< Matiyu 27 >

1 Nene na kitin shanta, vat na didya na priest iyawa nin na kukune na nite kpiliza umolun Yesu ku.
Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.
2 Itere ghe inyaa mung idi nakpa ghe na caran Bilatus, ugumna.
Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato.
3 Ku bi kongo Yahuda, ulenge na awa leu ghe nyene isuu Yesu ku ushara nkul, a deo kutin akurtuno ikurfunghe akut atat na iwa bya ghe na cara na priest didya nin na kune,
Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato.
4 A woro, “Nati kulapi nlewe unan myii milau, min nan sali kulap.” Amma inun woro, “Ilele nsoo nyan kiti bit? Ulele ulawa ufin.”
Alobaki na bango: — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te! Kasi bango bazongisaki: — Etali biso na nini? Etali nde yo moko!
5 Atoo ikurfunghe nya kuti nlira, atunna anuza anyaa adi bana litime.
Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.
6 Adya kutii nlire yira ikurfunghe inin woro, “Na ucaun i taa ile ikurfunghe nanya filaiye ba bara na ikurfung myii yari.”
Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki: — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.
7 I kpiliza ulire ligowe idi seru kunen nin nikurfunghe ki ka na ima kasu amaraku.
Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya.
8 Bara nani kunen kune idin yucu kunin, “Kunen nmyii” udak kitimone.
Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila.
9 Nani imon ile na Irimiya na beleng i kulo, na awa woro, “I yira ikurfunghe akut atat, uparashi ule na iwa ti liti me nnuzu na nit me Israila,
Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki: « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye,
10 Ining na kiti kunenen, nafo na Cikilare na duru nani.”
mpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. »
11 Nene Yesu yisina nbun ngumna, ugumne nin tiringhe, “Fere ugo na Yahudawe?” Yesu kawaghe, “ubelle nani.”
Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: — Olobi yango.
12 Bara nani na i wa din pizirughe nin kulapi, na akawa nani imon ba.
Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te.
13 Bilatus nin woroghe, “Uku lanza imon ile na idin belu litii fe?”
Bongo Pilato atunaki Ye: — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo?
14 Bara nan na a kawa ligbulang lirumba, bara nani ugumne kifo unuu me.
Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te; mpe moyangeli akamwaki makasi.
15 Kubin buki mene ugadwari ugummne suun nkon kucin ko na anite fere.
Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona.
16 Nkuni kube i wadi nin kon kucim kugbas lisa me Barabas.
Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi.
17 Na izuru vat kiti kirum, Bilatus woro nani, “Ghari idi nin su insun minu ame? Barabas sa Yesu ule idin yicu KKristi?”
Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango: — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi?
18 Bara na ayiri i wa nakpaghe bara nshinari.
Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye.
19 Na a wa sosin kutet nwucun nliru uwani me tooghe nin kadura a woro, na uwati imon nin kadura a woro, “Na uwati imon nin nit une ba. Bara na inneu kitimone nanya namoro bara ame.”
Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba: — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye!
20 A didya kutiii nlira nang na kukune ntardu nacara kutii nlira risa ligosin na nite i woro, idi nin su Barabas, imolu Yesu ku.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu.
21 Ugumne tirino nani, “Ghari nan wabe idi nin su in cin minu ame?” I woro, “Barabas.”
Moyangeli atunaki bango lisusu: — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani? Bazongisaki na koganga: — Barabasi!
22 Bilatus woro nani, “I yari mma ti nin Yesu ule na idin yicughe Kristi?” Vat mene kawa i woro, “Kotin ghe kitene kucan nkull.”
Pilato atunaki bango: — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto? Bato nyonso bazongisaki: — Baka ye na ekulusu!
23 Anin woro na nin, “Bara iyang, kulapin nyanghari ataa?” Bara nani ighantina ti uwi mene kang, “Katin ghe ku can nkull.”
Pilato atunaki lisusu: — Mabe nini asali? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka: — Baka ye na ekulusu!
24 Bara na Bilatus nyene na a wa sa a wantina nani ba, banin nani ayene i cizina ufeuj nibinai, i yira myein, akusu acara me mbun ligozin na nite, a woro, “Na myein nin duku nin nang sali kulapi ulele. Yeneng ati mene imon ile na ima tighe.”
Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba: — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.
25 Anite vat woro, “Na nmyii me so natii bite udu nono bite.”
Bato nyonso bazongisaki: — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso!
26 Anin suna nani Barabas ku, aning nakpa nani Yesu ku idi kotinghe kucan nkull.
Pilato abimiselaki bango Barabasi; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
27 A sojan gumne yira Yesu ku udu nanya kitin yisizunu kutiin nwucun nliru idi pitirin a soje vat.
Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda.
28 I kalaghe imon kidowome vat itaghe imoon licin kidowe.
Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane,
29 Inin kyele kitik tigoo namart itaghe liti, i taghe uca ncara uleme me inin tumunu nbun me idighe liyom, idin belu, “Ulai dandaun Ugo na Yahudawa!”
balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba: « Mbote, mokonzi ya Bayuda! »
30 I tufuzunghe ataf, i bolo ucan na cara me i kpizoghe mun kitene liti.
Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto.
31 Na imala usughe liyarne, i kala imonne na itaghe kidowe, ishonghe inme, ini nya ninghe cindi kutinu kucan kull.
Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
32 Na inuzu udas, I se umong unit kunang sirmi lisa me simon, uli na iwa boroghe iyizi a nya nanghinu bara anan yauna kucan nkull me.
Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.
