< 箴言 27 >

1 不要为明日自夸, 因为一日要生何事,你尚且不能知道。
Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
2 要别人夸奖你,不可用口自夸; 等外人称赞你,不可用嘴自称。
Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
3 石头重,沙土沉, 愚妄人的恼怒比这两样更重。
Libanga mpe zelo ezalaka kilo, kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.
4 忿怒为残忍,怒气为狂澜, 惟有嫉妒,谁能敌得住呢?
Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa?
5 当面的责备强如背地的爱情。
Pamela oyo epesami na polele ezali malamu koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
6 朋友加的伤痕出于忠诚; 仇敌连连亲嘴却是多余。
Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
7 人吃饱了,厌恶蜂房的蜜; 人饥饿了,一切苦物都觉甘甜。
Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.
8 人离本处飘流, 好像雀鸟离窝游飞。
Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga mosika ya zala na yango.
9 膏油与香料使人心喜悦; 朋友诚实的劝教也是如此甘美。
Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.
10 你的朋友和父亲的朋友, 你都不可离弃。 你遭难的日子,不要上弟兄的家去; 相近的邻舍强如远方的弟兄。
Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.
11 我儿,你要作智慧人,好叫我的心欢喜, 使我可以回答那讥诮我的人。
Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.
12 通达人见祸藏躲; 愚蒙人前往受害。
Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.
13 谁为生人作保,就拿谁的衣服; 谁为外女作保,谁就承当。
Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
14 清晨起来,大声给朋友祝福的, 就算是咒诅他。
Soki moto moko ayei kopambola molingami na ye, na mongongo makasi mpe na tongo-tongo, bakozwa yango lokola elakeli mabe.
15 大雨之日连连滴漏, 和争吵的妇人一样;
Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.
16 想拦阻她的,便是拦阻风, 也是右手抓油。
Kokanga ye ezali lokola koluka kokanga mopepe to mafuta na loboko.
17 铁磨铁,磨出刃来; 朋友相感也是如此。
Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu, ndenge wana mpe moto abongaka soki akutani na moto mosusu.
18 看守无花果树的,必吃树上的果子; 敬奉主人的,必得尊荣。
Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi aliaka mpe mbuma na yango, mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.
19 水中照脸,彼此相符; 人与人,心也相对。
Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi, ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.
20 阴间和灭亡永不满足; 人的眼目也是如此。 (Sheol h7585)
Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te. (Sheol h7585)
21 鼎为炼银,炉为炼金, 人的称赞也试炼人。
Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi bamekaka moto na nzela ya lokumu na ye.
22 你虽用杵将愚妄人与打碎的麦子一同捣在臼中, 他的愚妄还是离不了他。
Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
23 你要详细知道你羊群的景况, 留心料理你的牛群;
Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,
24 因为资财不能永有, 冠冕岂能存到万代?
pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te, motole mpe ewumelaka te mpo na libela.
25 干草割去,嫩草发现, 山上的菜蔬也被收敛。
Soki bakati matiti ya bibwele, matiti ya sika ekobota mpe bakolokota matiti ya bangomba;
26 羊羔之毛是为你作衣服; 山羊是为作田地的价值,
bameme ekopesa yo bilamba, mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga.
27 并有母山羊奶够你吃, 也够你的家眷吃, 且够养你的婢女。
Okozala na miliki ebele ya bantaba mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi.

< 箴言 27 >