< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 21 >

1 ᏓᎩᎪᎲᎩᏃ ᎢᏤ ᎦᎸᎶᎢ ᎠᎴ ᎢᏤ ᎦᏙᎯ; ᎢᎬᏱᏱᏰᏃ ᎦᎸᎶᎢ ᎠᎴ ᎢᎬᏱᏱ ᎦᏙᎯ ᏥᎨᏒᎩ ᎤᏂᎶᏐᏅᎩ; ᎠᎴ ᎥᏝ ᎿᎭᏉ ᎠᎺᏉᎯ ᏱᎨᏎᎢ.
Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.
2 ᎠᎴ ᎠᏴ ᏣᏂ ᎠᎩᎪᎲᎩ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎦᏚᎲ ᎾᏍᎩ ᎢᏤ ᏥᎷᏏᎵᎻ ᏓᏳᏠᎠᏒᎩ ᎤᏁᎳᏅᎯᏱ ᎦᎸᎶᎢ, ᎤᏛᏅᎢᏍᏛᎩ ᎾᏍᎩᏯ ᎠᏥᏰᎯ ᏣᏙᏚᎢᏍᏗᏍᎪ ᏣᏛᏅᎢᏍᏓᏁᎰ ᎤᏰᎯ.
Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.
3 ᎠᏆᏛᎦᏅᎩᏃ ᎠᏍᏓᏯ ᎧᏁᎬ ᎩᎶ ᎦᎸᎳᏗ ᏛᏓᎴᎲᏍᎬᎩ ᎯᎠ ᏂᎦᏪᏍᎬᎩ, ᎬᏂᏳᏉ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᎵᏦᏛ ᏴᏫ ᎠᏁᎲ ᎤᏓᏑᏯ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎾᏍᎩ ᎠᏁᎲ ᏛᏕᏂ, ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏧᏤᎵ ᎨᏎᏍᏗ ᏴᏫ, ᎤᏁᎳᏅᎯᏃ ᎤᏩᏒ ᎾᏍᎩ ᎠᏁᎲ ᎡᎮᏍᏗ ᎤᎾᏤᎵ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ.
Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba: « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.
4 ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏙᏓᎦᏅᎦᎸᎯ ᏂᎦᏛ ᏓᏂᎦᏌᏬᎢᎲᎢ; ᎥᏝ ᎠᎴ ᎿᎭᏉ ᏰᎮᏍᏗ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ, ᎠᎴ ᎤᏲ ᎠᏰᎸᏗ ᎨᏒ, ᎠᎴ ᏗᏠᏯᏍᏗ ᎨᏒᎢ, ᎥᏝ ᎠᎴ ᎿᎭᏉ ᏰᎮᏍᏗ ᎡᎯᏍᏗ ᎨᏒᎢ; ᎢᎬᏱᏱᏰᏃ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏤᎲ ᎤᎶᏐᏅ.
Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »
5 ᎦᏍᎩᎸᏃ ᎤᏬᎵ, ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ, ᎬᏂᏳᏉ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎢᏤ ᏂᎬᏁᎭ. ᎠᎴ ᎯᎠ ᎾᎩᏪᏎᎸᎩ, ᎰᏪᎸᎦ; ᎯᎠᏰᏃ ᎾᏍᎩ ᎧᏃᎮᏛ ᎬᏜᏓᏏᏛᎡᏗ ᏂᎨᏒᎾ ᎠᎴ ᎤᏙᎯᏳᎯᏯ.
Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki: « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » Alobaki lisusu: « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »
6 ᎠᎴ ᎯᎠ ᎾᎩᏪᏎᎸᎩ; ᎾᏍᎩ ᏂᏌᎵᏍᏓ. ᎠᏴ ᎡᎵᏆ ᎠᎴ ᎣᎻᎦ, ᎢᎬᏱᏱ ᎨᏒ ᎠᎴ ᎤᎵᏍᏆᎸᏗ ᎨᏒᎢ. ᎤᏔᏕᎩᏍᎩ ᎠᎹ ᎬᏂᏛ ᎠᏓᏁᎯ ᎦᏄᎪᎬ ᏓᏥᏁᏁᎵ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᏂᎨᏒᎾ.
