children always.
Kasi Yawe alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi, mowumbu na Ye, pamba te alakaki kopesa bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye mpo na libela.
20 In his days Edom revolted from under the hand of Judah, and made a king over themselves.
Na tango ya Yorami, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi.
21 Then Joram crossed over to Zair, and all his chariots with him; and he rose up by night and struck the Edomites who surrounded him with the captains of the chariots; and the people fled to their tents.
Boye Yorami akendeki na Tsayiri elongo na bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar; kasi basoda ya Yuda bakimaki na bandako na bango ya kapo.
22 So Edom revolted from under the hand of Judah to this day. Then Libnah revolted at the same time.
Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokaki.
23 The rest of the acts of Joram, and all that he did, are not they written in the book of the chronicles of the kings of Judah?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
24 Joram slept with his fathers, and was buried with his fathers in David’s city; and Ahaziah his son reigned in his place.
Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
25 In the twelfth year of Joram the son of Ahab king of Israel, Ahaziah the son of Jehoram king of Judah began to reign.
Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Yorami, akomaki mokonzi ya Yuda.
26 Ahaziah was twenty-two years old when he began to reign; and he reigned one year in Jerusalem. His mother’s name was Athaliah the daughter of Omri king of Israel.
Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri, mokonzi ya Isalaele.
27 He walked in the way of Ahab’s house and did that which was evil in the LORD’s sight, as did Ahab’s house, for he was the son-in-law of Ahab’s house.
Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi.
28 He went with Joram the son of Ahab to war against Hazael king of Syria at Ramoth Gilead, and the Syrians wounded Joram.
Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami.
29 King Joram returned to be healed in Jezreel from the wounds which the Syrians had given him at Ramah, when he fought against Hazael king of Syria. Ahaziah the son of Jehoram, king of Judah, went down to see Joram the son of Ahab in Jezreel, because he was sick.
Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.

< 2 Kings 8 >