< Izaija 43 >

1 Sada ovako govori Jahve, koji te stvorio, Jakove, koji te sazdao, Izraele: “Ne boj se, jer ja sam te otkupio; imenom sam te zazvao: ti si moj!
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele: « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.
2 Kad preko vode prelaziš, s tobom sam; ili preko rijeke, neće te preplaviti. Pođeš li kroz vatru, nećeš izgorjeti, plamen te opaliti neće.
Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te;
3 Jer ja sam Jahve, Bog tvoj, Svetac Izraelov, tvoj spasitelj. Za otkupninu tvoju dajem Egipat, mjesto tebe dajem Kuš i Šebu.
pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.
4 Jer dragocjen si u mojim očima, vrijedan si i ja te ljubim. Stog i dajem ljude za tebe i narode za život tvoj.
Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, lokola nalingaka yo, nakokaba bato mosusu na esika na yo, mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.
5 Ne boj se jer ja sam s tobom. S istoka ću ti dovest' potomstvo i sabrat ću te sa zapada.
Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo: nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste;
6 Reći ću sjeveru: 'Daj mi ga!' a jugu 'Ne zadržavaj ga!' Sinove mi dovedi izdaleka i kćeri moje s kraja zemlje,
nakoloba epai ya nor: ‹ Pesa, › mpe epai ya sude: ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,
7 sve koji se mojim zovu imenom i koje sam na svoju slavu stvorio, koje sam sazdao i načinio.”
moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, oyo nasalaki mpe nabongisaki. »
8 Izvedi narod slijep, premda oči ima, i gluh, premda uši ima.
Bimisa bato oyo bazali na miso, kasi bamonaka te; bato oyo bazali na matoyi, kasi bayokaka te.
9 Neka se saberu sva plemena i neka se skupe narodi. Tko je od njih to prorekao i davno navijestio? Nek' dovedu svjedoke da se opravdaju, neka se čuje da se može reći: “Istina je!”
Tika ete bikolo nyonso esangana elongo mpe bato basangana esika moko! Nani kati na bango asakolaki makambo oyo? Nani kati na bango ayebisaki biso makambo oyo esalemaki liboso? Tika ete babimisa batatoli na bango mpo na kolobela bango! Tika ete bato mosusu bayoka mpo ete baloba: « Ezali ya solo! »
10 Jer vi ste mi svjedoci, riječ je Jahvina, i moje sluge koje sam izabrao, da biste znali i vjerovali i uvidjeli da sam to ja. Prije mene nijedan bog nije bio načinjen i neće poslije mene biti.
« Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe mosali na Ngai, oyo naponi, mpo ete bokoka koyeba, kondimela Ngai mpe kososola ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe: Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema; mpe sima na Ngai, akotikala kozala te.
11 Ja, ja sam Jahve, osim mene nema spasitelja.
Ezali Ngai, Ngai kaka moko, nde nazali Yawe; Mobikisi mosusu azali te, soki Ngai te.
12 Ja sam prorekao, spasio i navijestio, i nema među vama tuđinca! Vi ste mi svjedoci, riječ je Jahvina, a ja sam Bog
Kati na bino, Ngai nde nasakolaki, nabikisaki mpe natatolaki; kasi ezali banzambe ya bapaya te. Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe Ngai, nazali Nzambe.
13 od vječnosti - ja jesam! I nitko iz ruke moje ne izbavlja; što učinim, tko izmijeniti može?
Solo, wuta na tango ya kala, nazalaka kaka ndenge moko; moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai. Soki nasali, nani akobongola yango? »
14 Ovako govori Jahve, otkupitelj vaš, Svetac Izraelov: “Radi vas poslah protiv Babilona, oborit ću prijevornice zatvorima i Kaldejci će udarit u kukanje.
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi: « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.
15 Ja sam Jahve, Svetac vaš, stvoritelj Izraelov, kralj vaš!”
Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino, Mokeli ya Isalaele, Mokonzi na bino. »
16 Ovako govori Jahve, koji put po moru načini i stazu po vodama silnim;
Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo apasolaka nzela monene kati na ebale monene, mpe nzela moke kati na mayi ya makasi;
17 koji izvede bojna kola i konje, vojsku i junake, i oni padoše da više ne ustanu, zgasnuše, kao stijenj se utrnuše.
Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda, mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba; Ye oyo alalisaka bango nyonso, mpe bakokaka lisusu kotelema te, bakufaka lokola singa ya mwinda:
18 Ne spominjite se onog što se zbilo, nit' mislite na ono što je prošlo.
« Bokanisa lisusu te makambo oyo eleka, bomitungisa lisusu te mpo na makambo ya kala.
19 Evo, činim nešto novo; već nastaje. Zar ne opažate? Da, put ću napraviti u pustinji, a staze u pustoši.
Tala, nazali kosala likambo ya sika! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.
20 Slavit će me divlje zvijeri, čaglji i nojevi, jer vodu ću stvorit' u pustinji, rijeke u stepi, da napojim svoj narod, izabranika svoga.
Banyama ya zamba, bambwa ya zamba mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo; pamba te nakopesa mayi kati na esobe, bibale kati na mabele ekawuka, mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,
21 I narod koji sam sebi sazdao moju će kazivati hvalu!
bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.
22 Ali me ti, Jakove, nisi zazvao, niti si se zamorio oko mene, Izraele!
Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi, pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele.
23 Nisi mi prinosio ovce za paljenicu, nisi me častio žrtvama. A ja te silio nisam na prinose, nisam ti dodijavao ištući kada.
Omemelaki Ngai bana meme te lokola mbeka ya kotumba, mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. Nakomisaki yo mowumbu te mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, mpe nalembisaki yo te mpo ete obonzela Ngai malasi.
24 Nisi mi kupovao za novac trsku, nisi me sitio salom svojih žrtava; nego si me grijesima svojim mučio, bezakonjem svojim dosađivao mi.
Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.
25 A ja, ja radi sebe opačine tvoje brišem i grijeha se tvojih ne spominjem.
Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.
26 Podsjeti me, zajedno se sporimo, govori ti da se opravdaš.
Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai; tika ete tosamba elongo, mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.
27 Prvi je otac tvoj sagriješio, posrednici tvoji od mene se odmetnuli,
Tata na yo ya liboso asalaki masumu, balobeli na yo batombokelaki Ngai.
28 knezovi su tvoji oskvrnuli Svetište. Tad izručih Jakova prokletstvu, i poruzi Izraela.
Boye, nakosambwisa bakambi ya tempelo na bino mpe nakobongisa Jakobi mpo na kobebisama, mpe Isalaele, mpo na pasi.

< Izaija 43 >