< ԳՈՐԾՔ ԱՌԱՔԵԼՈՑ 27 >

1 Երբ որոշուեցաւ նաւարկել դէպի Իտալիա, Պօղոսը եւ ուրիշ քանի մը բանտարկեալներ յանձնեցին հարիւրապետի մը՝ որուն անունը Յուլիոս էր, Սեբաստեան գունդէն:
Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama moko ya Rome, kati na mampinga ya mokonzi monene.
2 Մտնելով ադրամինտական նաւ մը՝ մեկնեցանք, եւ պիտի նաւարկէինք Ասիայի ծովեզերքէն. մեզի հետ էր նաեւ Արիստարքոս Մակեդոնացին՝ Թեսաղոնիկէէն:
Tomataki na masuwa oyo ewutaki na engumba Adramite mpo na kokende na mabongo ya pembeni-pembeni ya mokili ya Azia, mpe tokendeki; Arisitarke, moto ya Masedwane ya Tesalonika, azalaki na biso elongo.
3 Հետեւեալ օրը իջանք Սիդոն. Յուլիոս՝ մարդասիրութեամբ վարուելով Պօղոսի հետ՝ արտօնեց որ երթայ բարեկամներուն եւ վայելէ անոնց խնամքը:
Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango.
4 Մեկնելով անկէ՝ նաւարկեցինք Կիպրոսի վարի կողմէն, քանի որ հովերը հակառակ էին:
Sima na biso kolongwa wana, tozongelaki mobembo na biso mpe tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga ya Shipre, mpo na kokima mipepe oyo ezalaki kobeta biso makasi mpe kopekisa biso kokende liboso.
5 Յետոյ՝ նաւարկելով Կիլիկիայի ու Պամփիւլիայի ծովուն մէջէն՝ իջանք Լիկիայի Միւռա քաղաքը:
Sima na biso kokatisa ebale monene oyo eleka pembeni-pembeni ya Silisi mpe ya Pafili, tosemaki na Mira, kati na mokili ya Lisi.
6 Հարիւրապետը գտաւ հոն աղեքսանդրիական նաւ մը՝ որ կ՚երթար Իտալիա, ու մեզ մտցուց անոր մէջ:
Kuna, mokonzi ya basoda nkama moko amonaki masuwa moko ya engumba Alekizandri, oyo ezalaki kokende na Itali, mpe akotisaki biso kati na yango.
7 Շատ օրեր դանդաղօրէն նաւարկելէ ետք՝ հազիւ հասանք Կնիդոսի դիմաց. քանի հովը չէր թոյլատրեր, Կրետէի վարի կողմէն՝ Սաղմոնայի դիմացէն նաւարկեցինք,
Masuwa yango ezalaki kotambola malembe penza; boye tosalaki mikolo mwa mingi ya mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi penza. Lokola mpe mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimoni mpe tokendeki na ngambo ya sude ya esanga ya Kreti.
8 եւ դժուարութեամբ անկէ անցնելով՝ եկանք տեղ մը, որ կը կոչուէր Գեղեցիկ նաւահանգիստ. անոր մօտ էր Ղասեա քաղաքը:
Tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga yango na pasi penza kino tokomaki na esika oyo babengaka « Mabongo kitoko, » pene ya engumba Laseya.
9 Երբ բաւական ժամանակ անցաւ, ու նաւարկութիւնը արդէն վտանգաւոր էր՝ քանի որ ծոմին ատենն ալ արդէն անցած էր, Պօղոս յորդորեց զանոնք՝
Lokola tolekisaki bongo tango mingi mpe masuwa ekomaki kotambola na matata, pamba te ezalaki sima na eleko ya kokila bilei, Polo akebisaki bango:
10 ըսելով. «Մարդի՛կ, ես կը նշմարեմ թէ այս նաւարկութիւնը պիտի ըլլայ վնասով ու կորուստով, ո՛չ միայն բեռին եւ նաւուն՝ հապա մեր անձերուն ալ»:
— Baninga, nazali komona lokola likama moko ya monene kosalema na mobembo na biso, mpe ekobebisa makasi masuwa elongo na biloko, kasi biso mpe tokoki kokufa.
11 Բայց հարիւրապետը կ՚անսար աւելի նաւավարին ու նաւատիրոջ՝ քան Պօղոսի խօսքերուն:
Kasi mokonzi ya basoda nkama moko alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya nkolo masuwa, na esika ete ayoka maloba ya Polo.
12 Եւ քանի որ այդ նաւահանգիստը անյարմար էր ձմերելու, շատեր կը թելադրէին մեկնիլ անկէ, որպէսզի ջանային հասնիլ Փիւնիկէ, որ Կրետէի մէկ նաւահանգիստն է ու կը նայի դէպի հարաւ-արեւմուտք եւ հիւսիս-արեւմուտք, ու հոն ձմերել:
Lokola mpe libongo ezalaki esika ya malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma na Fenikisi oyo ezali libongo ya Kreti, oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nor-weste, mpo na kolekisa kuna tango yango ya malili makasi.
