< مزامیر 23 >

مزمور داود خداوند شبان من است. محتاج به هیچ چیز نخواهم بود. ۱ 1
Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.
در مرتعهای سبزمرا می‌خواباند. نزد آبهای راحت مرا رهبری می‌کند. ۲ 2
Apemisaka ngai na matiti ya mobesu, mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia.
جان مرا برمی گرداند. و به‌خاطر نام خود به راههای عدالت هدایتم می‌نماید. ۳ 3
Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
چون در وادی سایه موت نیز راه روم از بدی نخواهم ترسید زیرا تو با من هستی. عصا و چوب دستی تومرا تسلی خواهد داد. ۴ 4
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
سفره‌ای برای من به حضور دشمنانم می‌گسترانی. سر مرا به روغن تدهین کرده‌ای و کاسه‌ام لبریز شده است. ۵ 5
Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.
هرآینه نیکویی و رحمت تمام ایام عمرم در‌پی من خواهد بود. و در خانه خداوند ساکن خواهم بود تا ابدالاباد. ۶ 6
Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai.

< مزامیر 23 >