< 诗篇 63 >

1 大卫在犹大旷野的时候,作了这诗。 神啊,你是我的 神, 我要切切地寻求你, 在干旱疲乏无水之地,我渴想你; 我的心切慕你。
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda. Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.
2 我在圣所中曾如此瞻仰你, 为要见你的能力和你的荣耀。
Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
3 因你的慈爱比生命更好, 我的嘴唇要颂赞你。
Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo.
4 我还活的时候要这样称颂你; 我要奉你的名举手。
Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
5 我在床上记念你, 在夜更的时候思想你; 我的心就像饱足了骨髓肥油, 我也要以欢乐的嘴唇赞美你。
Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
6
Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu;
7 因为你曾帮助我, 我就在你翅膀的荫下欢呼。
pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
8 我心紧紧地跟随你; 你的右手扶持我。
Nakangami na Yo; loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.
9 但那些寻索要灭我命的人 必往地底下去;
Bato oyo balukaka koboma ngai bakozinda na mabele
10 他们必被刀剑所杀, 被野狗所吃。
Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.
11 但是王必因 神欢喜。 凡指着他发誓的必要夸口, 因为说谎之人的口必被塞住。
Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe; moto nyonso oyo alapaka ndayi na Kombo ya Nzambe akomikumisa mpo na yango, pamba te minoko ya bakosi ekokangama.

< 诗篇 63 >