< 以赛亚书 8 >

1 耶和华对我说:“你取一个大牌,拿人所用的笔,写上‘玛黑珥·沙拉勒·哈施·罢斯’。
Yawe alobaki na ngai: « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango: Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). »
2 我要用诚实的见证人,祭司乌利亚和耶比利家的儿子撒迦利亚记录这事。”
Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo.
3 我— 以赛亚与妻子同室;她怀孕生子,耶和华就对我说:“给他起名叫玛黑珥·沙拉勒·哈施·罢斯;
Nakendeki epai ya mwasi mosakoli; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai: « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz.
4 因为在这小孩子不晓得叫父叫母之先,大马士革的财宝和撒马利亚的掳物必在亚述王面前搬了去。”
Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »
5 耶和华又晓谕我说:
Yawe alobaki na ngai lisusu:
6 “这百姓既厌弃西罗亚缓流的水,喜悦利汛和利玛利的儿子;
« Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia,
7 因此,主必使大河翻腾的水猛然冲来,就是亚述王和他所有的威势,必漫过一切的水道,涨过两岸;
Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate: ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso.
8 必冲入犹大,涨溢泛滥,直到颈项。以马内利啊,他展开翅膀,遍满你的地。”
Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »
9 列国的人民哪,任凭你们喧嚷,终必破坏; 远方的众人哪,当侧耳而听! 任凭你们束起腰来,终必破坏; 你们束起腰来,终必破坏。
Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana!
10 任凭你们同谋,终归无有; 任凭你们言定,终不成立; 因为 神与我们同在。
Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso!
11 耶和华以大能的手,指教我不可行这百姓所行的道,对我这样说:
Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo:
12 “这百姓说同谋背叛,你们不要说同谋背叛。他们所怕的,你们不要怕,也不要畏惧。
« Bobengaka likita te eloko nyonso oyo bato babengaka likita; bobangaka te oyo bango babangaka, boyokela yango somo ata moke te.
13 但要尊万军之耶和华为圣,以他为你们所当怕的,所当畏惧的。
Kaka Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde bosengeli komona lokola Mosantu, Ye kaka nde bosengeli kokumisa, Ye kaka nde bosengeli koyoka somo.
14 他必作为圣所,却向以色列两家作绊脚的石头,跌人的磐石;向耶路撒冷的居民作为圈套和网罗。
Akozala lokola Esika ya bule; kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato; bongo mpo na bato ya Yelusalemi, akozala motambo mpe monyama.
15 许多人必在其上绊脚跌倒,而且跌碎,并陷入网罗,被缠住。”
Mingi kati na bango bakobeta mabaku, bakokweya mpe bakobukana, bakokangama na motambo, mpe bakozwa bango. »
16 你要卷起律法书,在我门徒中间封住训诲。
Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai.
17 我要等候那掩面不顾雅各家的耶和华;我也要仰望他。
Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo; nakotia elikya na ngai kati na Ye.
18 看哪,我与耶和华所给我的儿女,就是从住在锡安山万军之耶和华来的,在以色列中作为预兆和奇迹。
Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
19 有人对你们说:“当求问那些交鬼的和行巫术的,就是声音绵蛮,言语微细的。”你们便回答说:“百姓不当求问自己的 神吗?岂可为活人求问死人呢?”
Soki bato balobi na bino: « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi? »
20 人当以训诲和法度为标准;他们所说的,若不与此相符,必不得见晨光。
Na mobeko mpe na lisakoli! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
21 他们必经过这地,受艰难,受饥饿;饥饿的时候,心中焦躁,咒骂自己的君王和自己的 神。
Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.
22 仰观上天,俯察下地,不料,尽是艰难、黑暗,和幽暗的痛苦。他们必被赶入乌黑的黑暗中去。
Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.

< 以赛亚书 8 >