< ՄԱՏԹԷՈՍ 10 >

1 Յետոյ, քովը կանչելով իր տասներկու աշակերտները, իշխանութիւն տուաւ անոնց՝ անմաքուր ոգիներուն վրայ, որպէսզի դուրս հանեն զանոնք, ու բուժեն ամէն տեսակ ախտ եւ ամէն տեսակ վատառողջութիւն:
Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.
2 Ահա՛ւասիկ տասներկու առաքեալներուն անունները.- առաջինը՝ Սիմոն, որ Պետրոս կը կոչուի, եւ անոր եղբայրը՝ Անդրէաս,
Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale: liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo; Andre, ndeko ya Petelo; Jake, mwana mobali ya Zebede; Yoane, ndeko ya Jake;
3 Յակոբոս Զեբեդեան եւ անոր եղբայրը՝ Յովհաննէս, Փիլիպպոս ու Բարթողոմէոս, Թովմաս եւ Մատթէոս՝ մաքսաւորը, Յակոբոս Ալփեան ու Ղեբէոս՝ որ Թադէոս մականուանուեցաւ,
Filipo mpe Bartelemi; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade;
4 Սիմոն Կանանացի եւ Յուդա Իսկարիովտացի, որ մատնեց զայն:
Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
5 Յիսուս ղրկեց այս տասներկուքը եւ պատուիրեց անոնց. «Մի՛ երթաք հեթանոսներու ճամբայէն, ու մի՛ մտնէք Սամարացիներու որեւէ քաղաք,
Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo: — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.
6 այլ մանաւանդ գացէ՛ք Իսրայէլի տան կորսուած ոչխարներուն:
Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.
7 Երբ երթաք, քարոզեցէ՛ք եւ ըսէ՛ք. “Երկինքի թագաւորութիւնը մօտեցած է”:
Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.
8 Բուժեցէ՛ք հիւանդները, մաքրեցէ՛ք բորոտները՝՝, հանեցէ՛ք դեւերը. ձրի՛ ստացած էք, ձրի՛ տուէք:
Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.
9 Մի՛ ունենաք ո՛չ ոսկի, ո՛չ արծաթ ու ո՛չ պղինձ՝ ձեր գօտիներուն մէջ.
Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te.
10 ո՛չ ճամբորդութեան համար պարկ, ո՛չ կրկին բաճկոն, ո՛չ կօշիկ, ո՛չ գաւազան. որովհետեւ գործաւորը արժանի է իր կերակուրին:
Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.
11 Երբ քաղաք մը կամ գիւղ մը մտնէք, տեղեկացէ՛ք թէ ո՛վ է արժանաւորը անոր մէջ, եւ մնացէ՛ք անոր քով՝ մինչեւ որ մեկնիք անկէ:
Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.
12 Երբ տուն մտնէք, բարե՛ւ տուէք անոր:
Mpe tango bokokota na ndako yango, bopesa bavandi na yango mbote na koloba: « Tika ete kimia ezala na bino! »
13 Եթէ այդ տունը արժանի է, ձեր բարեւը թող գայ անոր վրայ. իսկ եթէ արժանի չէ, ձեր բարեւը թող վերադառնայ ձեզի:
Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino.
14 Եթէ մէկը չընդունի ձեզ ու մտիկ չընէ ձեր խօսքերը, երբ մեկնիք այդ տունէն կամ քաղաքէն, թօթուեցէ՛ք ձեր ոտքերուն փոշին:
Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.
15 Ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի. “Սոդոմացիներու եւ Գոմորացիներու երկրին աւելի՛ դիւրին պիտի ըլլայ դատաստանին օրը, քան այդ քաղաքին”»:
Nazali koloba na bino penza ya solo: na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.
16 «Ահա՛ կը ղրկեմ ձեզ իբր ոչխարներ՝ գայլերու մէջ. ուրեմն խորագէ՛տ եղէք օձերու պէս, եւ աննենգ՝ աղաւնիներու պէս:
Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.
17 Իսկ զգուշացէ՛ք մարդոցմէ. որովհետեւ ատեաններու պիտի մատնեն ձեզ, ու պիտի խարազանեն ձեզ իրենց ժողովարաններուն մէջ:
Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.
18 Կառավարիչներու եւ թագաւորներու առջեւ պիտի տարուիք՝ իմ պատճառովս, իբր վկայութիւն անոնց ու հեթանոսներուն:
Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.
19 Բայց երբ մատնեն ձեզ, մի՛ մտահոգուիք թէ ի՛նչպէս կամ ի՛նչ պիտի խօսիք, որովհետեւ ինչ որ պիտի խօսիք՝ պիտի տրուի ձեզի այդ ժամուն:
Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.
20 Որովհետեւ ո՛չ թէ դուք էք որ պիտի խօսիք, հապա ձեր Հօր Հոգին՝ որ պիտի խօսի ձեր մէջ:
Ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo ya Tata na bino nde akoloba na nzela ya minoko na bino.
21 Եղբայրը մահուան պիտի մատնէ իր եղբայրը, եւ հայրը՝ զաւակը. ու զաւակներ պիտի ելլեն իրենց ծնողներուն դէմ եւ մեռցնեն զանոնք:
Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.
