< Ezra 6 >

1 Tada, po naredbi kralja Darija, uzeše tražiti u Babilonu, u spremištu gdje je bila pismohrana,
Mokonzi Dariusi apesaki mitindo, mpe balukaki kati na babuku ya kala oyo ezalaki na Babiloni, kati na ebombelo bomengo ya mokonzi.
2 i nađoše u Ekbatani, tvrđavi u medijskoj pokrajini, svitak s ovom poveljom: “Na spomen.
Mpe bamonaki buku moko kati na Ekibatane, engumba mokonzi ya etuka ya Medi. Tala makomi oyo ezalaki kati na buku yango: « Ekaniseli:
3 Prve godine kraljevanja Kira proglasio je kralj Kir: Dom Božji u Jeruzalemu. Dom neka se sagradi kao mjesto gdje će se prinositi žrtve i gdje će se donositi prinosi za paljenje. Neka bude visok šezdeset lakata i širok šezdeset lakata.
Na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi, mokonzi Sirisi azwaki mokano na tina na Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi: Tempelo ya Nzambe esengeli kotongama lisusu mpo ete ezala esika ya kobonza mbeka; boye esengeli kozongisa miboko na yango. Tempelo ekozala na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene tuku misato na mokuse.
4 Tri reda neka budu od velikog kamenja, a jedan od drveta. Trošak će se podmiriti iz kraljevskog dvora.
Ekozala na milongo misato ya mabanga bakata mpe molongo moko ya mabaya ya sika mpo na motondo. Mbongo ya kofuta mpo na misala yango ekowuta na bomengo ya mokonzi.
5 Povrh toga, posuđe zlatno i srebrno iz Doma Božjeg koje Nabukodonozor bijaše uzeo iz svetišta u Jeruzalemu i prenio u Babilon neka se vrati i bude na svome mjestu u svetištu jeruzalemskom i neka se postavi u Domu Božjem.”
Lisusu, biloko basala na wolo mpe na palata ya Ndako ya Nzambe, oyo Nabukodonozori azwaki na Tempelo kati na Yelusalemi mpe amemaki na Babiloni, esengeli kozonga na bisika na yango kati na Tempelo, na Yelusalemi; basengeli kotia yango kati na Ndako ya Nzambe.
6 “Sada, dakle, Tatnaju, satrape s onu stranu Rijeke, Šetar Boznaju i drugovi vaši poslanici s onu stranu Rijeke, udaljite se odatle!
Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo.
7 Pustite neka taj Dom Božji grade upravitelji i starješine židovske. Dom Božji treba sagraditi na njegovu prvotnom mjestu.
Botika ete misala ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe ekoba. Tika ete moyangeli mpe bakambi ya Bayuda batonga yango lisusu na esika na yango ya kala.
8 Evo mojih naredaba o vašem držanju prema starješinama judejskim kako bi se ponovo sagradio taj Dom Božji: od kraljevskog blaga - to jest od danka s onu stranu Rijeke - neka se plaća onim ljudima brižljivo, bez prijekida,
Tala mitindo oyo ngai nazali kopesa bino na tina na oyo bosengeli kosala mpo na kosunga bakambi ya Bayuda mpe mpo na misala ya botongi Ndako oyo ya Nzambe: ‹ Bosengeli tango nyonso kozwaka mbongo ya misala na bomengo ya mokonzi, oyo ewutaka na mpako oyo etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate efutaka mpo na mokonzi, mpo na kofuta bato wana na ndenge ekoki mpe mpo ete misala etelema te.
9 i što im bude trebalo za žrtve paljenice Bogu neba: junaca, ovnova i jaganjaca, i pšenice, soli, vina i ulja, neka im se redovito daje svakoga dana, prema uputama svećenika u Jeruzalemu.
Bosengeli mpe kopesaka mikolo nyonso epai ya Banganga-Nzambe ya Yelusalemi biloko nyonso oyo bakozala na yango na bosenga mpo na mbeka ya kotumba ya Nzambe ya Likolo: bana ngombe ya mibali, bameme ya mibali, bana meme, ble, mungwa, masanga ya vino mpe mafuta. Soki bakomi na bosenga ya biloko, bino bosengeli kopesa bango yango mikolo nyonso, mpe esengeli te kozanga,
10 Neka prinose žrtve na ugodan miris Bogu neba, neka mole za život kralja i njegovih sinova.
mpo ete bakoka kobonzaka mbeka ya solo kitoko epai ya Nzambe ya Likolo, mpe mpo ete basambelaka mpo na bomoi malamu ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali.
11 Naređujem osim toga: tko god prekrši ovu naredbu, neka mu se izvadi greda iz kuće pa neka na njoj bude pogubljen, a kuća da mu zato postane bunište.
