< 撒母耳记上 21 >

1 大卫到了挪伯祭司亚希米勒那里,亚希米勒战战兢兢地出来迎接他,问他说:“你为什么独自来,没有人跟随呢?”
Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi: — Mpo na nini ozali yo moko? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo?
2 大卫回答祭司亚希米勒说:“王吩咐我一件事说:‘我差遣你委托你的这件事,不要使人知道。’故此我已派定少年人在某处等候我。
Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki: — Mokonzi apesaki ngai mosala moko boye mpe alobaki na ngai: « Tika ete moto moko te ayeba ata likambo moko na mosala oyo natindi yo. » Na tina na yango nde nasengaki na bato na ngai ete tokutana na esika moko.
3 现在你手下有什么?求你给我五个饼或是别样的食物。”
Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango.
4 祭司对大卫说:“我手下没有寻常的饼,只有圣饼;若少年人没有亲近妇人才可以给。”
Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi: — Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi.
5 大卫对祭司说:“实在约有三日我们没有亲近妇人;我出来的时候,虽是寻常行路,少年人的器皿还是洁净的;何况今日不更是洁净吗?”
Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe: — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.
6 祭司就拿圣饼给他;因为在那里没有别样饼,只有更换新饼,从耶和华面前撤下来的陈设饼。 (
Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.
7 当日有扫罗的一个臣子留在耶和华面前。他名叫多益,是以东人,作扫罗的司牧长。)
Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.
8 大卫问亚希米勒说:“你手下有枪有刀没有?因为王的事甚急,连刀剑器械我都没有带。”
Davidi atunaki Ayimeleki: — Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu.
9 祭司说:“你在以拉谷杀非利士人歌利亚的那刀在这里,裹在布中,放在以弗得后边,你要就可以拿去;除此以外,再没有别的。”大卫说:“这刀没有可比的!求你给我。”
Nganga-Nzambe azongisaki: — Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana. Davidi alobaki: — Mopanga moko te ekokani na yango; pesa ngai yango.
10 那日大卫起来,躲避扫罗,逃到迦特王亚吉那里。
Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati.
11 亚吉的臣仆对亚吉说:“这不是 以色列国王大卫吗?那里的妇女跳舞唱和,不是指着他说‘扫罗杀死千千,大卫杀死万万’吗?”
Kasi basali ya Akishi balobaki na ye: « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye: ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi? › »
12 大卫将这话放在心里,甚惧怕迦特王亚吉,
Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati.
13 就在众人面前改变了寻常的举动,在他们手下假装疯癫,在城门的门扇上胡写乱画,使唾沫流在胡子上。
Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma: kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu.
14 亚吉对臣仆说:“你们看,这人是疯子。为什么带他到我这里来呢?
Akishi alobaki na basali na ye: « Botala tata oyo, azali moto ya liboma! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai?
15 我岂缺少疯子,你们带这人来在我面前疯癫吗?这人岂可进我的家呢?”
Boni, nazangi penza bato ya maboma mpo ete bomema mobali oyo awa, na tina ete aya kosala makambo na ye ya liboma? Boni, moto ya boye asengeli penza kokota na ndako na ngai? »

< 撒母耳记上 21 >