22 Բոլորին ատելի պիտի ըլլաք իմ անունիս համար. բայց ո՛վ որ տոկայ մինչեւ վախճանը, անիկա՛ պիտի փրկուի:
Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
23 Երբ այս քաղաքին մէջ հալածեն ձեզ, փախէ՛ք ուրիշ քաղաք մը. որովհետեւ ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի. “Պիտի չաւարտէք Իսրայէլի քաղաքները, մինչեւ որ մարդու Որդին գայ”:
Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo: bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.
24 Աշակերտը գերիվեր չէ իր վարդապետէն, ո՛չ ալ ծառան՝ իր տիրոջմէն:
Moyekoli alekaka molakisi na ye te, mowumbu mpe alekaka nkolo na ye te.
25 Բաւական է աշակերտին՝ որ իր վարդապետին պէս ըլլայ, ու ծառային՝ իր տիրոջ պէս: Եթէ տանուտէրը կոչեցին Բէեղզեբուղ, ո՜րչափ աւելի՝ անոր տնեցիները»:
Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye?
26 « Ուրեմն մի՛ վախնաք անոնցմէ, որովհետեւ ոչինչ կայ ծածկուած՝ որ պիտի չյայտնուի, ու գաղտնի՝ որ պիտի չգիտցուի:
Yango wana, bobanga bango te! Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.
27 Ինչ որ կ՚ըսեմ ձեզի խաւարի մէջ՝ խօսեցէ՛ք զայն լոյսի մէջ, եւ ինչ որ կը լսէք ականջի մէջ՝ քարոզեցէ՛ք տանիքներուն վրայ:
Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.
28 Մի՛ վախնաք անոնցմէ՝ որ մարմինը կը սպաննեն ու չեն կրնար անձը սպաննել. այլ մանաւանդ վախցէ՛ք անկէ՝ որ կրնայ անձը եւ մարմինը կորսնցնել գեհենին մէջ: (Geenna g1067)
Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo. (Geenna g1067)
29 Երկու ճնճղուկ չե՞ն ծախուիր մէկ դանգի. սակայն անոնցմէ ո՛չ մէկը գետին կ՚իյնայ առանց ձեր Հօր կամքին:
Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te.
30 Բայց ձեր գլուխին բոլոր մազերն ալ համրուած են:
Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino.
31 Ուրեմն մի՛ վախնաք, որովհետեւ դուք շատ ճնճղուկներէ աւելի կ՚արժէք»:
Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
32 «Ուստի ո՛վ որ դաւանի զիս մարդոց առջեւ, ես ալ պիտի դաւանիմ զինք Հօրս առջեւ՝ որ երկինքն է:
Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye;
33 Իսկ ո՛վ որ ուրանայ զիս մարդոց առջեւ, ես ալ պիտի ուրանամ զինք Հօրս առջեւ՝ որ երկինքն է»:
kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
34 «Մի՛ կարծէք թէ ես եկայ խաղաղութիւն ձգելու երկրի վրայ: Ես եկայ ո՛չ թէ խաղաղութիւն ձգելու, հապա՝ սուր:
Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga.
35 Որովհետեւ եկայ զատելու մարդը իր հօրմէն, եւ աղջիկը՝ իր մօրմէն, ու հարսը՝ իր կեսուրէն:
Pamba te, nayaki mpo na kotia bokabwani kati na mwana mobali mpe tata na ye, kati na mwana mwasi mpe mama na ye, mpe kati na mwasi ya libala mpe mama-bokilo na ye:
36 Մարդուն թշնամիները՝ իր տնեցինե՛րը պիտի ըլլան:
banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.
37 Ա՛ն որ ինձմէ աւելի կը սիրէ իր հայրը կամ մայրը՝ ինծի արժանի չէ, եւ ա՛ն որ ինձմէ աւելի կը սիրէ իր որդին կամ աղջիկը՝ ինծի արժանի չէ:
Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
38 Ա՛ն որ իր խաչը չ՚առներ ու իմ ետեւէս չի գար, ինծի արժանի չէ:
Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
39 Ա՛ն որ կը գտնէ իր անձը՝ պիտի կորսնցնէ զայն, եւ ա՛ն որ կը կորսնցնէ իր անձը ինծի համար՝ պիտի գտնէ զայն»:
Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.
40 «Ա՛ն որ ձեզ կ՚ընդունի՝ զի՛ս կ՚ընդունի. եւ ա՛ն որ զիս կ՚ընդունի՝ զիս ղրկո՛ղը կ՚ընդունի:
Moto oyo ayambaka bino ayambaka nde Ngai, mpe moto oyo ayambaka Ngai ayambaka nde Motindi na Ngai.
41 Ա՛ն որ մարգարէ մը կ՚ընդունի՝ մարգարէի անունով, մարգարէի վարձատրութիւն պիտի ստանայ. ու ա՛ն որ արդար մը կ՚ընդունի՝ արդարի անունով, արդարի վարձատրութիւն պիտի ստանայ:
Moto oyo ayambaka mosakoli mpo ete azali mosakoli akozwa lifuti ya ndenge moko na mosakoli, mpe moto oyo ayambaka moto ya sembo mpo ete azali moto ya sembo akozwa lifuti ya ndenge moko na moto ya sembo.
42 Եւ ո՛վ որ այս պզտիկներէն մէկուն միայն գաւաթ մը պաղ ջուր խմցնէ՝ աշակերտի անունով, ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի, բնա՛ւ իր վարձատրութիւնը պիտի չկորսնցնէ»:
Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.

< ՄԱՏԹԷՈՍ 10 >