< Zefanias 2 >

1 Saml jer, saml jer, I Folk, som ej kender Skam,
Oh ekolo oyo eyokaka soni te, bosangana nanu bino nyonso mpe bokanisa malamu
2 før l endnu er blevet som flyvende Avner, før HERRENs glødende Harme kommer over eder, før HERRENs Vredes Dag kommer over eder.
liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino!
3 Søg HERREN, alle l ydmyge i Landet, som holder hans Bud, søg Retfærd, søg Ydmyghed! Måske kan l skjule jer på HERRENs Vredes Dag.
Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.
4 Thi Gaza skal ligge forladt og Askalon øde, Asdod drives bort ved Middag, Ekron udryddes.
Bakosundola engumba Gaza, bongo engumba Ashikeloni ekobebisama; bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasi mpe bakopikola engumba Ekroni.
5 Ve dem, som bor ved Stranden, Kreternes Folk; HERRENs Ord over dig, Kana'an, Filisternes Land! Jeg gør dig til intet, så ingen bor der.
Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino: « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »
6 Du skal blive til Græsmark for Hyrder, til Folde for Småkvæg.
Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, epai wapi bato ya Kreti bavandaka, ekokoma esika ya babateli bibwele mpe lopango ya kobokola bibwele.
7 Og Stranden skal tilfalde Resten af Judas Hus; de skal græsse derpå. Lejr skal de slå ved Kvæld i Askalons Huse. Thi HERREN deres Gud ser til dem og vender deres Skæbne.
Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda; bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango. Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni, pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango, akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango, oyo bakowuta na bowumbu.
8 Jeg hørte Moabs Spot, Atnmoniternes hånende Ord, med hvilke de spotted mit Folk, hovmoded sig over deres Land.
« Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngai mpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiola mpe koluka kobotola mabele na bango.
9 Derfor, så sandt jeg lever, lyder det fra Hærskarers HERRE, Israels Gud: Moab skal blive som Sodoma, Ammoniterne som Gomorra, Jord for Nælder, et Salthul, Ørken til evig Tid. Resten af mit Folk skal plyndre dem; hvad der levnes af mit Folk skal eje dem.
Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »
10 Dette skal times dem for deres Hovmod, fordi de hånede Hærskarers HERREs Folk og gjorde sig store over for det.
Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
11 Frygtelig er HERREN for dem; thi han udrydder alle Jordens Guder, og alle Hedningemes fjerne Strande skal tilbede ham, hver på sit Sted.
Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.
12 Også I Ætiopere skal falde for HERRENs Sværd,
Bino mpe bato ya Kushi bokokufa na mopanga na ngai.
13 og han udrækker Hånden mod Nord og tilintetgør Assur, Nineve gør han til Ødemark, tørt som en Ørk;
Akosembola loboko na Ye mpo na kobundisa etuka ya nor, akobebisa Asiri akobebisa penza Ninive mobimba mpe akokawusa yango lokola esobe.
14 Hjorde skal lejre sig deri, hvert Slettens Dyr; på dets Søjlehoveder sover Pelikan og Rørdrum, i Vinduet skriger Uglen, Ravnen på Tærsklen.
Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.
15 Det er den jublende By, som lå så trygt, som sagde i sit Hjerte: "Jeg og ellers ingen." Hvor er den dog blevet øde, et Raststed for Dyr! Enhver, som kommer forbi den håner med Fløjt og Hånd.
Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela: « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.

< Zefanias 2 >