13 Երբ հարաւային հովը մեղմութեամբ փչեց, կարծելով թէ հասած են իրենց առաջադրութեան՝ թուլցուցին խարիսխը ու նաւարկեցին Կրետէի քովէն:
Wana mwa mopepe moko ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ezali kokokisama; boye batombolaki longo, mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Kreti.
14 Բայց քիչ ետք՝ անոր դէմ ելաւ մրրկալից հով մը, որ կը կոչուէր Եւրակիկլոն:
Kasi sima na mwa tango, mopepe moko ya makasi penza, mopepe oyo babengaka « erakiloni, » ekomaki kopepa wuta na esanga;
15 Երբ նաւը յափշտակուեցաւ եւ չկրցաւ դիմադրել հովին, թողուցինք որ քշուի:
ememaki masuwa, mpe masuwa elongaki te nguya ya mopepe. Boye tomitikaki bongo na mopepe, mpe ememaki biso.
16 Սուրալով Կղօդա կոչուող փոքր կղզիի մը վարի կողմէն՝ հազիւ կրցանք բռնել մակոյկը:
Lokola tolekaki na lombangu, na pembeni-pembeni ya esanga moke oyo babengaka Koda, tolongaki na pasi kokanga mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama.
17 Երբ վերցուցին զայն, օգնութեան միջոցներ գործածելով՝ տակէն կապեցին նաւը: Վախնալով որ իյնան յորձանուտը՝ իջեցուցին առագաստը, եւ ա՛յդպէս կը քշուէին:
Sima na komatisa yango na masuwa, bazwaki basinga mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa.
18 Քանի սաստիկ մրրիկի մէջ էինք, յաջորդ օրը դուրս նետեցին բեռները:
Mokolo oyo elandaki, lokola mopepe ezalaki kaka koningisa masuwa makasi, babwakaki na ebale, biloko oyo ezalaki kati na masuwa.
19 Իսկ երրորդ օրը՝ մենք մեր ձեռքերով դուրս նետեցինք նաւուն գործիքները:
Na mokolo ya misato, na maboko na bango moko, babwakaki na ebale, biloko oyo etambolisaka masuwa.
20 Երբ շատ օրեր՝ ո՛չ արեւ, ո՛չ ալ աստղեր երեւցան, ու սաստիկ մրրիկ կար մեզի դէմ, ա՛լ փրկուելու ամէն յոյս կտրուեցաւ մեզմէ:
Lokola tosalaki mikolo ebele na kozanga komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tobungisaki elikya ya kobika.
21 Քանի որ շատ օրերէ ի վեր անօթի էին, Պօղոս՝ կայնելով անոնց մէջ՝ ըսաւ. «Մարդի՛կ, պէտք էր որ մտիկ ընէիք ինծի ու չնաւարկէիք Կրետէէն, եւ չկրէիք այս վնասն ու կորուստը:
Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki: — Baninga na ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Kreti te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki te kobungisa biloko na bino.
22 Իսկ հիմա կը յորդորեմ ձեզ որ ոգեւորուիք, քանի որ ձեզմէ ո՛չ մէկուն անձը պիտի կորսուի, բայց միայն նաւը:
Kasi sik’oyo, nazali kolendisa bino ete boyika mpiko, pamba te moko te kati na bino akokufa, kaka masuwa nde ekobeba.
23 Արդարեւ այս գիշեր քովս կայնեցաւ հրեշտակը այն Աստուծոյն, որուն կը պատկանիմ եւ որ կը պաշտեմ,
Na butu ya lelo, Anjelu na Nzambe na ngai, oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai
24 ու ըսաւ. “Մի՛ վախնար, Պօղո՛ս. դուն պէտք է որ կայսրին ներկայանաս. եւ ահա՛ Աստուած շնորհեց քեզի բոլոր անոնք՝ որ կը նաւարկեն քեզի հետ”:
mpe alobaki: « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »
25 Ուստի, մարդի՛կ, ոգեւորուեցէ՛ք, որովհետեւ ես կը հաւատամ Աստուծոյ. պիտի ըլլայ այնպէս՝ ինչպէս ըսուեցաւ ինծի:
Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.
26 Սակայն պէտք է որ նաւը կղզիի մը առջեւ խրի՝՝»:
Kasi atako bongo, tosengeli kokangama kaka na esanga moko.
27 Երբ տասնչորրորդ գիշերն էր՝ որ կը տարուբերուէինք Ադրիական ծովուն մէջ, կէս գիշերին նաւաստիները ենթադրեցին թէ մօտեցած են ցամաքի մը:
Na butu ya zomi na minei, masuwa ezalaki kaka komemama epai na epai kati na ebale monene Adriatiki. Na kati-kati ya butu, basali ya masuwa bakanisaki ete tokomi pene ya mokili;
28 Ձգելով խորաչափը՝ գտան քսան գրկաչափ. քիչ մը յառաջ երթալով՝ դարձեալ ձգեցին, ու գտան տասնհինգ գրկաչափ:
babwakaki singa mpo na komeka mozindo ya mayi mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku misato na sambo. Wana bapusanaki mwa liboso, bamekaki lisusu mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku mibale na mwambe.
