< Izaija 1 >

1 Viđenje Izaije, sina Amosova, koje je imao o Judeji i Jeruzalemu u dane Uzije, Jotama, Ahaza i Ezekije, kraljeva judejskih.
Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.
2 Čujte, nebesa, poslušaj, zemljo, jer Jahve govori: “Sinove sam ti odgojio, podigao, al' se oni od mene odvrgoše.
Oh Lola, yoka! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka! Pamba te Yawe nde azali koloba: « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.
3 Vo poznaje svog vlasnika, a magarac jasle gospodareve - Izrael ne poznaje, narod moj ne razumije.”
Ngombe eyebi nkolo na yango, ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango apeselaka yango bilei; kasi Isalaele ayebi te, bato na Ngai basosoli te. »
4 Jao, grešna li naroda, puka u zlu ogrezla, roda zlikovačkog, pokvarenih sinova! Jahvu ostaviše, prezreše Sveca Izraelova, njemu su okrenuli leđa.
Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.
5 TÓa gdje da vas još udarim, odmetnici tvrdokorni? Sva je glava bolna, srce iznemoglo;
Boni, babeta bino lisusu wapi, bino bato oyo botingami kaka na botomboki? Moto na yo mobimba ezali kobela, motema na yo mobimba ezali na pasi.
6 od pete do glave nidje zdrava mjesta, već ozljede, modrice, otvorene rane, ni očišćene, ni povijene, ni uljem ublažene.
Longwa na litambe kino na moto, eloko moko te ezali malamu, kaka bapota mpe matutu oyo basukola te, batia kisi te mpe bapakola mafuta te.
7 Zemlja vam opustje, gradove oganj popali, njive vam na oči haraju tuđinci - pustoš k'o kad propade Sodoma.
Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.
8 Kći sionska ostade kao koliba u vinogradu, kao pojata u polju krastavaca, kao grad opsjednut.
Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko lokola mwa ndako moko ya matiti kati na elanga ya vino, lokola ndako ya kobombamela kati na bilanga ya bapasiteki, lokola engumba oyo ebatelami.
9 Da nam Jahve nad Vojskama ne ostavi Ostatak, bili bismo k'o Sodoma, Gomori slični.
Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.
10 Čujte riječ Jahvinu, glavari sodomski, poslušaj zakon Boga našega, narode gomorski!
Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore!
11 “Što će mi mnoštvo žrtava vaših?” - govori Jahve. - “Sit sam ovnujskih paljenica i pretiline gojne teladi. I krv mi se ogadi bikova, janjaca i jaradi.
« Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.
12 Kad mi lice vidjet' dolazite, tko od vas ište da gazite mojim predvorjima?
Tango boyaka liboso na Ngai, nani abengaka bino ete boya kokota na lopango na Ngai?
13 Prestanite mi nositi ništavne prinose, kad mi omrznu. Mlađaka, subote i sazive - ne podnosim zborovanja i opačine.
Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino: bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te.
14 Mlađake i svetkovine vaše iz sve duše mrzim - teški su mi, podnijet' ih ne mogu!
Motema na Ngai eyini bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza mpe bafeti na bino wana ekatama. Ekomi penza mokumba mpo na Ngai, nalembi komema yango.
15 Kad na molitvu ruke širite, je od vas oči odvraćam. Molitve samo množite, ja vas ne slušam. Ruke su vam u krvi ogrezle,
Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
16 operite se, očistite. Uklonite mi s očiju djela opaka, prestanite zlo činiti!
Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai! Botika kosala mabe!
17 Učite se dobrim djelima: pravdi težite, ugnjetenom pritecite u pomoć, siroti pomozite do pravde, za udovu se zauzmite.”
Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali!
18 “Hajde, dakle, da se pravdamo,” govori Jahve. “Budu l' vam grijesi kao grimiz, pobijeljet će poput snijega; kao purpur budu li crveni, postat će kao vuna.
Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.
19 Htjednete l' me poslušati, uživat ćete plodove zemaljske.
Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.
20 U buntovništvu ako ustrajete, proždrijet će vas mač.” Tako usta Jahvina govorahu.
Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, bokokufa na mopanga. » Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.
21 Kako li posta bludnicom tvrđa vjerna? Bješe puna pravičnosti, pravda u njoj stolovala, a sad - ubojice.
Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi lokola mwasi ya ndumba! Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, boyengebene ezalaki kovanda kati na yango; kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.
22 Srebro ti se u trosku obratilo, vino ti se razvodnjelo.
Palata na yo ekomi bosoto, vino na yo ya kitoko ekomi mayi-mayi.
23 Knezovi se tvoji odmetnuli, s tatima se pobratili. Svi za mitom hlepe, za darovima lete. Siroti pravdu uskraćuju, udovička parnica ne stiže k njima.
Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.
24 Stog ovako govori Jahve, Gospod nad Vojskama, Junak Izraelov: “Ah, kad se iskalim na protivnicima i osvetim dušmanima!
Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi: Ah, mawa! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai!
25 Kada na te ruku pružim, da lužinom tvoju trosku očistim, da iz tebe uklonim olovo!
Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,
26 Da ti opet postavim suce kao negda, savjetnike kao u početku, pa da te zovu Gradom pravednim, Tvrđom vjernosti.”
nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.
27 Sud pravedni otkupit će Sion, a pravda obraćenike njegove.
Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene, mpe bato na yango oyo bakobongola mitema bakobika na nzela ya bosembo.
28 Otpadnici i grešnici skršit će se zajedno, a oni što Jahvu napuštaju poginut će.
Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama, bato oyo bakobosana Yawe bakosila.
29 Da, stidjet ćete se zbog hrastova što ih sad obožavate i crvenjet ćete zbog gajeva u kojima sad uživate.
« Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente oyo bozalaki kolinga mingi; bokoyoka pasi na mitema mpo na bilanga oyo boponaki;
30 Jer, bit ćete poput hrasta osušena lišća i poput gaja u kojem vode nema.
bokokoma lokola nzete ya terebente oyo ekawuka makasa.
31 Junak će biti kučina, a iskra djelo njegovo, zajedno će izgorjeti, a nikoga da ugasi.
Moto ya makasi akokoma moto ya bolembu, mpe mosala na ye ekokoma lokola mokalikali; bango mibale bakozika nzela moko na moto, mpe moto oyo koboma yango akozala te. »

< Izaija 1 >