< Nehemija 4 >

1 Kad je Sanbalat čuo da gradimo zid, razljutio se. Bio je veoma srdit, ismijavao je Židove
Tango Sanibala ayokaki ete tozali kotonga lisusu mir, asepelaki ata moke te mpe atombokaki makasi. Akomaki kotiola Bayuda
2 i vikao je pred svojom braćom i samarijanskom vojskom: “Što poduzimaju ovi jadni Židovi? Kane li možda popraviti, žrtvovati i završiti sve u jedan dan? Zar će iz hrpe praha dozvati u život spaljeno kamenje?”
mpe koloba liboso ya baninga na ye mpe ya mampinga ya Samari: — Bayuda oyo balemba-lemba boye bazali kosala nini? Bakanisi ete bakotelemisa lisusu mir na bango to kobonza lisusu mbeka? Bakanisi penza ete, mokolo moko, bakosilisa mosala oyo to bakokoka solo kopesa bomoi na mabanga oyo ekundama na se ya mabele mpe esila kozika?
3 Tobija, Amonac, koji je bio uz njega, reče: “Neka samo grade! Ali popne li se lisica, srušit će im kamene zidove.”
Tobiya, moto ya Amoni, oyo azalaki pembeni na ye alobaki: — Nini yango penza bazali kotonga! Mir oyo, soki ata mbwa moko ya zamba emati na likolo na yango, ekokweya!
4 Čuj, o Bože naš, kako nas preziru! Navrni njihove poruge na njihovu glavu. Predaj ih kao plijen u zemlju ropstva.
Oh Nzambe na biso, yoka biso, pamba te totiolami! Sala ete kotiola na bango ezonga na mito na bango moko! Kaba bango na mboka ya bowumbu lokola bomengo ya bitumba.
5 Ne pokrivaj njihova bezakonja i grijeh njihov neka ne bude izbrisan pred licem tvojim jer su se rugali graditeljima.
Kozipa mabe na bango te mpe kolongola masumu na bango na miso na Yo te, pamba te basili kofinga bato oyo bazali kotonga mir.
6 Tako smo gradili zid, koji je uskoro bio završen do pola visine. Narod je imao oduševljenja za rad.
Bongo tokobaki kotonga mir yango kino nyonso ekomaki na kati-kati ya bosanda, pamba te moto nyonso azalaki kosala mosala na motema na ye mobimba.
7 Kad su Sanbalat, Tobija, Arapi, Amonci i Ašdođani čuli da napreduje popravljanje jeruzalemskih zidova - jer su se počele zatvarati pukotine - veoma se ražestiše.
Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi.
8 Zakleše se svi zajedno da će napasti Jeruzalem i da će nas smesti.
Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango.
9 Mi smo tada zazvali Boga našega i postavljali smo dnevnu i noćnu stražu da bismo zaštitili grad.
Kasi tosambelaki Nzambe na biso mpe totiaki bakengeli, butu mpe moyi, mpo ete babundela biso liboso na bango.
10 A Židovi govorahu: “Snage su nosačima klonule, a ruševina je mnogo: nećemo nikada stići sagraditi zida!”
Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima: « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo! »
11 A naši neprijatelji rekoše: “Uvući ćemo se među njih prije nego što doznaju i opaze nas: tada ćemo ih poubijati i tako osujetiti pothvat!”
Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba: « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. »
12 A kad bi došli Židovi koji žive kraj njih, po deset bi nas puta upozoravali: “Idu protiv vas iz svih mjesta u kojima stanuju!”
Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na bango bayaki mbala zomi koyebisa biso mabongisi na bango: « Na bisika nyonso oyo bokozala, bakobundisa biso! »
13 Postavili smo se u nizinama, iza zida i na goletima; rasporedio sam narod po rodovima, s mačevima, kopljima i lukovima.
Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango.
14 Kad sam vidio kako se boje, ustao sam i objavio velikašima, odličnicima i ostalom narodu ovo: “Ne bojte se ovih ljudi! Mislite na Gospoda, velikoga i strašnoga, i borite se za svoju braću, za sinove i kćeri svoje, za žene i kuće svoje!”
Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu: « Bobanga bango te! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino! »
15 Kad su naši neprijatelji čuli da smo obaviješteni i da je Bog osujetio njihovu osnovu, mogli smo se vratiti k zidu, svaki svome poslu.
Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir; moko na moko azongelaki mosala na ye.
16 Ali je od toga dana samo polovica mojih momaka obavljala posao, a ostali su držali koplja, štitove, lukove i oklope, a glavari stajali iza doma Judina,
Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda.
17 koji je gradio zid. I nosači tereta držali su oružje: jednom je rukom svaki radio svoj posao, a u drugoj mu bilo oružje.
Ezala ba-oyo bazalaki kotonga mir mpe ba-oyo bazalaki komema mabele mpe biloko ya mosala, bango nyonso bazalaki kosala na loboko moko; bongo na loboko mosusu, basimbaki ebundeli.
18 Svaki je od graditelja, dok je radio, nosio mač pripasan uz bok. Trubač je stajao kraj mene.
Moko na moko kati na batongi ndako azalaki na mopanga na ye na loketo, mpe azalaki kosala mosala na ye ndenge wana. Na mopanzi na ngai, ezalaki na moto moko abongama mpo na kobeta kelelo.
19 Rekao sam velikašima, odličnicima i ostalom narodu: “Posao je velik i zamašan, a mi se rasuli po zidu, daleko jedni od drugih:
Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu: — Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu.
20 skupite se oko nas na mjesto gdje čujete glas trube, a Bog naš borit će se za nas.”
Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso; Nzambe na biso akobundela biso.
21 Tako smo obavljali posao od rane zore do prvih zvijezda. Polovica je bila naoružana kopljima.
Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka.
22 U to sam vrijeme još rekao narodu: “Svaki sa svojim slugom neka noći u Jeruzalemu: po redu ćemo noću stražariti, a danju raditi.”
Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato: « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. »
23 Ni ja, ni moja braća, ni moji momci, ni stražari koji su me pratili nismo skidali svojih haljina, svatko je držao pri ruci svoje oružje.
Ezala ngai, bandeko na ngai, basali na ngai to bakengeli oyo bazalaki elongo na ngai, moko te azalaki kolongola bilamba na ye; moto nyonso azalaki na ebundeli na ye na loboko ata tango azalaki kokende kosukola.

< Nehemija 4 >