< Ezekiel 17 >

1 Dođe mi riječ Jahvina:
Yawe alobaki na ngai:
2 “Sine čovječji, smisli zagonetku i iznesi prispodobu domu Izraelovu! Reci:
« Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele.
3 'Ovako govori Jahve Gospod: Velik orao, velikih krila, duga perja, gusta, šarena paperja, doletje na Libanon i zgrabi cedrov vrh;
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mpongo moko ya monene oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, ekendeki kotelema na Libani. Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,
4 odlomi mu najvišu grančicu, odnese je u zemlju trgovaca i spusti je u grad prodavača.
ebukaki etape moko ya moke oyo ezalaki na songe ya nzete yango mpe ememaki yango na mokili ya bato ya mombongo, epai wapi elonaki yango kati na engumba ya bateki.
5 Onda uze izdanak iz zemlje, u plodnu ga njivu posadi, kraj obilnih voda stavi, kao vrbu usadi.
Ekamataki ndambo ya milona ya mokili wana, ekendeki kolona yango na mabele ya malamu, lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi.
6 Izdanak proklija, bujan izbi čokot, onizak izraste, mladice mu k orlu segnuše, a pod njim mu žilje bješe; u bujan se razvi čokot, potjera izdanke, mladice razgrana.
Nkona yango ekolaki mpe ekomaki nzete ya vino; ezalaki penza mokuse, kasi bitape na yango ezalaki efungwama mpe etala na ngambo ya mpongo. Bongo misisa na yango ezalaki kaka etikala na se na yango. Ekomaki nzete ya vino, ebotaki bitape mpe ebimisaki makasa ebele.
7 Bijaše i drugi orao, velik i velikih krila, gusta perja. I gle, čokot k njemu žilje pruži, k njemu upravi grančice svoje da ga natapa bolje od tla u koje bi zasađen.
Kasi ezalaki lisusu na mpongo mosusu ya monene oyo ezalaki na mapapu ya milayi mpe basala ebele. Nzokande, nzete ya vino wana ebimisaki misisa na yango na ngambo ya mpongo wana, longwa na esika oyo balonelaki yango mpe epanzaki bitape na yango kino epai na mpongo wana, mpo na kosopela yango mayi.
8 Na plodnoj njivi, kraj obilnih voda, bješe zasađen: mogao je tjerat' mladice, uroditi rodom, k'o veličanstveni trs izrasti.'
Balonaki yango na mabele ya malamu, lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi ebele mpo ete ebota bitape mpe bambuma, mpe ekoma nzete monene ya vino. ›
9 Reci: 'Ovako govori Jahve Gospod: Hoće l' uspijevati? Neće l' mu orao sve žilje izguliti? Neće l' mu sve plodove potrgati? Neće l' mu sve mladice, čim izbiju, sasušiti? Da, i bez snažne mišice, i bez mnoštva naroda, iščupat će ga iz korijena!
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, ekokoma solo monene? Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango te mpo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka? Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka; ekoluka na yango makasi mingi te mpe bato ebele te mpo na kopikola yango.
10 Gle, zasađen je! Hoće l' uspijevati? Čim ga takne istočnjak, neće l' sav usahnuti? Da, na lijehama iz kojih niče uvenut će.'”
Ata soki bakei kolona yango esika mosusu, okanisi ete ekokola? Ekokawuka nyonso tango mopepe ya este ekoya kobeta yango; solo ekokawuka ata na esika oyo ezalaki kokola malamu. › »
11 Dođe mi riječ Jahvina:
Bongo Yawe alobaki na ngai:
12 “Reci domu odmetničkome: 'Zar ne znate što ovo znači?' Reci im: 'Eto, dođe kralj babilonski u Jeruzalem, zarobi mu kralja i sve knezove, odvede ih k sebi u Babilon.
« Loba na ndako ya batomboki oyo: ‹ Boni, bozali solo koyeba soki makambo oyo elakisi nini? › Loba na bango: ‹ Mokonzi ya Babiloni ayaki na Yelusalemi, akangaki mokonzi elongo na bakalaka na yango mpe amemaki bango na mokili na ye, elingi koloba na Babiloni.
13 Odvede i izdanak iz kraljevskoga koljena, sklopi s njima savez i zakletvom se obveza, pošto odvede sve mogućnike iz zemlje,
Akamataki moko kati na libota ya bokonzi, asalaki boyokani elongo na ye mpe alapisaki ye ndayi; mpe amemaki lisusu bankumu ya mokili
14 da će kraljevstvo ostati neznatno i da se neće dizati, nego će čuvati i držati savez s njime.
mpo ete bokonzi ekweya, ekoka lisusu kotelema te mpe ewumela kobika kaka na kobatela mibeko ya boyokani na ye.
15 Ali se on od njega odmetnu; poslanike uputi u Egipat, tražeći od njega konje i jaku vojsku. Hoće li uspjeti? Može li umaći onaj tko tako radi? Raskinu savez, pa da umakne?
Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo? Boni, abuka solo boyokani mpe abika?
16 Života mi moga, riječ je Jahve Gospoda: jer prezre zakletvu kralja koji ga na prijestolje posadi i razvrže savez s njime, u njegovoj će zemlji umrijeti, usred Babilona!
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye.
17 Svojom silnom vojskom i mnoštvom naroda faraon mu neće pomoći u boju kad onaj digne nasipe i sagradi kule opsadne da mu zatre mnogo ljudstvo.
Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele.
18 Prezreo je zakletvu, razvrgao savez. Da, iako ruku bijaše dao, sve to učini! Ne, neće umaći!'
Atosaki te ndayi oyo alapaki mpe abukaki boyokani. Lokola atombolaki loboko na ye na ndayi mpe asali makambo ya boye, akobika te!
19 Stoga ovako govori Jahve Gospod: 'Života mi moga, zakletvu što je prezre i savez što ga razvrže oborit ću na glavu njegovu!
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na Kombo na Ngai, nakomemisa ye ngambo ya ndayi na Ngai, oyo atioli mpe ya boyokani na Ngai, oyo abuki.
20 Mrežu ću nad njim razapeti i uhvatit će se u moju zamku, pa ću ga odvesti u Babilon i ondje mu suditi zbog nevjere kojom mi se iznevjeri.
Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai.
21 Cvijet vojske njegove od mača će pasti, a ostatak se raspršiti u sve vjetrove. I spoznat ćete da ja, Jahve, tako rekoh.'
Basoda na ye nyonso ya mpiko bakokufa na mopanga mpe bato oyo bakotikala na bomoi bakopanzana bisika nyonso. Na bongo, bokoyeba solo ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki.
22 Ovako govori Jahve Gospod: 'S vrha cedra velikoga, s vrška mladih grana njegovih, odlomit ću grančicu i posadit' je na gori visokoj, najvišoj.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ngai moko nakokamata etape ya songe ya nzete ya sedele mpe nakolona yango; nakobuka na songe ya etape yango moto ya nzete moko, oyo nakolona na likolo ya ngomba oyo eleki molayi.
23 Na najvišoj gori izraelskoj nju ću zasaditi: razgranat će se ona, plodom uroditi.
Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.
24 I sve će poljsko drveće znati da ja sam Jahve koji visoko drvo ponizujem, a nisko uzvisujem; zeleno drvo sušim, a drvu suhu dajem da rodi. Ja, Jahve, rekoh i učinit ću!'”
Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »

< Ezekiel 17 >