< 路加福音 19 >

1 耶稣走进耶利哥城,穿城而过。
Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango.
2 有一个名叫撒该的税吏长,非常富有。
Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele;
3 他想看看耶稣到底是谁,但在人群中,身材矮小的他无法看见。
azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza.
4 于是他跑到前面,爬上一棵无花果树,想在耶稣经过的时候看看他的样子。
Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.
5 耶稣走到这里后往上一看,对他说:“撒该,快下来,今天我要住在你家中。”
Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye: — Zashe, kita noki! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.
6 撒该马上爬下来,高兴地迎接耶稣到他家去。
Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.
7 众人见状议论纷纷:“他竟要住在这样的罪人家中!”
Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima; bazalaki koloba: — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu!
8 撒该站着对主说:“主啊,你看,我正在把一半的家财分给穷人,如果我曾欺骗谁,就会四倍奉还!”
Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye: — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.
9 耶稣说:“今天这栋房子迎来了救赎,他也是亚伯拉罕的子孙。
Yesu alobaki na ye: — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.
10 因为人子来寻找和拯救的就是迷失之人。”
Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.
11 众人专心听着耶稣的话。由于这里接近耶路撒冷,加上民众都认为上帝之国即将出现,于是耶稣就讲了一个故事。
Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.
12 他说:“从前有一个贵族,他离开家去远方接受王位加冕,然后再回到家。
Boye Yesu alobaki: — Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga.
13 他叫了自己的十个仆人来,将钱平分给他们,然后说:‘你们用这钱去做投资,一直到我回来。’
Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango: « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
14 但这国家的人都憎恨他,于是派一个代表跟过去,说:‘我们不想这个人做王统治我们。’
Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba: « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »
15 贵族获得王位后返回,然后将那些拿钱投资的仆人召来,询问他们做投资的收益情况。
Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
16 第一个仆人上前说:‘主人,你的钱已经赚了十倍。’
Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »
17 国王说:‘做得好,你是个好仆人,因为你证明了在小事上很忠心,我现在派你去管理十座城。’
Nkolo alobaki na ye: « Osali malamu! Ozali mosali malamu! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
18 第二个过来说:‘主人,你的钱已经赚了五倍。’
Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
19 国王说:‘我派你去管理五座城。’
Nkolo na ye azongisaki: « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
20 另一个仆人走进来说:‘主啊,你看,这是你的钱,现在还给你。我用布包着它,确保安全。
Mosali mosusu ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba.
21 你是个严厉的人,我很害怕你。我怕你会拿走不属于你的东西,会收走你没有种下的作物。’
Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata: ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »
22 国王回答:‘我要根据你这番话来审判你。你知道我很严厉,会拿走不属于我的东西,会收走我没有种下的作物。
Nkolo na ye azongisaki: « Mosali mabe! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.
23 那你为什么不把我的钱存入银行,等我回来的时候,就可以连本带息取回来?’
Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki? »
24 国王对身边站着的仆人说:‘把他的钱拿走,交给那赚了十倍的人。’
Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana: « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »
25 侍卫说:‘但主人,他已经有了十倍的钱了。’
Balobaki na ye: « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi! »
26 国王说:‘告诉你们吧,那些已经有的,还会有更多。没有的,现在有的也会被拿走。
Nkolo azongisaki: « Nazali koloba na bino: na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
27 至于那些不愿意我做国王统治他们的敌人,现在把他们拉到这里来,当着我的面杀掉!’”
Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »
28 耶稣讲完这个故事,就继续向前朝着耶路撒冷走去。
Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.
29 快到伯法其和伯大尼时,他来到了橄榄山,在那里叫来两名门徒,对他们说:
Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye;
30 “你们到前面的村子去,进去后会看见有一个地方拴着一头从未有人骑过的小驴,解开它的绳子,把它牵来。
alobaki na bango: — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela; bofungola yango mpe bomema yango awa.
31 如果有人问为什么解开它,你们就说:‘主需要它。’”
Soki moto moko atuni bino: « Mpo na nini bozali kofungola yango? » Boloba na ye: « Nkolo azali na bosenga na yango. »
32 两名门徒出发了,后来发生的一切与耶稣所说如出一辙。
Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango.
33 他们解开小驴的时候,驴主人问:“你们为什么解开它?”
Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango: — Mpo na nini bozali kofungola mwana oyo ya ane?
34 他们说:“主需要它。”
Bazongisaki: — Nkolo azali na bosenga na yango.
35 门徒把小驴牵到耶稣那里,把自己的衣服搭在驴背上,耶稣坐在上面。
Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
36 耶稣骑驴前行,众人把自己的衣服铺在路上。
Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
37 当他走近耶路撒冷,这里也是橄榄山的下山路,门徒们因为看见了所有神迹,开始充满喜悦地大声赞美上帝。
Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.
38 他们大声喊:“奉主之名前来的王,赞颂你!愿和平降临天堂,愿荣耀降临至高天堂!”
Bazalaki koloba: « Tika ete apambolama, mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Kimia kati na Likolo, mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo! »
39 民众中有几个法利赛人对他说:“老师,不要让你的门徒说这些!”
Ndambo ya Bafarizeo, kati na ebele ya bato, balobaki na Yesu: — Moteyi, pamela bayekoli na Yo!
40 耶稣说:“我告诉你们,他们若保持沉默,石头就要呼喊了!”
Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino: soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga!
41 耶路撒冷越来越近了,耶稣看见这座城,开始为之哭泣,
Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango
42 他说:“我真希望你们——就是你们啊,在今天能知道通往平安的路,但都隐藏起来了,你们看不到。
mpe alobaki: — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.
43 时间一到,你们的仇敌就会包围过来,搭建斜坡攻击你们,把你们团团围住,困住你们,
Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso;
44 他们会彻底摧毁你们,还有你们的孩子。所有的石头建筑都会轰然倒塌,因为你们在救赎到来之刻拒绝接受。”
bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.
45 耶稣走进神庙,赶走做买卖之人,
Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna; alobaki na bango:
46 他对他们说:“经文上记着:‘我的殿将用于祷告’。你们却把它变成贼窝了。”
— Ekomama: « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi!
47 然后他每天都在神庙里教导众人。祭司长、宗教老师和首领都想杀害他,
Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye;
48 但又不知道如何下手,因为众人都围着他并聆听。
kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.

< 路加福音 19 >