< ՄԱՐԿՈՍ 8 >

1 Այդ օրերը, բազմութիւնը յոյժ շատ ըլլալով եւ ուտելու ոչինչ ունենալով, Յիսուս իրեն կանչեց իր աշակերտները ու ըսաւ անոնց.
Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango:
2 «Կը գթամ այդ բազմութեան վրայ, որովհետեւ արդէն երեք օր է՝ որ քովս են, եւ ոչինչ ունին ուտելու:
— Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te.
3 Եթէ անօթի ուղարկեմ զանոնք իրենց տուները՝ պիտի պարտասին ճամբան, որովհետեւ ատոնցմէ ոմանք հեռաւոր տեղէ եկած են»:
Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.
4 Իր աշակերտները պատասխանեցին իրեն. «Այս անապատին մէջ ուրկէ՞ կրնայ մէկը հացով կշտացնել ատոնք»:
Bayekoli na Ye bazongisaki: — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda?
5 Հարցուց անոնց. «Քանի՞ նկանակ ունիք»: Անոնք ըսին. «Եօթը»:
Yesu atunaki bango: — Bozali na mapa boni? Bazongisaki: — Tozali na mapa sambo.
6 Հրամայեց բազմութեան՝ որ նստի գետինին վրայ. եւ առաւ եօթը նկանակները, շնորհակալ եղաւ, կտրեց ու տուաւ աշակերտներուն, որպէսզի հրամցնեն բազմութեան. եւ հրամցուցին:
Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo.
7 Քանի մը մանր ձուկ ալ ունէին: Օրհնեց ու ըսաւ՝ որ զանոնք ալ հրամցնեն անոնց:
Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango.
8 Կերան, կշտացան, եւ աւելցած բեկորներէն եօթը զամբիւղ վերցուցին:
Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
9 Ուտողները չորս հազարի չափ էին: Արձակեց զանոնք,
Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango.
10 եւ իսկոյն նաւ մտնելով՝ աշակերտներուն հետ գնաց Դաղմանութայի կողմերը:
Mbala moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na Ye mpe akendeki na etuka ya Dalimanuta.
11 Փարիսեցիները ելլելով՝ սկսան անոր հետ վիճաբանիլ, ու զայն փորձելով՝ կը խնդրէին իրմէ նշան մը երկինքէն:
Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo.
12 Ան ալ իր հոգիին մէջ հառաչելով՝ ըսաւ. «Ինչո՞ւ այս սերունդը նշան կը խնդրէ: Ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի թէ այս սերունդին նշան պիտի չտրուի»:
Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki: « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo? Nazali koloba na bino penza ya solo: bakopesamela elembo moko te! »
13 Եւ զանոնք թողուց, դարձեալ նաւ մտաւ ու գնաց ծովուն միւս եզերքը:
Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale.
14 Հաց առնել մոռցած էին. բայց նաւուն մէջ իրենց հետ միայն մէկ նկանակ ունէին:
Bayekoli babosanaki komema mapa; bazalaki kaka na lipa moko kati na bwato.
15 Պատուիրեց անոնց ու ըսաւ. «Ուշադի՛ր եղէք, զգուշացէ՛ք Փարիսեցիներու խմորէն ու Հերովդէսի խմորէն»:
Yesu akebisaki bango: — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode!
16 Իսկ անոնք իրարու հետ կը մտածէին եւ կ՚ըսէին. «Որովհետեւ հաց չունինք»:
Bayekoli bakomaki kolobana bango na bango: — Azali koloba bongo mpo ete tozali na mapa te.
17 Յիսուս գիտնալով անոնց մտածումը՝ ըսաւ անոնց. «Ինչո՞ւ կը մտածէք թէ հաց չունիք. տակաւին չէ՞ք ըմբռներ ու չէ՞ք հասկնար. տակաւին ձեր սիրտը կարծրացա՞ծ է:
Yesu asosolaki makanisi na bango; alobaki: — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te! Mpo na nini? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te; mayele na bino ezali kaka ya kozipama; bozali na mitema makasi;
18 Աչքեր ունիք եւ չէ՞ք տեսներ, ականջներ ունիք ու չէ՞ք լսեր, եւ չէ՞ք յիշեր:
bozali na miso, kasi bozali komona te; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te? Bobosani penza!
19 Երբ հինգ նկանակները կտրեցի հինգ հազարին, բեկորներով լեցուն քանի՞ կողով վերցուցիք»: Ըսին անոր. «Տասներկու»:
Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato? Bazongisaki: — Bitunga zomi na mibale.
20 «Ու երբ եօթը նկանակները կտրեցի չորս հազարին, բեկորներով լեցուն քանի՞ զամբիւղ վերցուցիք»: Անոնք ալ ըսին. «Եօթը»:
Bongo tango nakataki mapa sambo mpo na kokabolela bato nkoto minei, bozongaki na bitunga boni etonda na biteni ya mapa? Bazongisaki: — Tolokotaki bitumba sambo.
