< 历代志上 10 >

1 非利士人与以色列人争战,以色列人在非利士人面前逃跑,在基利波山有被杀仆倒的。
Bato ya Filisitia babundisaki bana ya Isalaele. Bana ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.
2 非利士人紧追扫罗和他儿子们,就杀了扫罗的儿子约拿单、亚比拿达、麦基舒亚。
Nzokande, bato ya Filisitia batingamaki kolanda Saulo mpe bana na ye ya mibali, bongo babomaki Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa oyo bazalaki bana na ye.
3 势派甚大,扫罗被弓箭手追上,射伤甚重,
Bitumba ekomaki lisusu makasi mpo na koluka bomoi ya Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki ye, Saulo alengaki na somo makasi wana asosolaki ete bakoboma ye.
4 就吩咐拿他兵器的人说:“你拔出刀来,将我刺死,免得那些未受割礼的人来凌辱我。”但拿兵器的人甚惧怕,不肯刺他;
Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye: « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kosakanela ngai. » Kasi soda yango abangaki mpe aboyaki koboma ye; bongo ye moko Saulo azwaki mopanga mpe amibwakaki na likolo na yango.
5 扫罗就自己伏在刀上死了。拿兵器的人见扫罗已死,也伏在刀上死了。
Tango soda yango amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga mpe akufaki.
6 这样,扫罗和他三个儿子,并他的全家都一同死亡。
Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali mpe libota na ye mobimba bakufaki elongo.
7 住平原的以色列众人见以色列军兵逃跑,扫罗和他儿子都死了,也就弃城逃跑,非利士人便来住在其中。
Tango bana nyonso ya Isalaele, oyo bazalaki kovanda na lubwaku, bamonaki ete mampinga esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
8 次日,非利士人来剥那被杀之人的衣服,看见扫罗和他儿子仆倒在基利波山,
Mokolo oyo elandaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.
9 就剥了他的军装,割下他的首级,打发人到非利士地的四境报信与他们的偶像和众民,
Bazwaki biloko na ye, bamemaki moto na ye elongo na bibundeli na ye, mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga epai ya banzambe na bango ya bikeko mpe epai ya bato na bango.
10 又将扫罗的军装放在他们神的庙里,将他的首级钉在大衮庙中。
Batiaki bibundeli na ye na tempelo ya banzambe na bango mpe badiembikaki mokuwa ya moto na ye kati na tempelo ya Dagoni.
11 基列·雅比人听见非利士人向扫罗所行的一切事,
Tango bavandi nyonso ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo nyonso oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,
12 他们中间所有的勇士就起身前去,将扫罗和他儿子的尸身送到雅比,将他们的尸骨葬在雅比的橡树下,就禁食七日。
bilombe na bango nyonso batelemaki, bakendeki kozwa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali; mpe bamemaki yango na Yabeshi. Sima na bango kokunda mikuwa na bango na Yabeshi, na se ya nzete ya terebente, bakilaki bilei mikolo sambo.
13 这样,扫罗死了。因为他干犯耶和华,没有遵守耶和华的命;又因他求问交鬼的妇人,
Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe.
14 没有求问耶和华,所以耶和华使他被杀,把国归于耶西的儿子大卫。
Boye Yawe abomaki ye mpe apesaki bokonzi epai ya Davidi, mwana mobali ya Izayi.

< 历代志上 10 >