< 2 до коринтян 11 >

1 Ой коли б ви трохи потерпіли моє безумство! а таки потерпите мене.
Bandeko, nabondeli bino: boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko! Iyo, boyikela ngai mpiko.
2 Бо я ревную про вас ревностю Божою; я бо заручив вас одному мужо-ві, щоб чистою дївою привести перед Христа.
Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.
3 Бою ся ж, щоб, як змій Єву обманив лукавством своїм, так не попсувались думки ваші, (одвернувши) від простоти в Христї.
Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.
4 Бо коли ж хто, прийшовши, иншого Христа проповідує, котрого ми не проповідували, або духа иншого ви приймаєте, котрого не прийняли, або инше благовісте, котрого не одержали; то ви були б дуже терпіливі.
Pamba te bozali kondima ete songolo aya koteya bino Yesu mosusu oyo akeseni na Yesu oyo biso toteyaki bino; bozali mpe kondima kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo boyambaki to mateya oyo ekeseni na Sango Malamu oyo bondimelaki!
5 Думаю бо, що я нічим не зоставсь позаду передніх апостолів.
Nzokande, nakanisi ete nazali moke te na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene.
6 Хоч бо я й неук словом, та не розумом; ні, ми знані у всьому між вами.
Nakoki solo komonana lokola moto oyo ayebi nanu te koloba malamu, kasi nazali na boyebi; mpe tolakisaki bino yango polele na banzela mpe na makambo nyonso.
7 Або гріх я зробив, себе смиряючи, щоб ви пійшли вгору, бо даром благовістє Боже проповідував вам?
Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino botombwama, wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nzambe?
8 Од инших церков брав я, приймаючи плату, на служеннє вам;
Nazwaki mbongo kowuta na Mangomba mosusu lokola lisungi na bango, wana nazalaki kokokisa lotomo na ngai kati na bino.
9 і, прийшовши до вас, та й бувши в недостатку, не був я нікому важким; бо недостаток мій сповнили брати мої, що прийшли з Македониї; та й у всьому я хоронив себе, щоб не бути вам важким, і хоронити му.
Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango.
10 (Як) істина Христова є в мені (так вірно), що похвала ся не загородить ся від мене в сторонах Ахайських.
Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango.
11 Чого ж? хиба, що не люблю вас? Бог знає (те).
Mpo na nini nalobi bongo? Mpo nalingaka bino te? Nzambe ayebi ete nalingaka bino!
12 Що ж роблю, те й робити му, щоб відтяти причину тим, що хочуть причини, щоб чим хвалять ся, (у тому) показались як і ми.
Mpe nakokoba kosala oyo nazali kosala sik’oyo, mpo na kopekisa bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso kati na makambo oyo bazali komikumisa na yango.
13 Бо такі лжеапостоли, робітники лукаві, прикидають ся апостолами Христовими.
Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto.
14 І не диво: сам бо сатана прикидаєть ся ангелом сьвітлим.
Ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole.
15 Не велика ж річ, коли й слуги його прикидають ся слугами правди. Конець їх буде по ділам їх.
Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.
16 Знов глаголю: щоб нїхто не вважав мене за безумного; коли ж ні хоч яко безумного мене прийміть, щоб хоч трохи менї похвалитись.
Nazongeli lisusu: tika ete moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma! Kasi soki bolingi bongo, boyamba ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke.
17 А що глаголю, не глаголю по Господї, а мов би в безумстві, у сїй певноті похвали.
Makambo oyo nalingi koloba, nakoloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi nakoloba yango lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa nzela ya komikumisa.
18 Яко ж бо многі хвалять ся по тїлу, то й я хвалити мусь.
Lokola bato mingi bazali komikumisa na tina na makambo ya mokili, ngai mpe nakomikumisa.
19 Радо бо терпите безумних, розумними бувши.
Bino oyo bozali bato ya bwanya, bozali kondima na esengo nyonso bato ya maboma.
20 Терпите бо, як хто підневолює вас, як хто жере (вас), як хто обдирає (вас), як хто величаєть ся, як ганбе вас у лице.
Bozali penza kondima ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na bilongi!
21 Робом досади глаголю, так ніби ми знемоглись. Коли ж у чому хто осьмілюєть ся (у безумстві глаголю), то й я осьмілююсь.
Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango.
22 Вони Євреї? І я. Вони Ізраїлітяне? І я. Вони насїннє Авраамову? І я.
Bazali Ba-Ebre? Ngai mpe nazali Mo-Ebre. Bazali bana ya Isalaele? Ngai mpe nazali mwana ya Isalaele! Bazali bakitani ya Abrayami? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami.
23 Христові слуги? (безумствуючи глаголю) я більше: В працях премного, в ранах без міри, у темницях пребагато, при смерти почасту.
Bazali basali ya Klisto? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.
24 Од Жидів пять раз по сорок без одного прийняв я.
Mbala mitano, Bayuda babetaki ngai bafimbu tuku misato na libwa;
25 Тричі киями бито мене, а один раз каменовано; тричі розбивав ся корабель, ніч і день пробув я в глибині;
mbala misato, babetaki ngai banzete; mbala moko, babambaki ngai mabanga; mbala misato, nazindaki na mayi; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene.
26 у дорогах почасту, у бідах (на) водї, у бідах (од) розбійників, у бідах од земляків, у бідах од поган, у бідах у городі, у бідах у пустині, у бідах на морі, у бідах між лукавими братами;
Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.
27 у праці і в журбі, почасту в недосипанню, в голоді і жаждї, в постах часто, в холоді й наготі.
Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.
28 Опріч того, що осторонь, налягав на мене щоденна журба про всі церкви.
Longola makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki: komitungisa na tina na Mangomba nyonso.
29 Хто знемогає, щоб і я не знемогав? Хто блазнить ся, щоб і я не горів?
Nani oyo alembi, bongo ngai nalemba nzoto te? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te?
30 Коли хвалитись треба, то хвалити мусь тим, що від немочі моєї.
Soki nasengeli komikumisa, nakomikumisa mpo na bolembu na ngai.
31 Бог, Отець Господа нашого Ісуса Христа, будучи благословен на віки, знає, що я не обманюю. (aiōn g165)
Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te. (aiōn g165)
32 У Дамаску царський намістник Арета, стеріг город Дамащан, хотівши піймати мене;
Kati na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai.
33 і віконцем у коші спущено мене по стїнї, і втік я з рук його.
Kasi bakitisaki ngai na nzela ya lidusu kati na mir, kati na kitunga, libanda ya mir; bongo nalongaki kokima ye.

< 2 до коринтян 11 >