< Zaharija 2 >

1 Podigoh oči i vidjeh. I gle: čovjek, a u ruci mu mjeračko uže.
Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye.
2 Upitah ga: “Kamo ideš?” Odgovori mi: “Da izmjerim Jeruzalem i da vidim koliko je širok a koliko dug.”
Natunaki ye: — Ozali kokende wapi? Azongiselaki ngai: — Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango.
3 I gle, anđeo koji je govorio sa mnom stajaše nepomično, a drugi mu iziđe u susret
Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atikaki ngai, mpe Anjelu mosusu ayaki mpo na kokutana na ye
4 i reče mu: “Trči, reci onome mladiću ovako: Jeruzalem će biti kao otvoren grad radi mnoštva ljudi i stoke koji će biti u njemu.
mpe alobaki na ye: — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana: « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.
5 A ja ću mu - riječ je Jahvina - biti ognjen zid unaokolo i Slava njegova sred njega.”
Ngai moko, nakozala mir ya moto zingazinga na yango, » elobi Yawe, « mpe nakomonisa nkembo na Ngai kati na yango. »
6 “Hej! Hej! Bježite iz zemlje sjeverne” - riječ je Jahvina - “jer u sva četiri vjetra nebeska razasuo sam vas” - riječ je Jahvina!
Tokende! Tokende! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe.
7 “Hej, Sione, koji živiš kod kćeri babilonske, spasi se!”
Siona, tokende! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko!
8 Ovako govori Jahve nad Vojskama, čija me Slava izaslala k narodima koji su vas opljačkali: “Tko vas dira, dira mi zjenicu oka.
Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi: Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.
9 Gle, ruku dižem na njih da plijenom budu svojim robovima.” Znat ćete tako da me posla Jahve nad Vojskama!
Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.
10 “Kliči i raduj se, kćeri sionska, jer evo, dolazim usred tebe prebivat' - riječ je Jahvina.
Siona, mboka kitoko, ganga na esengo mpe sepela, pamba te nazali koya kovanda kati na yo, elobi Yawe.
11 U onaj dan mnogi će narodi uz Jahvu prionuti i bit će narod moj, a ja ću prebivati usred tebe.” Znat ćeš tako da me tebi posla Jahve nad Vojskama.
Na mokolo wana, bato ya bikolo ebele bakoya kosangana elongo na Yawe mpe bakokoma bato na Ngai. Nakovanda kati na bino; mpe na bongo, bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
12 I Judeja će biti baština Jahvina, njegov dio u Svetoj zemlji, i on će opet izabrati Jeruzalem.
Yawe akokomisa Yuda lokola libula na Ye moko penza kati na mabele ebulisama, mpe akopona lisusu Yelusalemi.
13 Tiho, ljudi svi, pred Jahvom, jer, evo, on ustaje iz svetoga Prebivališta svojega!
Tika ete bato ya mokili mobimba bavanda kimia liboso ya Yawe, pamba te Ye moko atelemi mpe abimi na Ndako na Ye ya bule.

< Zaharija 2 >