< Ezekiel 45 >

1 Kad budete zemlju ždrijebom dijelili u baštinu, prinesite kao prinos pridržan Jahvi jedan sveti dio zemlje, dugačak dvadeset i pet tisuća lakata, širok deset tisuća; to neka bude sveto područje uzduž i poprijeko.
Tango bokokabola mokili na zeke lokola libula, bokopesa epai na Yawe eteni moko lokola etuka ya bule: ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele nkoto mitano na mokuse. Etuka yango ekozala bule na etando na yango nyonso.
2 Od toga neka bude za Svetište četvorina od pet stotina lakata i čistina od deset lakata uokolo.
Bokotika bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi, mpe bametele pene nkama mibale na tuku mitano na mokuse mpo na kotonga Esika ya bule; bongo bokozingela yango na lopango moko ya polele ya bametele pene tuku mibale na mitano.
3 Od toga područja izmjeri u dužinu dvadeset i pet tisuća lakata, a u širinu deset tisuća: tu neka bude Svetište - Svetinja nad svetinjama.
Kati na etuka wana ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse, bokokata eteni ya mabele mpo na Esika ya bule, Esika-Oyo-Eleki-Bule.
4 Taj sveti dio zemlje pripada svećenicima koji služe u Svetištu i koji pristupaju k Jahvi da mu služe: tu neka im bude mjesto za kuće; i to neka je sveto mjesto koje pripada Svetištu.
Ekozala eteni ya bule oyo balongoli kati na mokili: ezali ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kati na Esika ya bule mpe bapusanaka pene ya Yawe mpo na kosalela Ye; ezali kuna nde bakotonga bandako na bango, mpe ekozala esika oyo ebulisami mpo na Esika ya bule.
5 Dvadeset i pet tisuća u dužinu i deset tisuća u širinu neka bude levitima koji služe Domu: neka ondje sagrade gradove u kojima će stanovati.
Etuka moko ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse ekozala mpo na Balevi oyo basalaka kati na Tempelo; lokola libula na bango, ekozala kuna nde bakotonga bingumba na bango ya kovanda.
6 Za posjed gradu dodijelite pet tisuća lakata u širinu i dvadeset i pet tisuća lakata u dužinu usporedo sa svetim područjem: to će pripadati svemu domu Izraelovu.
Pembeni ya etuka ya bule, bokokata etando ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse mpo na kotonga engumba; ekozala mpo na libota mobimba Isalaele.
7 Knezu pripada dio s obje strane svetoga područja i gradskoga posjeda - duž svetoga područja i duž gradskoga posjeda - od zapadne strane prema zapadu i od istočne strane prema istoku, a dužina neka bude jednaka svakom tom dijelu, od zapadne do istočne granice.
Mokambi akozwa mabele oyo ezali kokabola etuka ya bule mpe mabele ya engumba; mabele yango ekokende eteni moko na ngambo ya weste, mpe eteni mosusu na ngambo ya este. Molayi ya etuka yango ekobanda longwa na ngambo ya weste kino na mondelo ya ngambo ya este oyo etalana na moko ya biteni.
8 To neka bude njegova zemlja, posjed u Izraelu, da knezovi više ne tlače narod moj i da zemlju dadu domu Izraelovu po plemenima.'
Etuka yango ekozala libula na ye kati ya Isalaele. Boye, bakambi na Ngai bakonyokola lisusu bato na Ngai te, kasi bakotika mokili na maboko ya lisanga ya Isalaele kolanda mabota na bango.
9 Ovako govori Jahve Gospod: 'Dosta je, knezovi Izraelovi! Okanite se nasilja i pljačke i vršite zakon i pravdu; izbavite narod moj od svojih tražbina - riječ je Jahve Gospoda.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe.
10 Mjerite pravom mjerom: pravom efom i pravim batom.
Bosengeli te kosalela emekelo kilo ya lokuta, efa ya lokuta to bati ya lokuta.
11 Efa i bat neka jednako hvataju: bat neka iznosi desetinu homera i efa desetinu homera - neka im mjera bude prema homeru.
