< داوران 17 >

و از کوهستان افرایم شخصی بود که میخا نام داشت. ۱ 1
Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko; kombo na ye ezalaki « Mika. »
و به مادر خود گفت: «آن هزار و یکصد مثقال نقره‌ای که از تو گرفته شد، و درباره آن لعنت کردی و در گوشهای من نیز سخن گفتی، اینک آن نقره نزد من است، من آن را گرفتم.» مادرش گفت: «خداوند پسر مرا برکت دهد.» ۲ 2
Alobaki na mama na ye: — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye: — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo!
پس آن هزار و یکصد مثقال نقره را به مادرش رد نمود و مادرش گفت: «این نقره را برای خداوند از دست خود به جهت پسرم بالکل وقف می‌کنم تا تمثال تراشیده و تمثال ریخته شده‌ای ساخته شود، پس الان آن را به تو باز می‌دهم.» ۳ 3
Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki: — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango.
وچون نقره را به مادر خود رد نمود، مادرش دویست مثقال نقره گرفته، آن را به زرگری داد که او تمثال تراشیده، و تمثال ریخته شده‌ای ساخت و آنها در خانه میخا بود. ۴ 4
Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.
و میخا خانه خدایان داشت، و ایفود و ترافیم ساخت، و یکی از پسران خود را تخصیص نمود تا کاهن او بشود. ۵ 5
Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.
و در آن ایام در اسرائیل پادشاهی نبود و هر کس آنچه درنظرش پسند می‌آمد، می‌کرد. ۶ 6
Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te; moto na moto azalaki kosala nyonso oyo ezali malamu na miso na ye.
و جوانی از بیت لحم یهودا از قبیله یهودا و ازلاویان بود که در آنجا ماوا گزید. ۷ 7
Nzokande, ezalaki na elenge mobali moko ya Molevi, azalaki kovanda na Beteleemi ya Yuda, na ekolo Yuda.
و آن شخص ازشهر خود، یعنی از بیت لحم یهودا روانه شد، تاهر جایی که بیابد ماوا گزیند، و چون سیر می‌کردبه کوهستان افرایم به خانه میخا رسید. ۸ 8
Alongwaki na engumba Beteleemi ya Yuda mpe akendeki koluka esika mosusu ya kovanda. Na mobembo na ye, akomaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ndako ya Mika.
و میخا اورا گفت: «از کجا آمده‌ای؟» او در جواب وی گفت: «من لاوی هستم از بیت لحم یهودا، ومی روم تا هر جایی که بیابم ماوا گزینم.» ۹ 9
Mika atunaki ye: — Owuti wapi? Azongisaki: — Nazali moto ya libota ya Levi, nawuti na Beteleemi ya Yuda mpe nazali koluka esika ya kovanda.
میخااو را گفت: «نزد من ساکن شو و برایم پدر و کاهن باش، و من تو را هر سال ده مثقال نقره و یک دست لباس و معاش می‌دهم.» پس آن لاوی داخل شد. ۱۰ 10
Mika alobaki na ye: — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.
و آن لاوی راضی شد که با او ساکن شود، و آن جوان نزد او مثل یکی از پسرانش بود. ۱۱ 11
Boye, Molevi yango andimaki kovanda elongo na Mika. Mika akomisaki Molevi lokola moko kati na bana na ye.
و میخاآن لاوی را تخصیص نمود و آن جوان کاهن اوشد، و در خانه میخا می‌بود. ۱۲ 12
Mika abulisaki Molevi yango lokola nganga-nzambe na ye mpe akomaki kovanda elongo na ye.
و میخا گفت: «الان دانستم که خداوند به من احسان خواهد نمود زیرالاوی‌ای را کاهن خود دارم.» ۱۳ 13
Mika alobaki: « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »

< داوران 17 >