33 Idaa kankiti na idin yicu Ugolgota, kite na idin sumun, “Kiti na kankang nati.”
Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba: esika ya mokuwa ya moto,
34 Inaghe nmyein me gbalala a sono. Na a buti minin, na a yino usone ba.
bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango.
35 Na ikofinghe ikoso imoon kito wome nin kuriya.
Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke;
36 Inin suu idin yenju ghe.
mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
37 Kitene litime i Yertine lo ligbulanghe na li woro, “Yesuari, ulele ugo na Yahudawa.”
Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu: Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.
38 A kiri aba wa di ninghe kitene kuce, warum ncara ulime, warum ncara ugule.
Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
39 Ale na idin katizu zugizoghe, idin zinlu ati mene
Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango;
40 inin din belu, “Fe ule na uwadin woru uturiin atat! Tucu litife andi fe Gono Kutelleari, tolo kitene ku can nkull kone!”
bazalaki koloba: « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu! »
41 Nanere adidya kutiin nlire wadin sisughe ligowe nanang niyerte nin nakukunen ntardu nacara kutii nlira, nin wor,
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba:
42 “Ana tucu among, na a wasa atucu litime ba. Amere Ugoon Israila. Na atolu kitine kucan nkulle, ti ma nin yinun ninghe.
« Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te! Azali mokonzi ya Isalaele! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye.
43 Ana yinin min Kutelle. Na Kutelle tucughe nene a wadi nin suwe, bara ana woro, 'Meng Gono Kutelleari.'”
Atiaka elikya na ye kati na Nzambe; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba: ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »
44 A kire na i wa kutin nani ligowe taghe liyarin lirume.
Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana.
45 Nene ucizinu kubi kun tocin insirti talo nmgeine vat udu kubi kun zakure.
Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
46 Udu kubi kun zakure, Yesu taa intet nin liwui kang a woro, “Eli, Eli, lama sabachthani?” na idin nufi, “Kutelle nin, Kutelle nin, iyarin taa usuni?”
Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki: — Eloi, Eloi, lema sabachtani? Elingi koloba: Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai?
47 Na ale na iwa yisin kupoowe nlanza nani, i woro, “Adin yicu Iliya ku.”
Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye; boye bakomaki koloba: — Azali kobenga Eliya!
48 Kitene umong ta ucum a di yiru usoso, a lumu unin nin myein mi gbalala, ataa nca ujangaran a nakpaghe a sono.
Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela.
49 Kagisin mene woro, “Sunanghe tiyene sa Iliya ba dak ada tucughe.”
Kasi bato mosusu balobaki: — Zela! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye.
50 Yesu nin ghantina liwui nin teet anin suna nfep me a kuu.
Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye.
51 Bara nani azanin kesu kiti kilau kutii nlire marta tiba unuzu kitene udak kadase. Kutine nin zuluno kang, apara martiza.
Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki,
52 Ni sek wa pozun, abe na nit alau ale na iwa nun fitiza.
bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki:
53 I nuzu nanya niseke na ame nfita, a pira kipin kilau, a duro anit gbardan litime.
ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango.
54 Nene na asoje nyene nani nan nale na iwadin yenjun Yesu ku yene uzulunu kutine nin nimonile na isee feu da nani kang inin woro, “Kidegene Gono Kutelleari kane wadi.”
Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki: — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe!
55 A wani gbardan na iwa dufin Yesu ku unuzun Galili inan di kye ghe waduku idin yenju vat iyisina piit.
Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye.
56 Nanya mene Maryamu Magdaliya, Maryamu unang Yakub, nin Yusufu ning naa nnonon zibide.
Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi; mpe mama ya bana ya Zebede.
57 Na kulelen nda, umong unan nikurfung kunan Arimatiya, lisane Yusufu, ule na awadi gono kaduran Yesu.
Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu.
58 Ada see Bilatus ku atiringhe kidowon Yesu. Bilatuse woro nani i ninghe.
Akendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango.
59 Yusufu yira kidowe, a gbincilo nanya mayapi ma boo,
Jozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto
60 a nunku nanya kisek kipese kanga na awa wuzu nanya natala. Anin tarda llitala kibulun kiseke anin nya.
mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.
61 Maryamu Magadaliya nin leli Maryamu wa di kikane, i sosin idin Yenju kideke.
Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.
62 Nin kurtunun koiye, lo na liwa kafin, lirin shiri, a didya kultiin nlira nin na Farisiyawa wa pitirin nan Bilatus.
Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato
63 I woro, “Cikilari, ti lizino na unang kinu kane wadi nin nlai a wa woro, 'Mbaya nayiri atat nma fitu tutung.'
mpo na koloba na ye: — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana! Tango azalaki na bomoi, alobaki: « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »
64 Bara nani ta anit idi yenje kiseke udu liri lin tatte. Bara nono katwa me wada tuughe i belle anit au, 'Afita nanya kiseke.' Kinu kin mbe wa kata kin burne.”
Yango wana, pesa mitindo ete bakengela malamu kunda yango kino na mokolo ya misato. Soki te, bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto mpo ete, na sima, baloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Lokuta oyo ya suka ekoya kozala lisusu mabe koleka oyo ya liboso.
65 Bilatus woro nani, “Yiran unan ncaa. Can idi kiliin kitene vat.”
Pilato azongisaki: — Bozwa bakengeli mpe bokende kokengela kunda ndenge bokanisi kosala.
66 Bara nani i do idi kilin Kiseke vat, itursu litale inin ceu anan ncauleku.
Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli.

< Matiyu 27 >