< اَلتَّثْنِيَة 27 >

وَأَوْصَى مُوسَى وَشُيُوخُ إِسْرَائِيلَ ٱلشَّعْبَ قَائِلًا: «ٱحْفَظُوا جَمِيعَ ٱلْوَصَايَا ٱلَّتِي أَنَا أُوصِيكُمْ بِهَا ٱلْيَوْمَ. ١ 1
Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato: « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo.
فَيَوْمَ تَعْبُرُونَ ٱلْأُرْدُنَّ إِلَى ٱلْأَرْضِ ٱلَّتِي يُعْطِيكَ ٱلرَّبُّ إِلَهُكَ، تُقِيمُ لِنَفْسِكَ حِجَارَةً كَبِيرَةً وَتَشِيدُهَا بِٱلشِّيدِ، ٢ 2
Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe.
وَتَكْتُبُ عَلَيْهَا جَمِيعَ كَلِمَاتِ هَذَا ٱلنَّامُوسِ، حِينَ تَعْبُرُ لِكَيْ تَدْخُلَ ٱلْأَرْضَ ٱلَّتِي يُعْطِيكَ ٱلرَّبُّ إِلَهُكَ، أَرْضًا تَفِيضُ لَبَنًا وَعَسَلًا، كَمَا قَالَ لَكَ ٱلرَّبُّ إِلَهُ آبَائِكَ. ٣ 3
Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino.
حِينَ تَعْبُرُونَ ٱلْأُرْدُنَّ، تُقِيمُونَ هَذِهِ ٱلْحِجَارَةَ ٱلَّتِي أَنَا أُوصِيكُمْ بِهَا ٱلْيَوْمَ فِي جَبَلِ عِيبَالَ، وَتُكَلِّسُهَا بِٱلْكِلْسِ. ٤ 4
Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe.
وَتَبْنِي هُنَاكَ مَذْبَحًا لِلرَّبِّ إِلَهِكَ، مَذْبَحًا مِنْ حِجَارَةٍ لَا تَرْفَعْ عَلَيْهَا حَدِيدًا. ٥ 5
Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende.
مِنْ حِجَارَةٍ صَحِيحَةٍ تَبْنِي مَذْبَحَ ٱلرَّبِّ إِلَهِكَ، وَتُصْعِدُ عَلَيْهِ مُحْرَقَاتٍ لِلرَّبِّ إِلَهِكَ. ٦ 6
Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba.
وَتَذْبَحُ ذَبَائِحَ سَلَامَةٍ، وَتَأْكُلُ هُنَاكَ وَتَفْرَحُ أَمَامَ ٱلرَّبِّ إِلَهِكَ. ٧ 7
Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
وَتَكْتُبُ عَلَى ٱلْحِجَارَةِ جَمِيعَ كَلِمَاتِ هَذَا ٱلنَّامُوسِ نَقْشًا جَيِّدًا». ٨ 8
Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. »
ثُمَّ كَلَّمَ مُوسَى وَٱلْكَهَنَةُ ٱللَّاوِيُّونَ جَمِيعَ إِسْرَائِيلَ قَائِلِينَ: «اِنْصِتْ وَٱسْمَعْ يَا إِسْرَائِيلُ. ٱلْيَوْمَ صِرْتَ شَعْبًا لِلرَّبِّ إِلَهِكَ. ٩ 9
Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele: « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino.
فَٱسْمَعْ لِصَوْتِ ٱلرَّبِّ إِلَهِكَ وَٱعْمَلْ بِوَصَايَاهُ وَفَرَائِضِهِ ٱلَّتِي أَنَا أُوصِيكَ بِهَا ٱلْيَوْمَ». ١٠ 10
Botosa Yawe, Nzambe na bino, mpe bosalela mitindo mpe bikateli na Ye oyo nalingi kopesa bino lelo. »
وَأَوْصَى مُوسَى ٱلشَّعْبَ فِي ذَلِكَ ٱلْيَوْمِ قَائِلًا: ١١ 11
Kaka na mokolo wana, Moyize apesaki mitindo oyo epai na bato:
«هَؤُلَاءِ يَقِفُونَ عَلَى جَبَلِ جِرِزِّيمَ لِكَيْ يُبَارِكُوا ٱلشَّعْبَ حِينَ تَعْبُرُونَ ٱلْأُرْدُنَّ: شِمْعُونُ وَلَاوِي وَيَهُوذَا وَيَسَّاكَرُ وَيُوسُفُ وَبَنْيَامِينُ. ١٢ 12
« Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani: libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame.
وَهَؤُلَاءِ يَقِفُونَ عَلَى جَبَلِ عِيبَالَ لِلَّعْنَةِ: رَأُوبَيْنُ وَجَادُ وَأَشِيرُ وَزَبُولُونُ وَدَانُ وَنَفْتَالِي. ١٣ 13
Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe: libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »
فَيُصَرِّحُ ٱللَّاوِيُّونَ وَيَقُولُونَ لِجَمِيعِ قَوْمِ إِسْرَائِيلَ بِصَوْتٍ عَالٍ: ١٤ 14
Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi:
مَلْعُونٌ ٱلْإِنْسَانُ ٱلَّذِي يَصْنَعُ تِمْثَالًا مَنْحُوتًا أَوْ مَسْبُوكًا، رِجْسًا لَدَى ٱلرَّبِّ عَمَلَ يَدَيْ نَحَّاتٍ، وَيَضَعُهُ فِي ٱلْخَفَاءِ. وَيُجِيبُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ وَيَقُولُونَ: آمِينَ. ١٥ 15
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَسْتَخِفُّ بِأَبِيهِ أَوْ أُمِّهِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ١٦ 16
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَنْقُلُ تُخْمَ صَاحِبِهِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ١٧ 17
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يُضِلُّ ٱلْأَعْمَى عَنِ ٱلطَّرِيقِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ١٨ 18
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokamba mokufi miso na nzela ya mabe. » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يُعَوِّجُ حَقَّ ٱلْغَرِيبِ وَٱلْيَتِيمِ وَٱلْأَرْمَلَةِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ١٩ 19
« Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَضْطَجِعُ مَعَ ٱمْرَأَةِ أَبِيهِ، لِأَنَّهُ يَكْشِفُ ذَيْلَ أَبِيهِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢٠ 20
« Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَضْطَجِعُ مَعَ بَهِيمَةٍ مَّا. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢١ 21
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَضْطَجِعُ مَعَ أُخْتِهِ بِنْتِ أَبِيهِ أَوْ بِنْتِ أُمِّهِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢٢ 22
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَضْطَجِعُ مَعَ حَمَاتِهِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢٣ 23
« Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَقْتُلُ قَرِيبَهُ فِي ٱلْخَفَاءِ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢٤ 24
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ يَأْخُذُ رَشْوَةً لِكَيْ يَقْتُلَ نَفْسَ دَمٍ بَرِيءٍ. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢٥ 25
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »
مَلْعُونٌ مَنْ لَا يُقِيمُ كَلِمَاتِ هَذَا ٱلنَّامُوسِ لِيَعْمَلَ بِهَا. وَيَقُولُ جَمِيعُ ٱلشَّعْبِ: آمِينَ. ٢٦ 26
« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo! » Bato nyonso bakozongisa: « Amen! »

< اَلتَّثْنِيَة 27 >