Alobaki na ngai lisusu: « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
7 ᎩᎶ ᎠᏓᏎᎪᎩᏍᎨᏍᏗ ᏂᎦᏗᏳ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᎤᏤᎵ ᎢᏳᎵᏍᏙᏗ ᎨᏎᏍᏗ; ᎠᎴ ᎠᏴ ᏥᏯᏁᎳᏅᎯ ᎨᏎᏍᏗ, ᎤᏩᏒᏃ ᎠᏴ ᎠᏇᏥ ᎨᏎᏍᏗ.
Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.
8 ᎤᏂᏍᎦᎡᎾᏍᎩᏂ. ᎠᎴ ᏄᏃᎯᏳᏒᎾ, ᎠᎴ ᎤᏂᏍᎦᎢᏍᏗ, ᎠᎴ ᏗᎾᏓᎯᎯ, ᎠᎴ ᎤᏂᏁᎫᏥᏛ, ᎠᎴ ᏗᎾᏙᏂᏍᎩ, ᎠᎴ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏗᏰᎸᎯ ᏗᎾᏓᏙᎵᏍᏓᏁᎯ, ᎠᎴ ᏂᎦᏗᏳ ᎠᏂᏰᎪᎩ, ᎤᎾᏤᎵ ᎢᎨᎬᏁᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᎥᏓᎸ ᎾᎿᎭᎠᏓᏪᎵᎩᏍᎬ ᎠᏥᎸ ᎠᎴ ᏌᎪᏂᎨ ᎠᏓᏪᎵᎩᏍᎩ; ᎾᏍᎩ ᏔᎵᏁ ᎠᏲᎱᎯᏍᏗ ᏥᎩ. (Limnē Pyr g3041 g4442)
Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo: yango nde kufa ya mibale. » (Limnē Pyr g3041 g4442)
9 ᎠᎩᎷᏤᎸᎩᏃ ᎠᏏᏴᏫ ᎾᏍᎩ Ꮎ ᎦᎵᏉᎩ ᎢᏯᏂᏛ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ, ᎾᏍᎩ ᏥᏓᏂᏰᎲᎩ ᏚᎵᏉᎩ ᎫᎫ ᎦᎵᏉᎩ ᎤᎵᏍᏆᎸᏗ ᎤᏕᏯᏙᏗ ᏗᏟᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᏆᎵᏃᎮᏔᏅᎩ, ᎯᎠ ᏄᏪᏒᎩ; ᎡᎮᎾ, ᏓᎬᏯᏎᎮᎵᏃ ᎠᏥᏰᎯ ᎤᏃᏕᎾ ᎠᎩᎾ ᎤᏓᎵᎢ.
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai: « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. »
10 ᎠᏆᏘᎾᏫᏛᎲᎩᏃ ᏗᏆᏓᏅᏛ ᎡᏆ ᎠᎴ ᎢᏅ ᎢᎦᏘ ᏦᏓᎸᎢ ᏩᏆᏘᏅᏍᏔᏅᎩ, ᎠᎴ ᎠᎩᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎩ Ꮎ ᎡᏆ ᎦᏚᎲᎢ, ᎾᏍᎩ ᎦᎸᏉᏗ ᏥᎷᏏᎵᎻ, ᎡᎳᏗ ᏅᏓᏳᏍᏗᏗᏒᎩ ᎦᎸᎳᏗ ᎤᏁᎳᏅᎯᏱ ᏛᏓᎴᎲᏍᎬᎩ.
Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe.
