< Jeremija 50 >

1 Riječ koju Jahve reče protiv Babilona, protiv zemlje kaldejske:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango:
2 “Objavite narodima! Razglasite, ne tajite, recite: Zauzet je Babilon! Bel je postiđen: Marduk razbijen! Posramljeni su kipovi njegovi, razmrskani njegovi likovi.
« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te! Loba: ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni! Beli akoyokisama soni! Mariduki akobukana! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›
3 Jer sa sjevera na nj se diže narod koji će mu zemlju prometnuti u pustinju; nitko više neće u njoj živjeti, i ljudi i stoka pobjeći će i otići.
Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni, ekobebisa yango, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna; ezala bato to banyama, nyonso ekokima.
4 U one dane i u vrijeme ono - riječ je Jahvina - vratit će se sinovi Izraelovi, ići će plačuć' i tražeći Jahvu, Boga svojega.
Na tango wana, na mikolo wana, » elobi Yawe, « bana ya Isalaele elongo na bato ya Yuda bakokende na kolela mpo na koluka Yawe, Nzambe na bango.
5 Pitat će za put na Sion, onamo će pogled upravljati: 'Hodite, prionimo uz Jahvu Savezom vječnim, nezaboravnim!'
Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Siona mpe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango; bakolobana bango na bango: ‹ Boya, tika ete tokangama na Yawe na nzela ya boyokani oyo ezali na suka te, boyokani oyo tokoki kobosana te! ›
6 K'o izgubljene ovce bijaše narod moj, pastiri ih zavedoše te zalutaše po brdima: moradoše s brda na brežuljke, zaboraviše gdje su im torovi.
Bato na Ngai bazalaki lokola bameme oyo ebungi nzela; babateli na bango babungisaki bango nzela, basalaki ete bayengayenga na bangomba, batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse mpe babosana lopango na bango ya kopemela.
7 Tko ih nađe, proždire ih, neprijatelji njini zborahu: 'Nismo mi krivi, jer zgriješiše Jahvi, pašnjaku pravde, Jahvi, nadi otaca svojih!'
Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba: ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›
8 Bježite iz Babilona! Izađite iz zemlje kaldejske! Budite poput ovnova pred stadom.
Bobima mbangu na Babiloni, botika mokili ya Babiloni! Bozala lokola bantaba ya mibali oyo ezali kotambola liboso ya etonga.
9 Jer evo ću dići i dovesti na Babilon mnoštvo velikih naroda; u zemlji sjevernoj svrstat će se protiv njega - odanle će biti osvojen. Strijele su im k'o u sretna junaka, prazne se ne vraćaju.
Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.
10 Kaldeja će biti oplijenjena, do mile volje nju će pljačkati” - riječ je Jahvina.
Boye, bakobotola bomengo ya Babiloni mpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, » elobi Yawe.
11 “Da! Radujte se samo i klikujte, vi pljačkaši moje baštine! Poskakujte k'o june na paši! Ržite kao ždrebad!
« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,
12 Mati vaša teško se osramoti, postidi se roditeljka vaša. Evo, posljednja je među narodima: pustinja, zemlja prljuša.
mama na bino akoyoka soni makasi; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.
13 Zbog gnjeva Jahvina bit će bez življa, sva će opustjeti. Tko god prođe mimo Babilon, zgrozit će se i zviždat će nad njegovim ranama.
Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.
14 Svrstajte se protiv Babilona, opkolite ga. Strijelci, strijeljajte na nj, ne žalite strelica - Jahvi je zgriješio.
Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo, bomitanda na molongo zingazinga ya Babiloni mpe bobeta yango makonga! Botika ata likonga moko te, pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe.
15 Sa svih strana nek' zaore poklici bojni. On se predaje! Stupovi mu padaju, bedemi se ruše: to Jahvina je osveta! Osvetite se Babilonu, vratite mu milo za drago!
Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani: ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.
16 Istrijebite Babilonu i sijača i žeteoca što srpom zamahuje u dane žetvene! Pred mačem silničkim nek' svak' se vrati svome narodu, neka bježi zemlji svojoj.”
