< 约书亚记 17 >

1 玛拿西是约瑟的长子,他的支派拈阄所得之地记在下面。至于玛拿西的长子基列之父玛吉,因为是勇士就得了基列和巴珊。
Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.
2 玛拿西其余的子孙,按着宗族拈阄分地,就是亚比以谢子孙,希勒子孙,亚斯列子孙,示剑子孙,希弗子孙,示米大子孙;这些按着宗族,都是约瑟儿子玛拿西子孙的男丁。
Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele: bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango.
3 玛拿西的玄孙,玛吉的曾孙,基列的孙子,希弗的儿子西罗非哈没有儿子,只有女儿。他的女儿名叫玛拉、挪阿、曷拉、密迦、得撒;
Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase, atikalaki kobota bana mibali te; azalaki kaka na bana basi oyo bakombo na bango ezalaki: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
4 她们来到祭司以利亚撒和嫩的儿子约书亚并众首领面前,说:“耶和华曾吩咐摩西在我们弟兄中分给我们产业。”于是约书亚照耶和华所吩咐的,在她们伯叔中,把产业分给她们。
Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki: « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. » Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe.
5 除了约旦河东的基列和巴珊地之外,还有十分地归玛拿西,
Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani.
6 因为玛拿西的孙女们在玛拿西的孙子中得了产业。基列地是属玛拿西其余的子孙。
Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase.
7 玛拿西的境界:从亚设起,到示剑前的密米他,往北到隐·他普亚居民之地。
Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua.
8 他普亚地归玛拿西,只是玛拿西境界上的他普亚城归以法莲子孙。
Manase azwaki eteni ya mabele ya Tapua, kasi yango moko Tapua oyo ezalaki na bandelo ya Manase ezalaki ya bakitani ya Efrayimi.
9 其界下到加拿河的南边。在玛拿西城邑中的这些城邑都归以法莲。玛拿西的地界是在河北直通到海为止;
Bongo mondelo ekitaki kino na ngambo ya sude ya moluka ya Kana. Bingumba oyo ezalaki na zingazinga ya bingumba ya Manase ezalaki ya Efrayimi. Kasi mondelo ya Manase elekaki na ngambo ya nor ya moluka mpe ekendeki kosuka na Ebale monene.
10 南归以法莲,北归玛拿西,以海为界;北边到亚设,东边到以萨迦。
Efrayimi azwaki eteni ya mabele oyo ezalaki na ngambo ya sude; mpe Manase azwaki oyo ezalaki na ngambo ya nor. Eteni ya mabele ya Manase ekomaki kino na Ebale monene, na mondelo ya Aseri, na ngambo ya nor mpe ya Isakari, na ngambo ya este.
11 玛拿西在以萨迦和亚设境内,有伯·善和属伯·善的镇市,以伯莲和属以伯莲的镇市,多珥的居民和属多珥的镇市;又有三处山冈,就是隐·多珥和属隐·多珥的镇市;他纳的居民和属他纳的镇市,米吉多的居民和属米吉多的镇市。
Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).
12 只是玛拿西子孙不能赶出这些城的居民,迦南人偏要住在那地。
Nzokande, bakitani ya Manase bazalaki na makoki te ya kozwa bingumba oyo, pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na etuka yango.
13 及至以色列人强盛了,就使迦南人做苦工,没有把他们全然赶出。
Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango.
14 约瑟的子孙对约书亚说:“耶和华到如今既然赐福与我们,我们也族大人多,你为什么仅将一阄一段之地分给我们为业呢?”
Bakitani ya Jozefi balobaki na Jozue: — Mpo na nini opesi biso lokola libula, kaka eteni moko ya mabele? Tozali penza bato ebele na motango mpe Yawe apamboli biso makasi.
15 约书亚说:“你们如果族大人多,嫌以法莲山地窄小,就可以上比利洗人、利乏音人之地,在树林中砍伐树木。”
Jozue azongiselaki bango: — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.
16 约瑟的子孙说:“那山地容不下我们,并且住平原的迦南人,就是住伯·善和属伯·善的镇市,并住耶斯列平原的人,都有铁车。”
Bakitani ya Jozefi balobaki na ye: — Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda.
17 约书亚对约瑟家,就是以法莲和玛拿西人,说:“你是族大人多,并且强盛,不可仅有一阄之地,
Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi: — Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te.
18 山地也要归你,虽是树林,你也可以砍伐;靠近之地必归你。迦南人虽有铁车,虽是强盛,你也能把他们赶出去。”
Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.

< 约书亚记 17 >