< 2 Samuël 7 >

1 Toen Jahweh den koning rust had verleend van al zijn vijanden in het rond, en de koning zijn paleis had betrokken,
Sima na mokonzi kovanda na ndako na ye mpe Yawe kopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingelaki ye,
2 sprak hij tot Natan den profeet: Zie eens, zelf woon ik in een paleis van cederhout, en de ark van God staat onder tentdoek!
mokonzi alobaki na mosakoli Natan: — Tala nanu likambo oyo! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.
3 Natan zeide tot den koning: Breng alles ten uitvoer, wat gij van plan zijt; want Jahweh is met u.
Natan azongiselaki mokonzi: — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Yawe azali elongo na yo.
4 Maar in diezelfde nacht werd het woord van Jahweh tot Natan gericht:
Kasi na butu wana, Yawe alobaki na Natan:
5 Ga aan mijn dienaar David zeggen: Zo spreekt Jahweh! Wilt ge Mij een huis bouwen, waarin Ik kan wonen?
— Kende koyebisa Davidi, mosali na ngai: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Boni, yo nde okotongela ngai ndako mpo ete navanda kati na yango?
6 Ik heb toch nimmer in een huis gewoond van de dag af, dat Ik de Israëlieten uit Egypte voerde, tot de dag van heden, maar Ik ben rondgetrokken in een tent en tabernakel.
Natikali nanu kovanda na ndako moko te, banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo; nazalaki kotambola bipai na bipai na se ya ndako ya kapo, wana nazalaki kovanda kati na Mongombo.
7 En heb Ik ooit, zolang Ik met alle Israëlieten rondtrok, tot een van de Rechters, die Ik tot leiders aanstelde van Israël, mijn volk, gezegd: Waarom bouwt ge Mij geen huis van cederhout?
Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na ngai, Isalaele: ‹ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele? › »
8 Daarom moet ge mijn dienaar David zeggen: Zo spreekt Jahweh der heirscharen! Ik heb u uit de weide gehaald, achter de schapen vandaan, om de leider te zijn van Israël, mijn volk,
Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai: « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.
9 en Ik was met u op al uw tochten, en heb al uw vijanden voor u verdelgd. Welnu, Ik zal u een naam schenken zo groot, als slechts de grootsten der aarde bezitten;
Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.
10 Ik zal een plek vaststellen voor Israël, mijn volk, waar het wortel kan schieten, en waar het kan wonen, zonder ooit meer te worden opgeschrikt of door booswichten verdrukt, zoals in vroegere tijden
Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele; nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso
11 en sinds de dag, dat Ik Rechters heb aangesteld over Israël, mijn volk. En Ik zal zorgen, dat al uw vijanden u met rust zullen laten. Ook kondigt Jahweh u aan, dat Hij u een huis zal bouwen.
mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.
12 Wanneer uw dagen ten einde zijn, en gij bij uw vaderen te ruste zult gaan, dan zal Ik het kind, dat van u is uitgegaan, tot uw nazaat verheffen en zijn koningschap bestendig doen zijn.
Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
13 Hij zal mijn Naam een tempel bouwen, en Ik zal zijn koningstroon voor altijd bestendigen.
Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.
14 Ik zal voor hem een vader zijn, en hij Mij een zoon. Mocht hij verkeerd doen, dan zal Ik hem tuchtigen met stokslagen en plagen, zoals mensen dat doen;
Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye.
15 maar nooit zal Ik hem mijn gunst onthouden, zoals Ik dat gedaan heb met Saul, dien Ik van mijn aanschijn heb verwijderd.
Kasi nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya Saulo oyo nalongolaki liboso na yo.
16 Uw huis en uw koningschap zullen tot in eeuwigheid bestendig zijn voor mijn aanschijn; uw troon zal vast staan voor eeuwig.
Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »
17 Toen Natan al deze woorden en openbaringen trouw aan David had overgebracht,
Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
18 ging koning David heen, zette zich voor Jahweh neer en sprak: Wie ben ik, Heer Jahweh, en wat is mijn huis, dat Gij mij tot hiertoe hebt gebracht!
Bongo mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki: « Nkolo Yawe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali?
19 Maar ook dit was nog te gering in uw ogen, Jahweh, mijn Heer. Ook voor de verre toekomst hebt Gij over het huis van uw dienaar gesproken, Jahweh, mijn Heer, en mij, een mens, de toekomstige glorie doen zien.
Ah Nkolo Yawe, lokola nde ekokaki te na miso na Yo, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo! Ah Nkolo Yawe, boni, ezali boye nde osalaka mpo na bato?
20 Wat kan David dan nog meer tot U zeggen, tot U, Heer Jahweh, die uw dienaar kent?
Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo? Pamba te, oh Nkolo Yawe, oyebi mosali na Yo?
21 Terwille van uw belofte en naar de neiging uws harten hebt Gij gehandeld, en tevens uw dienaar al die grootheid geopenbaard.
Ezali mpo na Liloba na Yo mpe kolanda mokano na Yo nde okokisi likambo monene oyo, mpe osali ete eyebana epai ya mosali na Yo.
22 Daarom, Heer Jahweh, zijt Gij zo groot! Er is niemand als Gij, en geen God buiten U, juist als onze oren altijd hebben gehoord.
Oh Nkolo Yawe, ozali monene ndenge nini! Moko te akokani na Yo; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo!
23 En wie kan vergeleken worden met Israël, uw volk? Het is het enige volk ter wereld, dat God kwam vrijkopen, om het tot zijn volk te verkiezen, om het beroemd te maken, en om er die grote en opzienbarende dingen voor te wrochten, door volken en goden voor uw volk te verdrijven, dat Gij uit Egypte hebt vrijgekocht.
Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito?
24 Voor eeuwig hebt Gij Israël, uw volk tot uw volk gemaakt, en zijt Gij, Jahweh, hun God.
Otiaki Isalaele, bato na Yo, mpo ete bazala bato na Yo mpo na libela; bongo Yo, oh Yawe, okomaki Nzambe na bango.
25 Welnu dan, Heer Jahweh, laat voor eeuwig het woord in vervulling gaan, dat Gij over uw dienaar en over zijn huis hebt gesproken, en doe zoals Gij beloofd hebt.
Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, kokisa mpo na libela elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe epai ya libota na ye. Sala ndenge olakaki
26 Dan zal uw Naam groot zijn in eeuwigheid, en zal men zeggen: Jahweh der heirscharen is Israëls God, en het huis van David, uw dienaar, is bestendig voor uw aanschijn.
mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka: ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo.
27 Jahweh der heirscharen, Israëls God, zelf hebt Gij het uw dienaar geopenbaard: Ik zal u een huis bouwen! Daarom heeft uw dienaar het aangedurfd, dit smeekgebed tot U te richten.
Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba: ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.
28 Welnu dan Jahweh, mijn Heer, Gij zijt God en uw woord is waarachtig, en Gij hebt deze weldaad aan uw dienaar beloofd.
Sik’oyo, oh Nkolo Yawe, ozali penza Nzambe! Maloba na Yo ezali solo, mpe olakaki makambo oyo ya malamu epai ya mosali na Yo.
29 Begin dan van nu af het huis van uw dienaar te zegenen, opdat het altijd bestendig zij voor uw aanschijn. Want Gij, Heer Jahweh, hebt gesproken, en met uw zegen zal het huis van uw dienaar gezegend zijn tot in eeuwigheid!
Sik’oyo, tika ete opambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo; pamba te oh Nkolo Yawe, Yo nde olobaki, mpe na nzela ya lipamboli na Yo, libota ya mosali na Yo ekopambolama mpo na libela. »

< 2 Samuël 7 >