Efa mpe bati ekotaka biloko ndenge moko: ekotaka ndambo moko kati na bandambo zomi ya omeri. Bamekaka monene ya efa mpe bati kolanda monene ya omeri.
12 Šekel neka bude dvadeset gera; mina neka vam bude dvadeset šekela, dvadeset i pet šekela i petnaest šekela.
Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba.
13 Ovo je prinos koji ćete prinositi: šestinu efe od svakoga homera pšenice i šestinu efe od svakoga homera ječma.
Tala biloko oyo bokotia pembeni lokola makabo ya kopesa epai na Yawe: mpo na omeri moko ya ble mpe orje, eteni ya motoba ya efa moko.
14 A za ulje ova je uredba: desetina bata od svakoga kora - deset bata jedan je kor.
Mobeko mpo na mafuta, bakomeka yango na bati: eteni ya zomi ya omeri moko.
15 Od svakoga stada od dvije stotine ovaca sa sočnih izraelskih pašnjaka po jednu ovcu za žrtvu prinosnicu, paljenicu i pričesnicu - vama za pomirenje - riječ je Jahve Gospoda.
Mpe bokozwa ntaba moko ya mwasi to meme moko ya mobali kati na bibwele nkama mibale, oyo ekobimela na etonga ya bibwele oyo eliaka matiti kitoko ya Isalaele. Bakosalela yango lokola likabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato, elobi Nkolo Yawe.
16 Sav narod zemlje duguje ovaj prinos knezu Izraelovu.
Bato nyonso ya mokili basengeli kolongola likabo yango mpo na mokambi kati na Isalaele.
17 A knez je dužan davati žrtve paljenice, prinosnice i ljevanice za svetkovine i za mlađake, za subote i blagdane doma Izraelova: on neka se postara za okajnicu, za pomirnicu, prinosnicu, paljenicu i pričesnicu za pomirenje doma Izraelova.'
Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.
18 Ovako govori Jahve Gospod: 'Prvoga mjeseca, prvoga dana u mjesecu, uzmi june bez mane i okaj njime Svetište.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule.
19 Svećenik neka uzme krvi te žrtve okajnice i neka njome pomaže dovratnike Doma i sva četiri ugla pojasa žrtveničkoga i dovratnike vrata unutrašnjega predvorja.
Nganga-Nzambe akozwa ndambo ya makila ya mbeka ya masumu, akotia yango na mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na basonge nyonso minei ya moboko ya etumbelo mpe na mabaya oyo esimbaka ekuke ya lopango ya kati.
20 Tako neka učini i sedmoga dana istoga mjeseca za svakoga koji je sagriješio iz slabosti i neznanja. Tako ćete dovršiti pomirenje Doma.
Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo.
21 Prvoga mjeseca, četrnaestoga dana u mjesecu, svetkujte Pashu, sedmodnevni blagdan, kad se blaguju beskvasni hljebovi.
Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire.
22 Toga dana neka knez za se i za sav puk zemlje prinese june za okajnicu.
Na mokolo yango, mokambi akopesa ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili.
23 Sedam dana blagdana neka prinosi za paljenicu Jahvi sedam junčića i sedam ovnova bez mane - svaki dan tih sedam dana - i svaki dan jarca kao okajnicu.
Na mikolo nyonso sambo ya feti, mokonzi akopesa bangombe ya mibali sambo mpe bameme ya mibali sambo, oyo ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, mpe ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu.
24 A kao prinosnicu neka prinese efu po svakom juncu i efu po ovnu i hin ulja na svaku efu.
Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta; mpe mpo na meme moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta.
25 Sedmoga mjeseca, petnaestoga dana u mjesecu, neka o blagdanu isto toliko prinosi sedam dana: isto toliko okajnica, paljenica, prinosnica i ulja.'
Na mikolo nyonso sambo ya feti oyo ebandaka na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, akobanda kobonza bambeka kaka wana: bambeka ya masumu, ya kotumba, ya bambuma mpe ya mafuta.

< Ezekiel 45 >