< 耶利米书 39 >

1 犹大王西底家第九年十月,巴比伦王尼布甲尼撒率领全军来围困耶路撒冷。
Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
2 西底家十一年四月初九日,城被攻破。
Tango Sedesiasi akokisaki mibu zomi na moko na bokonzi, na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba.
3 耶路撒冷被攻取的时候,巴比伦王的首领尼甲·沙利薛、三甲·尼波、撒西金—拉撒力、尼甲·沙利薛—拉墨,并巴比伦王其余的一切首领都来坐在中门。
Bakalaka nyonso ya mokonzi ya Babiloni bakotaki kati na engumba mpe bayaki kovanda na Ekuke ya kati-kati. Ezalaki Nerigali-Saretseri, Samigari-Nebu; Sarisekimi, mokonzi ya bakalaka ya lokumu; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi mosusu ya basoda ya mokonzi ya Babiloni.
4 犹大王西底家和一切兵丁看见他们,就在夜间从靠近王园两城中间的门出城逃跑,往亚拉巴逃去。
Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, mpe basoda nyonso bamonaki bongo, bakimaki, babimaki na engumba butu-butu, na nzela ya elanga ya mokonzi, na Ekuke oyo ezali na kati-kati ya bamir mibale; bakendeki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
5 迦勒底的军队追赶他们,在耶利哥的平原追上西底家,将他拿住,带到哈马地的利比拉、巴比伦王尼布甲尼撒那里;尼布甲尼撒就审判他。
Kasi basoda ya Babiloni balandaki bango mpe bakangaki Sedesiasi, na etando ya Jeriko; bazwaki ye mpe bamemaki ye na Ribila, kati na mokili ya Amati, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo akatelaki ye etumbu.
6 巴比伦王在利比拉、西底家眼前杀了他的众子,又杀了犹大的一切贵胄,
Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata, na miso na ye, mito ya bana mibali ya Sedesiasi mpe ya bankumu nyonso ya Yuda.
7 并且剜西底家的眼睛,用铜链锁着他,要带到巴比伦去。
Apesaki lisusu mitindo ete batobola miso ya Sedesiasi, bakanga ye minyololo ya bibende ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.
8 迦勒底人用火焚烧王宫和百姓的房屋,又拆毁耶路撒冷的城墙。
Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.
9 那时,护卫长尼布撒拉旦将城里所剩下的百姓和投降他的逃民,以及其余的民都掳到巴比伦去了。
Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu, na Babiloni, bato oyo batikalaki kati na engumba elongo na bato oyo bayaki komitika bango moko epai na ye, mpe bato mosusu.
10 护卫长尼布撒拉旦却将民中毫无所有的穷人留在犹大地,当时给他们葡萄园和田地。
Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga.
11 巴比伦王尼布甲尼撒提到耶利米,嘱咐护卫长尼布撒拉旦说:
Nzokande, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, apesaki mitindo oyo epai ya Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, na tina na mosakoli Jeremi:
12 “你领他去,好好地看待他,切不可害他;他对你怎么说,你就向他怎么行。”
« Kamata ye, batela ye, kosala ye mabe te; kasi salela ye makambo nyonso oyo akosenga yo. »
13 护卫长尼布撒拉旦和尼布沙斯班—拉撒力、尼甲·沙利薛—拉墨,并巴比伦王的一切官长,
Boye, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi; Nebutsasibani, mokonzi ya bakalaka ya lokumu; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi nyonso ya basoda ya mokonzi ya Babiloni
14 打发人去,将耶利米从护卫兵院中提出来,交与沙番的孙子亚希甘的儿子基大利,带回家去。于是耶利米住在民中。
batindaki ete bazwa Jeremi kati na lopango ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, mpo ete azongisa ye na ndako na ye. Boye Jeremi awumelaki kati na bato na ye.
15 耶利米还囚在护卫兵院中的时候,耶和华的话临到他说:
Wana Jeremi azalaki ya kokangama kati na lopango ya bakengeli, Yawe alobaki na ye:
16 “你去告诉古实人以伯·米勒说,万军之耶和华—以色列的 神如此说:我说降祸不降福的话必临到这城,到那时必在你面前成就了。
— Kende koyebisa Ebedi-Meleki, moto ya Kushi: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakomi pene ya kokokisa makambo oyo nalakaki mpo na engumba oyo, makambo ya pasi kasi ya esengo te; tango makambo yango ekokokisama, ekosalema na miso na yo.
17 耶和华说:到那日我必拯救你,你必不致交在你所怕的人手中。
Kasi na mokolo wana, nakobatela yo, › elobi Yawe, ‹ okokabama te na maboko ya bato oyo yo ozali kobanga.
18 我定要搭救你,你不致倒在刀下,却要以自己的命为掠物,因你倚靠我。这是耶和华说的。”
Solo, nakobikisa yo, mpe okokufa na mopanga te; kasi bomoi na yo ekozala bomengo na yo ya bitumba, pamba te otielaka Ngai elikya, elobi Yawe. › »

< 耶利米书 39 >