< عزرا 10 >

پس چون عزرا دعا و اعتراف می‌نمود وگریه‌کنان پیش خانه خدا رو به زمین نهاده بود، گروه بسیار عظیمی از مردان و زنان واطفال اسرائیل نزد وی جمع شدند، زیرا قوم زارزار می‌گریستند. ۱ 1
Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele: mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.
و شکنیا ابن یحئیل که ازبنی عیلام بود جواب داد و به عزرا گفت: «ما به خدای خویش خیانت ورزیده، زنان غریب ازقومهای زمین گرفته‌ایم، لیکن الان امیدی برای اسرائیل در این باب باقی است. ۲ 2
Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi: « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele!
پس حال باخدای خویش عهد ببندیم که آن زنان و اولادایشان را برحسب مشورت آقایم و آنانی که از امرخدای ما می‌ترسند دور کنیم و موافق شریعت عمل نماییم. ۳ 3
Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso! Tika ete esalema kolanda Mobeko!
برخیز زیرا که این کار تو است و مابا تو می‌باشیم. پس قوی‌دل باش و به‌کار بپرداز.» ۴ 4
Telema, pamba te yo nde osengeli kotala likambo oyo! Tozali elongo na yo mpo na kosunga yo. Yika mpiko mpe sala! »
آنگاه عزرا برخاسته، روسای کهنه و لاویان و تمامی اسرائیل را قسم داد که برحسب این سخن عمل نمایند، پس قسم خوردند. ۵ 5
Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi.
و عزرا ازپیش روی خانه خدا برخاسته، به حجره یهوحانان بن الیاشیب رفت و نان نخورده و آب ننوشیده، به آنجا رفت، زیرا که به‌سبب تقصیراسیران ماتم گرفته بود. ۶ 6
Bongo Esidrasi alongwaki liboso ya Ndako ya Nzambe mpe akendeki na shambre ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi. Wana azalaki kuna, atikalaki kolia eloko moko te mpe komela mayi te; pamba te azalaki kokoba kosala matanga likolo ya makambo ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
و به همه اسیران در یهوداو اورشلیم ندا دردادند که به اورشلیم جمع شوند. ۷ 7
Bapanzaki sango kati na Yuda mpe na Yelusalemi ete bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu basangana na Yelusalemi.
و هر کسی‌که تا روز سوم، برحسب مشورت سروران و مشایخ حاضر نشود، اموال او ضبطگردد و خودش از جماعت اسیران جدا شود. ۸ 8
Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
پس در روز سوم که روز بیستم ماه نهم بود، همه مردان یهودا و بنیامین در اورشلیم جمع شدند وتمامی قوم در سعه خانه خدا نشستند. و به‌سبب این امر و به‌سبب باران، سخت می‌لرزیدند. ۹ 9
Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi.
آنگاه عزرای کاهن برخاسته، به ایشان گفت: «شما خیانت ورزیده و زنان غریب گرفته، جرم اسرائیل را افزوده‌اید. ۱۰ 10
Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango: — Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo.
پس الان یهوه خدای پدران خود را تمجید نمایید و به اراده او عمل کنید و خویشتن را از قومهای زمین و از زنان غریب جدا سازید.» ۱۱ 11
Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya.
تمامی جماعت به آواز بلند جواب دادند وگفتند: «چنانکه به ما گفته‌ای همچنان عمل خواهیم نمود. ۱۲ 12
Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi: — Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi!
اما خلق بسیارند و وقت باران است و طاقت نداریم که بیرون بایستیم و این امرکار یک یا دو روز نیست، زیرا که در این باب گناه عظیمی کرده‌ایم. ۱۳ 13
Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo.
پس سروران ما برای تمامی جماعت تعیین بشوند و جمیع کسانی که درشهرهای ما زنان غریب گرفته‌اند، در وقت های معین بیایند و مشایخ و داوران هر شهر همراه ایشان بیایند، تا حدت خشم خدای ما درباره این امر از ما رفع گردد.» ۱۴ 14
Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango.
لهذا یوناتان بن عسائیل و یحزیا ابن تقوه براین امر معین شدند و مشلام و شبتائی لاوی، ایشان را اعانت نمودند. ۱۵ 15
Kaka Jonatan, mwana mobali ya Azaeli, mpe Yakizia, mwana mobali ya Tikiva, elongo na Meshulami mpe Shabetayi, moto ya libota ya Levi, nde batelemelaki mokano oyo.
و اسیران چنین کردندو عزرای کاهن و بعضی از روسای آبا، برحسب خاندانهای آبای خود منتخب شدند و نامهای همه ایشان ثبت گردید. پس در روز اول ماه دهم، برای تفتیش این امر نشستند. ۱۶ 16
Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi.
و تا روز اول ماه اول، کار همه مردانی را که زنان غریب گرفته بودند، به اتمام رسانیدند. ۱۷ 17
Mpe, na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki koyekola makambo ya mibali nyonso oyo babalaki basi ya bapaya.
و بعضی از پسران کاهنان پیدا شدند که زنان غریب گرفته بودند. ازبنی یشوع بن یوصاداق و برادرانش معسیا و الیعزرو یاریب و جدلیا. ۱۸ 18
Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya: Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali: Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia.