29 Վախնալով որ գուցէ զարնուինք խարակներու՝՝, ետեւի կողմէն ձգեցին չորս խարիսխ, եւ կ՚ըղձային որ առտու ըլլայ:
Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etutana na mabanga, babwakaki balongo minei na mayi wuta na sima ya masuwa, na posa makasi ya komona tongo kotana.
30 Իսկ նաւաստիները կը ջանային փախչիլ նաւէն, ու ծովը իջեցուցին մակոյկը՝ պատրուակելով թէ առջեւի կողմէն ալ պիտի ձգեն խարիսխներ:
Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola nde balingi kokende kokangisa balongo na liboso ya masuwa.
31 Բայց Պօղոս ըսաւ հարիւրապետին ու զինուորներուն. «Եթէ ասոնք չմնան նաւուն մէջ՝ դուք չէք կրնար փրկուիլ»:
Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda: — Tala, soki bato oyo batikali te kati na masuwa, bino mpe bokobika te.
32 Այն ատեն զինուորները կտրեցին մակոյկին չուանները, եւ թողուցին որ դուրս իյնայ:
Boye, basoda bakataki basinga oyo esimbaki mwa bwato yango mpe batikaki yango kokweya na mayi.
33 Մինչ առտուն կը մօտենար, Պօղոս կ՚աղաչէր բոլորին որ կերակուր ուտեն՝ ըսելով. «Այսօր տասնչորս օր է՝ որ դուք սպասելով անօթի մնացած էք, ու ոչինչ կերած էք:
Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia; alobaki: — Ekokisi lelo mikolo zomi na minei wuta bozali kozela, mpe bolie ata eloko moko te.
34 Ուստի կ՚աղաչեմ ձեզի՝ որ կերակուր ուտէք, որովհետեւ ասիկա՛ ալ ձեր փրկութեան համար է. քանի որ ձեզմէ ո՛չ մէկուն գլուխէն մա՛զ մը պիտի իյնայ»:
Nasengi na bino ete bolia sik’oyo. Bosengeli na yango mpo ete bozala na bomoi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.
35 Այսպէս խօսելէ ետք՝ հաց առաւ, բոլորին առջեւ շնորհակալ եղաւ Աստուծմէ, ու կտրելով սկսաւ ուտել:
Sima na ye koloba bongo, akamataki lipa mpe azongisaki matondi epai na Nzambe liboso na bango nyonso; bongo akataki yango mpe abandaki kolia.
36 Բոլորն ալ ոգեւորուեցան, եւ իրենք ալ կերակուր կերան:
Bango nyonso balendisamaki mpe bakomaki kolia.
37 Նաւուն մէջ՝ բոլորս երկու հարիւր եօթանասունվեց անձ էինք:
Kati na masuwa, tozalaki bato nkama mibale na tuku sambo na motoba.
38 Երբ կշտացան կերակուրով, թեթեւցուցին նաւը՝ ծովը թափելով ցորենը:
Sima na bango kolia mpe kotonda mingi, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa.
39 Երբ առտու եղաւ՝ չէին ճանչնար ցամաքը. բայց նշմարելով ծոց մը՝ որ ծովեզերք ունէր, ծրագրեցին նաւը խրել անոր մէջ՝ եթէ կարելի ըլլար:
Tango tongo etanaki, bamonaki mokili te, kasi bamonaki kaka libongo moko ya zelo na suka, epai ebale ekota. Boye bazwaki mokano, soki bakolonga, ya kosemisa masuwa kuna.
40 Ուստի ծովը թողուցին խարիսխները՝ կտրելով պարանները, թուլցուցին ղեկերուն պարանները, եւ հովին բանալով առագաստը՝ ուղղուեցան դէպի այդ ծովեզերքը:
Babwakaki balongo na ebale; mpe kaka na tango yango, bafungolaki basinga ya yenda, batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo.
41 Զարնուելով աւազակոյտի մը՝՝, խրեցին նաւը. առջեւի կողմը մխրճուելով՝ մնաց անշարժ, իսկ ետեւի կողմը կը քակուէր ալիքներուն սաստկութենէն:
Kasi masuwa ekendeki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge.
42 Զինուորներն ալ ծրագրեցին սպաննել բանտարկեալները, որպէսզի անոնցմէ ո՛չ մէկը լողալով փախչի:
Basoda bazwaki likanisi ya koboma bakangami mpo bazalaki kobanga ete bakatisa mayi mpe bakima.
43 Բայց հարիւրապետը, որ կը փափաքէր փրկել Պօղոսը, արգելք եղաւ անոնց ծրագիրին: Հրամայեց որ լողալ գիտցողնե՛րը նախ ծով նետուին ու ցամաք ելլեն.
Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama moko azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango kokokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili.
44 իսկ միւսները հետեւին՝ ոմանք տախտակներով, եւ ոմանք՝ նաւուն ուրիշ բաներով: Այսպէս՝ բոլորը ազատելով ցամաք հասան:
Bamosusu basengeli kolanda bango na kodiembela na mabaya to na biteni ya masuwa. Ezali ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.

< ԳՈՐԾՔ ԱՌԱՔԵԼՈՑ 27 >