< Izaija 35 >

1 Nek' se uzraduje pustinja, zemlja sasušena, neka kliče stepa, nek' ljiljan procvjeta.
Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela! Tika ete esobe eyoka esengo mpe ebimisa fololo ya motane lokola roze!
2 Nek' bujno cvatom cvate, da, neka od veselja kliče i nek' se raduje. Dana joj je slava Libanona, divota Karmela i Šarona; oni će vidjeti slavu Jahvinu, divotu Boga našega.
Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
3 Ukrijepite ruke klonule, učvrstite koljena klecava!
Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga;
4 Recite preplašenim srcima: “Budite jaki, ne bojte se! Evo Boga vašega, odmazda dolazi, Božja naplata, on sam hita da nas spasi!”
Loba na bato oyo bazali kobanga: « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »
5 Sljepačke će oči progledati, uši će se gluhih otvoriti,
Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.
6 tad će hromi skakati k'o jelen, njemakov će jezik klicati. Jer će u pustinji provreti voda, i u stepi potoci,
Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Mayi ekobima na esobe, mpe bibale, na bisika ya kokawuka.
7 sažgana će zemlja postat' jezero, a tlo žedno - izvori. U brlozima gdje ležahu čaglji izrast će rogoz i trska.
Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.
8 Bit će ondje čista cesta, a zvat će se Sveti put: nitko nečist njime neće proći, bezumnici njime neće lutati.
Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
9 Ondje neće više biti lÓava, nit' će onud zvijer prolaziti, već će hodit' samo otkupljeni,
Nkosi ekozala te na nzela yango, ata nyama moko te ya mabe ekoleka na nzela yango, ekotikala komonana kuna te. Kasi basikolami kaka nde bakotambola na nzela yango.
10 vraćati se otkupljenici Jahvini. Doći će u Sion kličuć' od radosti, s veseljem vječnim na čelima; pratit će ih radost i veselje, pobjeći će bol i jauci.
Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.

< Izaija 35 >