Boboma wuta na mokili ya Babiloni bato oyo basalaka bilanga mpe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma. Likolo ya mopanga ya monyokoli, tika ete moto na moto azonga na mokili na ye, tika ete moto na moto akima na mokili na ye.
17 Izrael bijaše stado razagnano, lavovi ga raspršiše. Prvi ga kralj asirski proždrije, a onda mu Nabukodonozor, kralj babilonski, kosti polomi.
Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda: Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.
18 Zato ovako govori Jahve nad Vojskama, Bog Izraelov: “Evo, kaznit ću kralja babilonskoga i zemlju njegovu, kao što kaznih kralja asirskoga.
Yango wana tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakopesa mokonzi ya Babiloni mpe mokili na ye etumbu ndenge napesaki mokonzi ya Asiri.
19 I vratit ću Izraela pašnjaku njegovu da pase po Karmelu, Bašanu, brdima efrajimskim i u Gileadu, da se sit najede.
Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye; mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani. Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe ya Galadi.
20 U one dane, u vrijeme ono - riječ je Jahvina - tražit će grijeh Izraelov, ali ga više neće biti; tražit će opačine judejske, ali ih neće naći. Jer oprostih svima koje sačuvah.”
Na tango wana, na mikolo wana, › elobi Yawe, ‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi kasi bakomona yango te, masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te; pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.
21 “Na zemlju meratajimsku! Kreni na nju i na stanovnike Pekoda, zatri ih do temelja, uništi iza njih sve - riječ je Jahvina - izvrši sve kako ti zapovjedih!”
Bobundisa mokili ya Meratayimi mpe bavandi ya Pekodi; bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, › elobi Yawe. ‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.
22 Ratna se vika čuje u zemlji, poraz strašan.
Makelele ya bitumba ezali kati na mokili, lokito ya kobebisama monene!
23 O, kako li je skršen, razbijen malj cijele zemlje! Kako li Babilon posta strašilo narodima!
Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimba ebukani mpe epanzani? Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo?
24 Zamku ti metnuh, Babilone, ti se uhvati i ne vidje. Zatečen si i uhvaćen, jer se s Jahvom zarati!
Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo, mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango. Omonanaki mpe okangamaki mpo ete otelemelaki Yawe.
25 Jahve otvori svoju oružnicu, izvuče oružje gnjeva svojega, jer ima posla za Jahvu nad Vojskama u zemlji kaldejskoj.
Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye; pamba te yango nde mosala oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.
26 Udarite na nju sa svih strana, otvorite žitnice njene, slažite je kao snoplje, zatrite Babilon kletim uništenjem, da od njega ne ostane ništa.
Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye, bobuka bibombelo na ye, bokangisa bomengo ya bitumba ndenge bakangisaka maboke ya ble, bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.
27 Pokoljite svu junad njegovu, u klaonicu neka siđu! Jao njima, došao je njihov dan, vrijeme kazne njihove!
Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso; tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama! Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, tango mpo na bango ya kozwa etumbu.
28 Čujder glasa onih što pobjegoše, što utekoše iz zemlje babilonske da jave na Sionu osvetu Jahve, Boga našega, osvetu Hrama njegova!
Boyoka! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.
29 Sazovite na Babilon strijelce, sve što zapinju lukove, opkolite ga sa svih strana: nitko da ne uteče! Platite mu po zasluzi, vratite mu milo za drago, jer bi se oholio na Jahvu, Sveca Izraelova.
Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.
30 Zato će mu svi mladići popadati po trgovima i svi će mu ratnici u onaj dan izginuti - riječ je Jahvina.
Yango wana, na mokolo wana, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala, basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
31 “Evo me na te, Oholice!” - riječ je Gospoda Jahve nad Vojskama - “došao je dan tvoj, vrijeme pohoda na te.
‹ Tala, nazali na kanda na yo, yo mboka ya lolendo, › elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga; ‹ pamba te mokolo na yo ekoki, tango na yo ya kozwa etumbu.
32 Oholica će posrnuti, pasti, i nitko ga neće podići. Oganj ću podmetnuti gradovima njegovim i proždrijet će sve uokolo.”
Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, mpe moto moko te akoya kosunga yango; nakopelisa moto kati na bingumba na yango, mpe moto yango ekozikisa bato nyonso oyo bazingeli yango. ›
33 Ovako govori Jahve nad Vojskama: “Potlačeni su sinovi Izraelovi, zajedno sa sinovima Judinim. Oni što ih zarobiše, drže ih čvrsto i neće da ih puste.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda; bato nyonso oyo bakangaki bango mpe bamemaki bango na bowumbu baboyi kotika bango.
34 Ali, moćan je njihov Otkupitelj, ime mu Jahve nad Vojskama. On će obraniti parnicu njihovu - zemlji mir donijeti i smesti pučanstvo Babilona.”
Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, Kombo na Ye: Yawe, Mokonzi ya mampinga; akokotela bango na molende mpo ete amema kimia na mokili na bango mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.
35 Mač na Kaldejce - riječ je Jahvina - na pučanstvo Babilona, na knezove i mudrace njegove!
Mopanga, boma bato ya Babiloni; boma bavandi ya Babiloni, boma bakambi mpe bato na yango ya bwanya, › elobi Yawe!
36 Mač na brbljavce njegove, neka polude! Mač na njegove ratnike, neka se prestrave!
‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta; tika ete bakoma bato ya maboma! Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko; tika ete bakoma na somo!
37 Mač na njegove konje i bojna kola i na svu gomilu posred njega: nek postanu kao žene! Mač na njihove riznice; nek ih opljačkaju!
Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango, bapaya nyonso oyo bazali sima na yango mpo ete bakoma lokola basi! Mopanga, bebisa bomengo na yango mpo ete ekoma bomengo ya bitumba!
38 Mač na vode njihove, neka presahnu! Jer to je zemlja idola, zaludiše ih kipovi, strašila njihova.
Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka; pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko, bikeko oyo epesaka bato somo!
39 Zato će se ondje nastaniti risovi s čagljima, i nojevi će ondje obitavat. Dovijeka će ostat' mjesto bez življa, nitko ondje neće živjeti od koljena do koljena.
Bikelamu ya esobe mpe bambwa ya zamba ekokoma kovanda kuna; maligbanga mpe ekokoma kovanda kuna. Bato bakovanda lisusu kuna te to moto moko te akotikala kuna mpo na libela.
40 Razorit će ga kao što Bog razori Sodomu i Gomoru i susjede njihove - riječ je Jahvina. Čovjek ondje neće stanovati, sin čovječji neće u njem' boraviti.
Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomore elongo na bingumba na yango ya zingazinga, › » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moto moko te akowumela kati na yango.
41 Evo dolazi narod sa Sjevera, puk velik i mnogi kraljevi, i dižu se s krajeva zemlje.
Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya wuta na nor, ekolo moko monene mpe bakonzi ebele bazali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
42 U ruci im luk i koplje, okrutni su, nemilosrdni. Graja im buči poput mora, jašu na konjima, kao jedan za boj spremni protiv tebe, kćeri babilonska.
Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali bato na kanza mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko!
43 Kralj babilonski ču vijest o njima: i ruke mu klonuše, muka ga spopade, bolovi ga obuzeše kao porodilju.
Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
44 “Gle, kao lav on izlazi iz guštare jordanske na pašnjake vječno zelene. Al' ja ću ga učas otjerati i smjestiti ondje svog izabranika. Jer, tko je meni ravan? I tko će mene na račun pozvati? I koji će mi pastir odoljeti?”
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Babiloni na mokili na yango na mbala moko; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. Nani akokani na Ngai? Nani akoki kobeta tembe na Ngai? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai? »
45 Zato, čujte što je Jahve naumio da učini Babilonu, čujte što je nakanio protiv zemlje kaldejske: i najsitniju jagnjad on će odvući; i sam njihov pašnjak zgrozit će se nad njima.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni: Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
46 Na glas da je pao Babilon zemlja će se potresti: razlijegat će se vapaj među narodima.
Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, mabele ekoningana; makelele na yango ekoyokana kino na bikolo mosusu.

< Jeremija 50 >