11 ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵᎦ ᎤᏣᏃᏛᎩ; ᎠᎴ ᎾᏍᎩ ᏚᎸᏌᏛ, ᏅᏯ ᎤᏣᏘ ᏧᎬᏩᎶᏗ ᎾᏍᎩᏯ ᎨᏒᎩ, ᎾᏍᎩ ᏣᏍᏆ ᏅᏯ ᎾᏍᎩᏯᎢ ᏗᎬᏩᎸᏌᏛ ᎨᏒᎩ.
Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali.
12 ᎠᏐᏴᎩᏃ ᎡᏆ ᎢᏅ ᎢᎦᏘ, ᎦᎶᎯᏍᏗᏱᏃ ᏔᎳᏚ ᏕᎪᏢᏒᎩ, ᎠᎴ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ ᏔᎳᏚ ᎢᏯᏂᏛ ᏗᏂᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ [ ᏓᏂᏙᎬᎩ, ] ᏚᎾᏙᎥᏃ ᏕᎪᏪᎸᎩ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ, ᎾᏍᎩ ᏔᎳᏚ ᎾᏂᎳᏍᏓᎸ ᎢᏏᎵ ᏧᏪᏥ ᏚᎾᏙᎥᎢ.
Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango.
13 ᏅᏙ ᏗᎧᎸᎬ ᎢᏗᏢ ᏦᎢ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ [ ᏕᎪᏢᏒᎩ, ] ᏧᏴᏢᏃ ᎢᏗᏢ ᏦᎢ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ; ᏧᎦᎾᏮᏃ ᎢᏗᏢ ᏦᎢ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ; ᏭᏕᎵᎬᏃ ᎢᏗᏢ ᏦᎢ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ.
Bikuke misato ezalaki na ngambo ya este, misato na ngambo ya nor, misato na ngambo ya sude, mpe misato na ngambo ya weste.
14 ᎠᏐᏴᏃ ᎦᏚᎲ ᏔᎳᏚ ᏕᎦᎫᏍᏓᎥᎩ, ᏕᎦᎫᏍᏓᎥᏃ ᏔᎳᏚ ᏚᎾᏙᎥᎢ [ ᏕᎪᏪᎸᎩ, ] ᎾᏍᎩ ᏔᎳᏚ ᎢᏯᏂᏛ ᎤᏃᏕᎾ ᎠᎩᎾ ᏧᏅᏏᏛ ᏚᎾᏙᎥᎢ.
Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango.
15 ᎾᏍᎩᏃ ᎠᏆᎵᏃᎮᏔᏅᎯ ᎦᏁᎲᎩ ᎠᏕᎸᏓᎶᏂᎨ ᎠᏢᏔᏅᎯ ᎠᏟᎶᏍᏗ, ᎦᏚᎲ ᎠᏟᎶᏍᏗ, ᎠᎴ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ ᏗᏟᎶᏍᏗ, ᎠᎴ ᎠᏐᏴ ᎠᏟᎶᏍᏗ.
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango.
16 ᎦᏚᎲᏃ ᏅᎩ ᏧᏅᏏᏴ ᎨᏒᎩ, ᎦᏅᎯᏒ ᎠᎴ ᎠᏯᏛᎥ ᎤᏠᏱᏉ ᎨᏒᎩ. ᎤᏟᎶᎥᎩᏃ ᎦᏚᎲ ᎤᏩᏔᏅᎩ ᎠᏟᎶᏍᏗ, ᎯᏍᎩᎦᏚ ᎢᏯᏍᎪᎯᏧᏈ ᎢᏳᏟᎶᏛ ᏂᎬᎩ. ᏂᎦᏅᎯᏒ ᎠᎴ ᎾᏯᏛᎲ ᎠᎴ ᏂᎦᏛᎢ ᎤᏠᏱᏉ ᎨᏒᎩ.
Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba: ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda.
