< Habakuk 2 >

1 Stat ću na stražu svoju, postavit se na bedem, paziti što će mi reći, kako odgovorit na moje tužbe.
Nakotelema na esika na ngai ya kokengela, nakotelema ngai moko na likolo ya mir, nakosenzela mpo na komona makambo oyo akoyebisa ngai mpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.
2 Tada Jahve odgovori i reče: “Zapiši viđenje, ureži ga na pločice, da ga čitač lako čita.”
Yawe ayanolaki: — Koma emoniseli oyo, koma yango na etando ya mabanga, koma yango penza malamu mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.
3 Jer ovo je viđenje samo za svoje vrijeme: ispunjenju teži, ne vara; ako stiže polako, čekaj, jer odista će doći i neće zakasniti!
Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, (zela) yango kaka; solo, ekokokisama, ekowumela te.
4 Gle: propada onaj čija duša nije pravedna, a pravednik živi od svoje vjere.
Tala, atondisami na lolendo, motema na ye ezali na bosembo te; kasi moto ya sembo akobika na nzela ya kondima na ye.
5 Bogatstvo je odista podmuklo! Ohol je i ne može počinuti tko ždrijelo razvaljuje k'o Podzemlje, tko je kao smrt nezasitan, tko sabire za se sve narode, tko kupi za se sva plemena! (Sheol h7585)
Solo, masanga ya vino ekosaka; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye. (Sheol h7585)
6 Zar mu se neće svi podrugivati, rugalicu i zagonetku spjevat' protiv njega? Reći će: Jao onom tko množi što nije njegovo (a dokle će?) i opterećuje se zalogama!
Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola: « Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi mpe akolisaka bomengo na ye na kobotola bato biloko na makasi! » Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini?
7 Neće li naglo ustat' vjerovnici tvoji, neće li se probuditi ljuti tvoji tlačitelji? Tada ćeš im plijen biti!
Boni, bakolo biloko bakobimela yo te na pwasa? Bakolamukela yo mpe bakolengisa yo. Boni, okokoma te lokola mosuni na bango ya kolia?
8 Jer si opljačkao mnoge narode, sav ostatak naroda opljačkat će tebe, jer si prolio krv ljudsku, poharao zemlju, grad i sve mu žitelje.
Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
9 Jao onom tko otimačinu zgrće nepravednu kući svojoj, da visoko svije gnijezdo svoje i otkloni ruku zla!
Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.
10 Nanese sramotu kući svojoj: zatirući mnoga plemena, griješiš protiv sebe.
Lokola osalaki mabongisi ya kobebisa bato ebele, obongisaki nde soni ya ndako na yo moko mpe okotisi nde bomoi na yo moko na likama.
11 Jer iz samih zidova kamen kriči, a krovna mu greda odgovara.
Mabanga ya mir ekoganga mpe mabaya ya motondo ekoyanola.
12 Jao onom tko grad diže krvlju i tvrđavu zasnuje na nepravdi!
Mawa na moto oyo atongaka engumba na nzela ya makila mpe alendisaka yango na nzela ya lokuta!
13 Nije li to, gle, od Jahve nad Vojskama da se narodi za oganj trude, puci nizašto muče?
Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, ete misala ya bato ezala kaka lokola koni oyo ezali kopela moto, ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba?
14 Jer će se zemlja napuniti znanja o slavi Jahvinoj kao što vode prekrivaju more.
Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
15 Jao onom tko bližnjeg navodi na piće, ulijeva otrov dok on pije da bi promatrao njegovu nagost!
Mawa na moto oyo amelisaka moninga na ye masanga makasi kino asilisa mbeki nyonso mpe alangwa mpo ete amona bolumbu na ye!
16 Ti si pijan od sramote, ne od slave! Pij samo i pokazuj kapicu. Dolazi ti pehar iz desnice Jahvine i sramota na slavu tvoju!
Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.
17 Nasilje nad Libanonom tebe će prestraviti, pokolj zvijeri, jer si ljudsku krv prolio, poharao zemlju, grad i njegove žitelje.
Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
18 Čemu koristi tesan lik da ga umjetnik teše? Čemu lijevan lik, lažno proroštvo, da se tvorac njegov u nj pouzdaje oblikujuć' nijeme kipove?
Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.
19 Jao onom tko komadu drva kaže: “Probudi se!” Kamenu nijemom: “Preni se!” On da prorokuje? Optočen može biti i zlatom i srebrom, ali nikakva daha životnog nema u njemu.
Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete: « Telema! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi: « Lamuka! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.
20 Ali je Jahve u svojem svetom Hramu: nek' zemlja sva zašuti pred njime!
Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye!

< Habakuk 2 >