21 Եւ ըսաւ անոնց. «Հապա ի՞նչպէս չէք հասկնար»:
Alobaki na bango: — Bozwi kaka bososoli nanu te?
22 Երբ գնաց Բեթսայիդա՝ կոյր մը բերին անոր առջեւ, ու կ՚աղաչէին իրեն՝ որ դպչի անոր:
Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye.
23 Ան ալ՝ բռնելով կոյրին ձեռքէն՝ դուրս տարաւ գիւղէն, եւ թքնելով անոր աչքերուն՝ դրաւ ձեռքը անոր վրայ, ու հարցուց անոր թէ կը տեսնէ՛ բան մը:
Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye: — Boni, omoni eloko?
24 Ան ալ նայեցաւ եւ ըսաւ. «Կը տեսնեմ մարդիկ՝ ծառերու պէս, որ կը քալեն»:
Moto yango atalaki mpe alobaki: — Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola.
25 Դարձեալ դրաւ ձեռքը անոր աչքերուն վրայ ու նայիլ տուաւ անոր. եւ առողջացաւ, ու յստակօրէն կը տեսնէր բոլորը:
Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza.
26 Յետոյ՝ ղրկելով զայն իր տունը՝ ըսաւ. «Մի՛ մտներ գիւղը, ո՛չ ալ մէկու մը ըսէ գիւղին մէջ»:
Yesu alobaki na ye: — Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka.
27 Յիսուս գնաց Փիլիպպոսի Կեսարիային գիւղերը՝ իր աշակերտներուն հետ: Ճամբան հարցուց իր աշակերտներուն. «Մարդիկ ինծի համար ի՞նչ կ՚ըսեն, ո՞վ եմ»:
Yesu mpe bayekoli na Ye bakendeki na bamboka ya Sezarea ya Filipo. Na nzela, atunaki bango: — Bato bazali koloba ete Ngai nazali nani?
28 Անոնք պատասխանեցին. «Ոմանք՝ Յովհաննէս Մկրտիչը, ուրիշներ՝ Եղիան, ուրիշներ ալ՝ մարգարէներէն մէկը»:
Bazongisaki: — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli.
29 Եւ ինք ըսաւ անոնց. «Իսկ դո՛ւք ինծի համար ի՞նչ կ՚ըսէք, ո՞վ եմ»: Պետրոս պատասխանեց անոր. «Դուն Քրիստո՛սն ես»:
Yesu atunaki bango: — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani? Petelo azongiselaki Ye: — Ozali Masiya.
30 Սաստիկ հրահանգեց անոնց՝ որ ո՛չ մէկուն խօսին իր մասին:
Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko.
31 Ապա սկսաւ սորվեցնել անոնց. «Պէտք է որ մարդու Որդին շատ չարչարանքներ կրէ, մերժուի երէցներէն, քահանայապետներէն եւ դպիրներէն, սպաննուի, ու երեք օրէն ետք յարութիւն առնէ»:
Yesu akomaki koteya bango: — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.
32 Այս խօսքը ըսաւ բացորոշապէս: Ուստի Պետրոս մէկդի առաւ զինք եւ սկսաւ յանդիմանել:
Azalaki koloba makambo yango na polele penza. Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye: — Koloba bongo te!
33 Իսկ ինք դարձաւ, իր աշակերտներուն նայելով՝ յանդիմանեց Պետրոսը եւ ըսաւ. «Ետե՛ւս գնա, Սատանա՛յ, որովհետեւ դուն ո՛չ թէ Աստուծոյ բաները կը մտածես, հապա՝ մարդոց բաները»:
Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo: — Mosika na Ngai, Satana! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
34 Երբ իրեն կանչեց բազմութիւնը՝ իր աշակերտներուն հետ, ըսաւ անոնց. «Ո՛վ որ ուզէ գալ իմ ետեւէս, թող ուրանայ ինքզինք, վերցնէ իր խաչը, ու հետեւի ինծի:
Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
35 Որովհետեւ ո՛վ որ ուզէ փրկել իր անձը՝ պիտի կորսնցնէ զայն, իսկ ո՛վ որ կորսնցնէ իր անձը՝ ինծի ու աւետարանին համար, պիտի փրկէ զայն:
Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango.
36 Քանի որ ի՞նչ օգուտ է մարդուն՝ որ շահի ամբողջ աշխարհը, բայց կորսնցնէ իր անձը.
Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye?
37 կամ՝ մարդ ի՞նչ փրկանք պիտի տայ իր անձին փոխարէն:
Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye?
38 Որովհետեւ ո՛վ որ ամօթ սեպէ զիս եւ իմ խօսքերս դաւանիլը՝ այս շնացող ու մեղաւոր սերունդին մէջ, մարդու Որդին ալ ամօթ պիտի սեպէ զայն դաւանիլը՝ երբ գայ իր Հօր փառքով սուրբ հրեշտակներուն հետ»:
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.

< ՄԱՐԿՈՍ 8 >