17 ᎠᏎᏴᏃ ᎤᏟᎶᎥᎩ ᎠᏍᎪᎯᏧᏈ ᏅᎦᏍᎪᎯ ᏅᎩᎦᎵ ᎢᏯᎩᏳᏍᏈᏛ ᎤᏟᎶᎥᎩ, ᎾᏍᎩ ᏴᏫ ᎤᏟᎶᏍᏗ ᎢᎦᏅᎯᏛ, ᎾᏍᎩ ᏗᎧᎿᎭᏩᏗᏙᎯ ᎤᏟᎶᏍᏗ.
Anjelu amekaki mpe kovimba ya mir kolanda ndenge bato basalaka: ezalaki na bametele pene tuku motoba na mitano.
18 ᎠᏐᏴᏃ ᏣᏍᏆ ᏅᏯ ᎠᏁᏍᎨᏛᎩ; ᎦᏚᎲᏃ ᎪᎱᏍᏗ ᎾᏑᏴᎾ ᎠᏕᎸ ᏓᎶᏂᎨ ᎪᏢᏛᎩ, ᏧᎸᏌᏛ ᎠᏓᎨᏗ ᎾᏍᎩᏯᎢ.
Mir yango etongamaki na jasipe, mpe engumba ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala.
19 ᏕᎦᎫᏍᏓᎥᏃ ᎠᏐᏴ ᎦᏚᎲᎢ ᏕᎪᏚᎢᏍᏛᎩ ᏄᏓᎴᏒ ᏗᎦᎸᏉᏗ ᏅᏯ; ᎢᎬᏱᏱ ᎦᎫᏍᏓᎥ ᏣᏍᏆ ᎨᏒᎩ, ᏔᎵᏁᏃ ᏌᏆᏯ, ᏦᎢᏁᏃ ᎦᎵᏏᏙᏂ, ᏅᎩᏁᏃ ᎡᎻᎳ,
Babambaki mabanga ya talo ya ndenge na ndenge na miboko ya mir ya engumba yango: babambaki jasipe na moboko ya liboso, safiri na moboko ya mibale, shalisedwane na moboko ya misato, emerode na moboko ya minei,
20 ᎯᏍᎩᏃ ᏌᏙᏂᎩ, ᏑᏓᎵᏁᏃ ᏌᏗᏱ, ᎦᎵᏉᎩᏁᏃ ᎩᏐᎳᏗ, ᏧᏁᎵᏁᏃ ᏇᎵ, ᏐᎣᏁᎵᏁᏃ ᏙᏆᏏ, ᎠᏍᎪᎯᏁᏃ ᏟᏌᏇᏌ, ᏌᏚᏏᏁᏃ ᏤᏏᏂ, ᏔᎳᏚᏏᏁᏃ ᎠᎻᏗᏏ.
saridwane na moboko ya mitano, korinaline na moboko ya motoba, krizolite na moboko ya sambo, berili na moboko ya mwambe, topaze na moboko ya libwa, krizopraze na moboko ya zomi, tirikwaze na moboko ya zomi na moko, mpe ametisite na moboko ya zomi na mibale.
21 ᏔᎳᏚᏃ ᏕᎪᏢᏒ ᏗᏍᏚᏗ ᏔᎳᏚ ᏓᎬᎾᎢᏳᎾᏍᏗ ᏕᎪᏢᏛᎩ; ᏌᏉ ᎠᏍᏚᏗ ᏌᏉ ᏓᎬᎾᎢᏳᏍᏗ ᎪᏢᏛᎩ ᎡᏓᏍᏗᏱ ᎤᏜᏓᏅᏛ ᎦᏚᎲ ᎪᎱᏍᏗ ᎾᏑᏴᎾ ᎠᏕᎸ ᏓᎶᏂᎨ ᎠᏢᏛᎩ, ᏧᎸᏌᏛ ᎠᏓᎨᏗ ᎾᏍᎩᏯᎢ.
Bikuke wana zomi na mibale ezalaki lokola mayaka zomi na mibale; ekuke moko na moko esalemaki na liyaka moko. Balabala monene ya engumba yango ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala.
