< 2 Chronicles 4 >

1 Moreover he made an altar of brass, twenty cubits the length of it, and twenty cubits the breadth of it, and ten cubits the height of it.
Salomo asalaki etumbelo ya bronze ya bametele zomi na molayi, bametele pene zomi na mokuse, mpe bametele mitano na bosanda.
2 Also he made the molten sea of ten cubits from brim to brim, round in compass. And the height of it was five cubits, and a line of thirty cubits encompassed it round about.
Asalaki nzungu ya monene ya bronze, oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu: monene na yango ezalaki na bametele mitano; bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe zingazinga na yango, bametele zomi na mitano.
3 And under it was the likeness of oxen, which compassed it round about for ten cubits, encompassing the sea round about. The oxen were in two rows, cast when it was cast.
Na se ya monoko na yango, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bangombe oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko.
4 It stood upon twelve oxen, three looking toward the north, and three looking toward the west, and three looking toward the south, and three looking toward the east. And the sea was set upon them above, and all their hinder parts were inward.
Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale: misato etalaki na ngambo ya nor; misato, na ngambo ya weste; misato, na ngambo ya sude; mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima ya bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati.
5 And it was a handbreadth thick. And the brim of it was wrought like the brim of a cup, like the flower of a lily. It received and held three thousand baths.
Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei na misato.
6 He also made ten basins, and put five on the right hand, and five on the left, to wash in them. They washed in them such things as belonged to the burnt offering, but the sea was for the priests to wash in.
Salomo asalaki lisusu basani zomi ya minene: mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano, na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo na kosukola bisalelo mpo na bambeka ya kotumba. Kasi Banganga-Nzambe bazalaki kosukola na nzungu ya monene.
7 And he made the ten lampstands of gold according to the ordinance concerning them. And he set them in the temple, five on the right hand, and five on the left.
Asalaki lisusu bitelemiselo zomi ya minda, basala na wolo kolanda ndakisa na yango oyo epesamaki; mpe atiaki yango na eteni oyo eleki monene kati na Tempelo: mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi.
8 He made also ten tables, and placed them in the temple, five on the right side, and five on the left. And he made a hundred basins of gold.
Asalaki bamesa zomi mpe atiaki yango kati na eteni oyo eleki monene: mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. Asalaki lisusu bakopo nkama moko ya wolo mpo na kosopela makila na likolo ya etumbelo.
9 Furthermore he made the court of the priests, and the great court, and doors for the court, and overlaid the doors of them with brass.
Asalaki lopango ya Banganga-Nzambe mpe lopango monene. Asalaki bikuke ya lopango mpe alatisaki yango bronze.
10 And he set the sea on the right side of the house eastward, toward the south.
Atiaki nzungu ya monene na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude-este.
11 And Huram made the pots, and the shovels, and the basins. So Huram made an end of doing the work that he wrought for king Solomon in the house of God:
Urami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Urami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Nzambe:
12 the two pillars, and the bowls, and the two capitals which were on the top of the pillars, and the two networks to cover the two bowls of the capitals that were on the top of the pillars,
makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango,
13 and the four hundred pomegranates for the two networks, two rows of pomegranates for each network to cover the two bowls of the capitals that were upon the pillars.
bililingi ya bambuma ya grenade nkama minei ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama: milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi;
14 He also made the bases, and he made the lavers upon the bases,
bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene, oyo batiaki na likolo ya bivandelo,
15 one sea, and the twelve oxen under it.
nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene,
16 Also the pots, and the shovels, and the flesh-hooks, and all the vessels of it, Huram his father made of bright brass for king Solomon for the house of Jehovah.
basani mpo na kotia putulu, bapawu, biloko ya songe mpo na misuni elongo na bisalelo na yango nyonso. Urami-Abi asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto.
17 The king cast them in the plain of the Jordan, in the clay ground between Succoth and Zeredah.
Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tseredata.
18 Thus Solomon made all these vessels in great abundance. For the weight of the brass could not be found out.
Mpo ete Salomo asalaki biloko oyo nyonso ebele koleka, yango wana bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki.
19 And Solomon made all the vessels that were in the house of God, also the golden altar, and the tables on which was the showbread,
Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe: etumbelo; bamesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe;
20 and the lampstands with their lamps, to burn according to the ordinance before the oracle, of pure gold,
bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mpo na kopela liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule,
21 and the flowers, and the lamps, and the tongs, of gold, and that perfect gold,
bafololo na yango, minda na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, basala na wolo ya peto makasi;
22 and the snuffers, and the basins, and the spoons, and the fire pans, of pure gold. And as for the entry of the house, the inner doors of it for the most holy place, and the doors of the house, namely, of the temple, were of gold.
bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.

< 2 Chronicles 4 >