و ایشان دست دادند که زنان خود را بیرون نمایند و قوچی به جهت قربانی جرم خود گذرانیدند. ۱۹ 19
Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango.
و از بنی امیر، حنانی و زبدیا. ۲۰ 20
Kati na bakitani ya Imeri: Anani mpe Zebadia.
و ازبنی حاریم، معسیا و ایلیا و شمعیا و یحیئیل وعزیا. ۲۱ 21
Kati na bakitani ya Arimi: Maaseya, Eli, Shemaya, Yeyeli mpe Oziasi.
و از بنی فشحور، الیوعینای و معسیا واسمعیل و نتنئیل و یوزاباد و العاسه. ۲۲ 22
Kati na bakitani ya Pashuri: Eliowenayi, Maaseya, Isimaeli, Netaneeli, Yozabadi mpe Eleasa.
و ازلاویان، یوزاباد و شمعی و قلایا که قلیطا باشد. وفتحیا و یهودا و الیعزر. ۲۳ 23
Kati na Balevi: Yozabadi, Shimei, Kelaya oyo bazalaki kobenga lisusu Kelita, Petaya, Yuda mpe Eliezeri.
و از مغنیان، الیاشیب واز دربانان، شلوم و طالم و اوری. ۲۴ 24
Kati na babeti mindule: Eliashibi. Kati na bakengeli bikuke: Shalumi, Telemi mpe Uri.
و اما ازاسرائیلیان: از بنی فرعوش، رمیا و یزیا و ملکیا ومیامین و العازار و ملکیا و بنایا. ۲۵ 25
Kati na bato mosusu ya Isalaele: kati na bakitani ya Pareoshi: Ramia, Yiziya, Malikiya, Miyamini, Eleazari, Malikiya mpe Benaya.
و از بنی عیلام، متنیا و زکریا و یحیئیل و عبدی و یریموت و ایلیا. ۲۶ 26
Kati na bakitani ya Elami: Matania, Zakari, Yeyeli, Abidi, Yeremoti mpe Eli.
و از بنی زتو، الیوعینای و الیاشیب و متنیا ویریموت و زاباد و عزیزا. ۲۷ 27
Kati na bakitani ya Zatu: Eliowenayi, Eliashibi, Matania, Yeremoti, Zabadi mpe Aziza.
و از بنی بابای، یهوحانان و حننیا و زبای و عتلای. ۲۸ 28
Kati na bakitani ya Bebayi: Yoanani, Anania, Zabayi mpe Atilayi.
و ازبنی بانی، مشلام و ملوک و عدایا و یاشوب و شال و راموت. ۲۹ 29
Kati na bakitani ya Bani: Meshulami, Maluki, Adaya, Yashubi, Sheali mpe Ramoti.
و از بنی فحت، موآب عدنا و کلال وبنایا و معسیا و متنیا و بصلئیل و بنوی و منسی. ۳۰ 30
Kati na bakitani ya Paati-Moabi: Adina, Kelali, Benaya, Maaseya, Matania, Betisaleyeli, Binuwi mpe Manase.
و از بنی حاریم، الیعزر و اشیا و ملکیا و شمعیا وشمعون. ۳۱ 31
Kati na bakitani ya Arimi: Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni,
و بنیامین و ملوک و شمریا. ۳۲ 32
Benjame, Maluki mpe Shemaria.
ازبنی حاشوم، متنای و متاته و زاباد و الیفلط ویریمای و منسی و شمعی. ۳۳ 33
Kati na bakitani ya Ashumi: Matinayi, Matata, Zabadi, Elifeleti, Yeremayi, Manase mpe Shimei.
از بنی بانی، معدای و عمرام و اوئیل. ۳۴ 34
Kati na bakitani ya Bani: Madayi, Amirami, Ueli,
و بنایا و بیدیا وکلوهی. ۳۵ 35
Benaya, Bedia, Keluwu,
و ونیا و مریموت و الیاشیب. ۳۶ 36
Vania, Meremoti, Eliashibi,
ومتنیا و متنای و یعسو. ۳۷ 37
Matania, Matinayi, Yasayi,
و بانی و بنوی و شمعی. ۳۸ 38
Bani, Binuwi, Shimei,
و شلمیا و ناتان و عدایا. ۳۹ 39
Shelemiya, Natan, Adaya,
ومکندبای و شاشای و شارای. ۴۰ 40
Makinadibayi, Shashayi, Sharayi,
و عزرئیل وشلمیا و شمریا. ۴۱ 41
Azareyeli, Shelemiya, Shemaria,
و شلوم و امریا و یوسف. ۴۲ 42
Shalumi, Amaria mpe Jozefi.
از بنی نبو، یعیئیل و متتیا و زاباد و زبینا و یدوو یوئیل و بنایا. ۴۳ 43
Kati na bakitani ya Nebo: Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya.
جمیع اینها زنان غریب گرفته بودند و بعضی از ایشان زنانی داشتند که از آنهاپسران تولید نموده بودند. ۴۴ 44
Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.

< عزرا 10 >