< 列王纪下 13 >

1 犹大王亚哈谢的儿子约阿施二十三年,耶户的儿子约哈斯在撒马利亚登基作以色列王十七年。
Na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Akazia, mokonzi ya Yuda, Yoakazi, mwana mobali ya Jewu, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na sambo.
2 约哈斯行耶和华眼中看为恶的事,效法尼八的儿子耶罗波安使以色列人陷在罪里的那罪,总不离开。
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, wana alandaki masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. Jeroboami akweyisaki na yango Isalaele na lisumu, mpe Yoakazi atikaki te lisumu yango.
3 于是,耶和华的怒气向以色列人发作,将他们屡次交在亚兰王哈薛和他儿子便哈达的手里。
Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali.
4 约哈斯恳求耶和华,耶和华就应允他,因为见以色列人所受亚兰王的欺压。
Kasi Yoakazi abondelaki Yawe mpo ete asalela ye ngolu, mpe Yawe ayokaki ye, pamba te Yawe amonaki ndenge nini mokonzi ya Siri azalaki konyokola Isalaele.
5 耶和华赐给以色列人一位拯救者,使他们脱离亚兰人的手;于是以色列人仍旧安居在家里。
Yawe apesaki mokangoli mpo na bato ya Isalaele, mpe balongwaki na se ya nguya ya bato ya Siri. Boye bato ya Isalaele bavandaki na bandako na bango ndenge ezalaki liboso.
6 然而,他们不离开耶罗波安家使以色列人陷在罪里的那罪,仍然去行,并且在撒马利亚留下亚舍拉。
Kasi batikaki te masumu ya libota ya Jeroboami oyo akweyisaki na yango Isalaele. Bakobaki kaka na yango; mpe ekeko ya nzambe mwasi Ashera etikalaki kaka ya kotelema kati na Samari.
7 亚兰王灭绝约哈斯的民,践踏他们如禾场上的尘沙,只给约哈斯留下五十马兵,十辆战车,一万步兵。
Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo.
8 约哈斯其余的事,凡他所行的和他的勇力都写在以色列诸王记上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yoakazi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
9 约哈斯与他列祖同睡,葬在撒马利亚。他儿子约阿施接续他作王。
Yoakazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Joasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
10 犹大王约阿施三十七年,约哈斯的儿子约阿施在撒马利亚登基作以色列王十六年。
Na mobu ya tuku misato na sambo ya bokonzi ya Joasi, mokonzi ya Yuda, Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na motoba.
11 他行耶和华眼中看为恶的事,不离开尼八的儿子耶罗波安使以色列人陷在罪里的一切罪,仍然去行。
Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo akweyisaki na yango Isalaele. Joasi akobaki kaka na masumu yango.
12 约阿施其余的事,凡他所行的和他与犹大王亚玛谢争战的勇力,都写在以色列诸王记上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, bakisa bitumba oyo abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
13 约阿施与他列祖同睡,耶罗波安坐了他的位。约阿施与以色列诸王一同葬在撒马利亚。
Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe Jeroboami akitanaki na ye na bokonzi. Bakundaki Joasi kati na Samari esika moko na bakonzi ya Isalaele.
14 以利沙得了必死的病,以色列王约阿施下来看他,伏在他脸上哭泣,说:“我父啊!我父啊!以色列的战车马兵啊!”
Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo: — Tata na ngai! Tata na ngai! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele!
15 以利沙对他说:“你取弓箭来。”王就取了弓箭来;
Elize alobaki na ye: — Zwa tolotolo moko mpe ndambo ya makonga ya mike. Joasi asalaki bongo.
16 又对以色列王说:“你用手拿弓。”王就用手拿弓。以利沙按手在王的手上,
Bongo Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele: — Simba tolotolo na maboko na yo. Tango Joasi asimbaki tolotolo, Elize atiaki maboko na ye na likolo ya maboko ya mokonzi.
17 说:“你开朝东的窗户。”他就开了。以利沙说:“射箭吧!”他就射箭。以利沙说:“这是耶和华的得胜箭,就是战胜亚兰人的箭;因为你必在亚弗攻打亚兰人,直到灭尽他们。”
Elize alobaki: — Fungola lininisa oyo ezali na ngambo ya este. Joasi afungolaki yango. Elize alobaki: — Beta! Joasi abetaki. Elize alobaki: — Ezali likonga ya elonga ya Yawe, likonga ya elonga liboso ya bato ya Siri. Okosilisa bato ya Siri, na Afeki.
18 以利沙又说:“取几枝箭来。”他就取了来。以利沙说:“打地吧!”他打了三次,便止住了。
Bongo Elize abakisaki: — Zwa makonga. Mokonzi azwaki yango. Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele: — Beta yango na mabele. Joasi abetaki yango mbala misato mpe atikaki.
19 神人向他发怒,说:“应当击打五六次,就能攻打亚兰人直到灭尽;现在只能打败亚兰人三次。”
Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki: — Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato.
20 以利沙死了,人将他葬埋。到了新年,有一群摩押人犯境,
Elize akufaki, mpe bakundaki ye. Nzokande masanga ya bato mabe ya Moabi bazalaki kokota na mokili ya Isalaele na ebandeli ya mibu nyonso.
21 有人正葬死人,忽然看见一群人,就把死人抛在以利沙的坟墓里,一碰着以利沙的骸骨,死人就复活,站起来了。
Mokolo moko, tango bazalaki kokunda moto moko, bamonaki na mbalakata lisanga moko ya bato mabe. Bongo, babwakaki na lombangu ebembe ya moto yango kati na kunda ya Elize. Tango ebembe etutaki mikuwa ya Elize, moto yango azongaki na bomoi mpe atelemaki.
22 约哈斯年间,亚兰王哈薛屡次欺压以色列人。
Azaeli, mokonzi ya Siri, anyokolaki Isalaele, na tango ya bokonzi ya Yoakazi.
23 耶和华却因与亚伯拉罕、以撒、雅各所立的约,仍施恩给以色列人,怜恤他们,眷顾他们,不肯灭尽他们,尚未赶逐他们离开自己面前。
Kasi Yawe asalelaki bango ngolu, ayokelaki bango mawa, mpe azongelaki bango, mpo na boyokani na Ye elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. Na tango wana, Yawe alingaki koboma bango te mpe aboyaki kobengana bango mosika ya miso na Ye.
24 亚兰王哈薛死了,他儿子便·哈达接续他作王。
Azaeli, mokonzi ya Siri, akufaki, mpe Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
25 从前哈薛和约阿施的父亲约哈斯争战,攻取了些城邑,现在约哈斯的儿子约阿施三次打败哈薛的儿子便哈达,就收回了以色列的城邑。
Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.

< 列王纪下 13 >