Bongo tala mokano oyo nasili kozwa mpo na moto nyonso oyo akobongola to akotosa te mitindo oyo: bakolongola libaya moko kati na ndako na ye, bakotelemisa yango, bakodiembika ye na libaya yango mpe bakokomisa ndako na ye mopiku ya biloko ya mbindo.
12 I Bog, koji je ondje nastanio svoje Ime, neka obori svakog kralja i narod koji bi se drznuo da prekrši moju naredbu i sruši Dom Božji u Jeruzalemu! Ja, Darije, izdao sam ovu zapovijed. Neka se točno vrši!”
Tika ete Nzambe oyo atiaki Kombo na Ye kuna akweyisa mokonzi nyonso to bato nyonso oyo bakomeka kotombola loboko mpo na koboya kotosa to kobongola mitindo na ngai na kobuka Tempelo oyo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Ezali ngai, Dariusi, moto napesi mitindo yango. Tika ete botosa yango malamu mpe na lombangu. › »
13 Tada Tatnaj, satrap s onu stranu Rijeke, Šetar Boznaj i njihovi drugovi učiniše onako kako je zapovjedio kralj Darije.
Boye, Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batosaki mitindo ya mokonzi Dariusi na lombangu mpe na ndenge ezaleli.
14 A židovske su starješine nastavile uspješno graditi po nadahnuću proroka Hagaja i Zaharije, sina Adonova. Dovršili su gradnju po naredbi Boga Izraelova i po naredbi Kira i Darija i Artakserksa, kralja perzijskoga.
Boye bakambi ya Bayuda bakobaki misala ya kotonga, mpe balongaki wana balendisamaki na maloba ya basakoli Aje mpe Zakari, mokitani ya Ido. Basilisaki kotonga kolanda mitindo ya Nzambe ya Isalaele mpe ya Sirisi, Dariusi, mpe Aritakizerisesi, bakonzi ya Persi.
15 Hram je zavšen dvadeset i trećeg dana mjeseca Adara. Bilo je to šeste godine vladavine kralja Darija.
Basilisaki kotonga Ndako mobimba ya Nzambe, na mokolo ya misato ya sanza ya Adari, tango mokonzi Dariusi akokisaki mibu motoba na bokonzi.
16 Izraelci - svećenici, leviti i ostatak povratnika iz sužanjstva - radosno posvetiše taj Dom Božji.
Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato mosusu oyo bawutaki na bowumbu basalaki feti ya libulisi ya Ndako ya Nzambe.
17 Žrtvovaše za posvećenje Doma Božjega stotinu junaca, dvije stotine ovnova, četiri stotine janjaca i, kao žrtvu za grijehe svega Izraela, dvanaest jaraca - prema broju plemena Izraelovih.
Babonzaki bangombe ya mibali nkama moko, bameme ya mibali nkama mibale, bana meme nkama minei mpo na libulisi ya Ndako ya Nzambe; mpe bantaba ya mibali zomi na mibale, moko mpo na ekolo moko na moko ya Isalaele, lokola mbeka mpo na masumu ya Isalaele mobimba.
18 Zatim postaviše svećenike po njihovim redovima i levite po njihovim razredima za službu Domu Božjem u Jeruzalemu, kako je propisano u knjizi Mojsijevoj.
Bakabolaki mpe Banganga-Nzambe kolanda milongo na bango, mpe Balevi kolanda masanga na bango mpo na mosala ya Nzambe kati na Yelusalemi, ndenge ekomama kati na buku ya Moyize.
19 Povratnici iz sužanjstva slavili su Pashu četrnaestog dana prvoga mjeseca.
Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu basepelaki feti ya Pasika.
20 Svi su se leviti, kao jedan čovjek, očistili: svi su bili čisti; žrtvovali su pashu za sve povratnike iz ropstva, za svoju braću svećenike i za sebe.
Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki kolanda mibeko mpe bakomaki peto. Boye Balevi bakataki kingo ya mpate lokola mbeka ya Pasika mpo na bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu, mpo na bandeko na bango, Banganga-Nzambe, mpe mpo na bango moko.
21 Blagovali su pashu Izraelci koji su se vratili iz ropstva i svi oni koji su im se, prekinuvši s nečistoćom naroda zemlje, pridružili da traže Jahvu, Boga Izraelova.
Bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu baliaki yango elongo na bato nyonso oyo bakabwanaki na misala ya mbindo ya bikolo ya mokili mpe basanganaki elongo na bango mpo na koluka Yawe, Nzambe ya Isalaele.
22 I svetkovahu radosno Blagdan beskvasnih hljebova sedam dana: jer ih je Jahve ispunio radošću i obratio prema njima srce asirskog kralja da ojača njihove ruke u radovima oko Doma Boga, Boga Izraelova.
Na mikolo sambo, basalaki na esengo feti ya Mapa ezanga levire, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo ndenge abongolaki makanisi ya mokonzi ya Asiri mpo ete asunga bango na misala ya botongi Ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Isalaele.

< Ezra 6 >