< Ezekiel 9 >

1 Tada zagrmje na moje uši i reče: “Kazne grada! Priđite svaka sa svojim zatornim oružjem u ruci!”
Bongo nayokaki ye kobelela na mongongo makasi: « Bopusana awa, bino oyo bozali na mokumba ya kobebisa engumba! Tika ete moko na moko kati na bino asimba ebundeli na ye na loboko! »
2 I gle, dođoše šestorica ljudi s gornjih vrata, što su okrenuta k sjeveru, svaki sa svojim zatornim oružjem u ruci. Među njima bijaše i jedan odjeven u lan, s pisarskim priborom za pojasom. Uđoše oni i stadoše uz tučani žrtvenik.
Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze.
3 A Slava Boga Izraelova vinu se s kerubina, nad kojima lebdijaše, prema pragu Doma. I pozva čovjeka odjevena u lan, koji imaše za pojasom pisarski pribor,
Nkembo ya Nzambe ya Isalaele elongwaki na likolo ya basheribe epai wapi ezalaki kowumela mpe ekendeki kino na ekotelo ya Tempelo; mpe Yawe abengisaki moto oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye.
4 te mu reče: “Prođi gradom Jeruzalemom i znakom 'tau' obilježi čela sviju koji tuguju i plaču zbog gnusoba što se u njemu čine!”
Yawe alobaki na ye: « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. »
5 A drugima reče na moje uši: “Pođite za njim gradom i ubijajte bez milosrđa. Oči vaše neka se ne sažale i nemajte smilovanja.
Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu: « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te!
6 Pobijte starce, mladiće, djevojke, djecu i žene; istrijebite ih sve do posljednjega. Ali na kome bude znak 'tau', njega ne dirajte. Počnite od mojega Svetišta!” I oni počeše od starješina koji stajahu pred Domom.
Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.
7 I reče im: “Oskvrnite Dom moj i napunite mu predvorje truplima! Krenite!” I oni iziđoše te zaredaše ubijati gradom.
Alobaki na bango: « Bokomisa Tempelo mbindo mpe botondisa mapango na yango na bibembe. Bokende! » Babimaki mpe bakendeki koboma bato kati na engumba.
8 Dok su oni klali, ja ostadoh, bacih se ničice i zavapih: “Jao, Jahve Gospode! Zar ćeš zaista uništiti sve što preostade od Izraela da iskališ svoj gnjev nad Jeruzalemom?”
Tango bazalaki koboma bato, natikalaki ngai moko; nakweyaki elongi na ngai kino na mabele mpe nakomaki koganga: — Oh, Nkolo Yawe! Okosilisa solo koboma batikali nyonso ya Isalaele, na kopelisela Yelusalemi kanda na Yo?
9 Reče mi: “Veoma je veliko bezakonje doma Izraelova i doma Judina; zemlja je puna krvi, a grad krcat zločina. Govore: 'Jahve je ostavio zemlju! Ne vidi Jahve!'
Azongiselaki ngai: — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo; pamba te bazali koloba: « Yawe asundoli mokili; Yawe azali komona eloko moko te. »
10 I zato se moje oči neće sažaliti i neću im se smilovati: djela ću im njihova oboriti na glavu!”
Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango.
11 I gle, čovjek odjeven u lan, koji imaše za pojasom pisarski pribor, javi vijesti: “Učinih kako si mi zapovjedio!”
Moto oyo alataki elamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye apesaki sango, na maloba oyo: « Nasali makambo oyo otindaki ngai. »

< Ezekiel 9 >