< ՅԱՅՏՆՈՒԹԻՒՆ ՅՈՎՀԱՆՆՈՒ 5 >

1 Գահին վրայ բազմողին աջ ձեռքին մէջ տեսայ գիրք մը՝ գրուած ներսէն ու դուրսէն, եւ կնքուած եօթը կնիքով:
Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo.
2 Տեսայ նաեւ հզօր հրեշտակ մը, որ բարձրաձայն կը յայտարարէր. «Ո՞վ արժանի է բանալու այդ գիրքը եւ քակելու ատոր կնիքները»:
Namonaki mpe anjelu moko ya nguya kosakola na mongongo makasi: « Nani abongi mpo na kobuka bikangelo ya buku mpe kofungola yango? »
3 Բայց ո՛չ մէկը, ո՛չ երկինքի մէջ, ո՛չ երկրի վրայ, ո՛չ ալ երկրի ներքեւ՝ կարող էր բանալ այդ գիրքը, ո՛չ ալ նայիլ անոր:
Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango.
4 Ես ալ սաստիկ կու լայի՝ քանի որ ո՛չ մէկը արժանի գտնուեցաւ բանալու այդ գիրքը, ո՛չ ալ նայելու անոր:
Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo ete moko te amonanaki ete abongi mpo na kofungola buku to kotala kati na yango.
5 Իսկ երէցներէն մէկը ըսաւ ինծի. «Մի՛ լար. ահա՛ Յուդայի տոհմէն եղող Առիւծը, Դաւիթի Արմատը, յաղթեց՝ որպէսզի բանայ այդ գիրքը եւ քակէ ատոր եօթը կնիքները:
Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai: « Kolela te! Tala! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »
6 Ու տեսայ թէ գահին եւ չորս էակներուն մէջտեղ, ու երէցներուն մէջտեղ, կայնած էր Գառնուկ մը՝ որպէս թէ մորթուած. ան ունէր եօթը եղջիւր ու եօթը աչք, որոնք Աստուծոյ եօթը Հոգիներն են՝ ղրկուած ամբողջ երկիրը:
Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.
7 Ան եկաւ եւ առաւ գիրքը գահին վրայ բազմողին աջ ձեռքէն:
Mpate apusanaki mpo na kozwa buku wuta na loboko ya ngambo ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi.
8 Երբ առաւ գիրքը, չորս էակներն ու քսանչորս երէցները ինկան Գառնուկին առջեւ եւ երկրպագեցին. անոնցմէ իւրաքանչիւրը ունէր քնար մը, ու ոսկիէ սկաւառակ մը՝ խունկերով լեցուն, որ սուրբերուն աղօթքներն են:
Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.
9 Անոնք կ՚երգէին նոր երգ մը՝ ըսելով. «Դուն արժանի ես առնելու այդ գիրքը եւ քակելու ատոր կնիքները. որովհետեւ մորթուեցար, ու քու արիւնովդ գնեցիր մեզ Աստուծոյ համար՝ ամէն տոհմէ, լեզուէ, ժողովուրդէ եւ ազգէ,
Mpe bayembaki nzembo ya sika: « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.
10 թագաւորներ ու քահանաներ ըրիր մեզ մեր Աստուծոյն, եւ երկրի վրայ պիտի թագաւորենք»:
Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »
11 Տեսայ, ու լսեցի ձայնը շատ հրեշտակներու՝ որոնք գահին, էակներուն եւ երէցներուն շուրջն էին. անոնց թիւը բիւրերով բիւր ու հազարներով հազար էր:
Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,
12 Անոնք բարձրաձայն կ՚ըսէին. «Այդ մորթուած Գառնուկը արժանի է ընդունելու զօրութիւն, հարստութիւն, իմաստութիւն, ոյժ, պատիւ, փառք եւ օրհնաբանութիւն»:
mpe bazalaki koloba na mongongo makasi: « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »
13 Ու լսեցի բոլոր արարածները՝ երկինքի մէջ, երկրի վրայ, երկրի ներքեւ եւ ծովու մէջ եղող, ու ամէն ինչ որ անոնց մէջ կայ, որոնք կ՚ըսէին. «Գահին վրայ բազմողին եւ Գառնուկին՝ օրհնաբանութի՜ւն, պատի՜ւ, փա՜ռք ու զօրութի՜ւն դարէ դար՝՝»: (aiōn g165)
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene; bango nyonso bazalaki koloba: « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi (aiōn g165)
14 Եւ չորս էակները կ՚ըսէին. «Ամէն»: Ու երէցները ինկան եւ երկրպագեցին:
Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa: « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.

< ՅԱՅՏՆՈՒԹԻՒՆ ՅՈՎՀԱՆՆՈՒ 5 >