22 ᎥᏝ ᎠᎴ ᏯᎩᎪᎮ ᎾᎿᎭᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ; ᎤᎬᏫᏳᎯᏰᏃ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᏫᎾᏍᏛᎾ ᎤᎵᏂᎩᏛ ᎠᎴ ᎤᏃᏕᎾ-ᎠᎩᎾ ᎾᏍᎩ ᏗᎦᎳᏫᎢᏍᏗᏱ ᎢᎩ.
Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango.
23 ᎦᏚᎲᏃ ᎥᏝ ᏳᎾᏚᎵ ᏅᏙ-ᎢᎦ-ᎡᎯ ᎠᎴ ᏅᏙ-ᎡᏃᏱ-ᎡᎯ ᎤᎦᎵᎯᏍᏗᏱ ᎾᎿᎭᏂ; ᎦᎸᏉᏗᏳᏰᏃ ᎨᏒ ᎤᏁᎳᏅᎯ ᎤᏤᎵ ᎢᎦ ᎤᏘᏍᏛ ᎾᎿᎭᏂ, ᎠᎴ ᎤᏃᏕᎾ-ᎠᎩᎾ ᎢᎦ ᎠᏘᏍᏗᏍᎩ ᎢᎩ ᎾᎿᎭᏂ.
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe; bongo Mpate azali mwinda na yango.
24 ᏧᎾᏓᎴᏅᏛᏃ ᏴᏫ ᎾᏍᎩ ᎨᏥᏍᏕᎸᏛ ᎨᏒ ᎾᏍᎩ ᏚᎸᏌᏛ ᎠᏁᏙᎮᏍᏗ; ᎤᏂᎬᏫᏳᏃ ᎡᎶᎯ ᎠᏁᎯ ᎾᎿᎭᎠᏂᏴᎯᎭ ᎨᏥᎸᏉᏛ ᎠᎴ ᏧᎾᏤᎵ ᏧᏓᎴᏅᏛ ᏗᎦᎸᏉᏗ.
Bikolo ekotambola na pole na yango, mpe bakonzi ya mokili bakomema nkembo na bango kati na engumba.
25 ᎠᎴ ᎦᎶᎯᏍᏗᏱ ᎾᎿᎭᏕᎪᏢᏒ ᎥᏝ ᏧᏂᏍᏚᏗ ᏱᎨᏎᏍᏗ ᎢᎦ, ᎥᏝᏰᏃ ᏒᏃᏱ ᏱᎨᏎᏍᏗ ᎾᎿᎭᏂ.
Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te.
26 ᎠᎴ ᎾᎿᎭᎠᏂᏲᎯᎮᏍᏗ ᏧᎾᏓᎴᏅᏛ ᎠᏴ ᎤᎾᏤᎵ ᎦᎸᏉᏗᏳ ᎨᏒ ᎠᎴ ᏣᏓᎴᏅᏛ ᏗᎦᎸᏉᏗ.
Bakomemela engumba yango nkembo mpe lokumu ya bikolo.
27 ᎠᎴ ᎥᏝ ᎠᏎ ᎾᎿᎭᎤᏴᏍᏗ ᏱᎨᏎᏍᏗ ᎪᎱᏍᏗ ᎦᏓᎭ, ᎠᎴ ᎤᏂᏆᏘᏍᏗ ᏧᎸᏫᏍᏓᏁᎯ, ᎠᎴ ᎦᏰᎪᎩ; ᎤᏅᏒᏍᎩᏂ [ ᎤᏂᏴᏍᏗ ᎨᏎᏍᏗ ᏚᎾᏙᎥ ] ᏗᎪᏪᎵ ᎬᏂᏛ ᎠᏓᏁᎯ ᎪᏪᎵᎯ ᎤᏃᏕᎾᎠᎩᎾ ᎤᏤᎵᎦ.
Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.

< ᏣᏂ ᏄᏍᏛ ᎠᏥᎾᏄᎪᏫᏎᎸᎢ 21 >