< Esajas 56 >

1 Så siger HERREN: Tag vare på Ret og øv Retfærd! Thi min Frelses komme er nær, min Ret skal snart åbenbares.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo, pamba te lobiko na Ngai ekomi pene mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.
2 Salig er den; der gør så, det Menneske, som fastholder dette: holder Sabbatten hellig og varer sin Hånd fra at øve noget ondt.
Esengo na moto oyo asalaka bongo, oyo akangamaka na yango, oyo abatelaka mokolo ya Saba mpe abebisaka te bosantu na yango, mpe oyo abatelaka loboko na ye ete esala mabe te! »
3 Ej sige den fremmede, som slutter sig til HERREN: "HERREN vil skille mig ud fra sit Folk!" Og Gildingen sige ikke: "Se, jeg er et udgået Træ!"
Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te: « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te: « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka! »
4 Thi så siger HERREN: Gildinger, som holder mine Sabbatter, vælger, hvad jeg har Behag i, og holder fast ved min Pagt,
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo, oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba, oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai, mpe bakangamaka na boyokani na Ngai:
5 dem vil jeg give i mit Hus, på mine Mure et Minde, et Navn, der er bedre end Sønner og Døtre; jeg giver dem et evigt Navn, et Navn, der ikke skal slettes.
nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, ekaniseli oyo ezali na kombo: ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. Nakopesa bango kombo ya libela, oyo bakoki kolongola te.
6 Og de fremmede, som slutter sig til HERREN for at tjene ham og elske hans Navn, for at være hans Tjenere, alle, som helligholder Sabbatten og holder fast ved min Pagt,
Bapaya oyo bakangami na Yawe mpo na kosalela Ye, mpo na kolinga Kombo na Ye mpe kogumbamela Ye, bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba mpe bakobebisa te bosantu na yango, mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai;
7 vil jeg bringe til mit hellige Bjerg og glæde i mit Bedehus; deres Brændofre og deres Slagtofre bliver til Behag på mit Alter; thi mit Hus skal kaldes et Bedehus for alle Folk.
nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule mpe nakopesa bango esengo kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango ekondimama na etumbelo na Ngai, pamba te Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »
8 Det lyder fra den Herre HERREN: Når jeg samler Israels bortstødte, samler jeg andre dertil, til dets egen samlede Flok.
Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi: « Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango, esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »
9 Alle I Markens Dyr, kom hid og æd, alle I Dyr i Skoven!
Bino banyama nyonso ya esobe, boya; bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia!
10 Blinde er alle dets Vogtere, intet ved de, alle er stumme Hunde, som ikke kan gø, de ligger og drømmer, de elsker Søvn;
Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.
11 grådige er de Hunde, kender ikke til Mæthed. Og sådanne Folk er Hyrder! De skønner intet, de vender sig hver sin Vej, hver søger sin Fordel:
Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.
12 Kom, så henter jeg Vin, vi drikker af Mosten; som i Dag skal det være i Morgen, ovenud herligt!"
Moko na moko alobaka: « Yaka! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele! »

< Esajas 56 >