< حزقیال 42 >

و مرا به صحن بیرونی از راه سمت شمالی بیرون برد و مرا به حجره‌ای که مقابل مکان منفصل و روبروی بنیان بطرف شمال بود آورد. ۱ 1
Moto yango amemaki ngai kino na lopango ya libanda, na nzela oyo ekenda kino na ngambo ya nor; bongo amemaki ngai na ndako oyo ezalaki na bashambre ya Banganga-Nzambe, oyo na ngambo ya sude, etalana na Tempelo; mpe na ngambo ya nor, etalana na mir.
جلو طول صد ذراعی درشمالی بود و عرضش پنجاه ذراع بود. ۲ 2
Ndako yango ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe tuku mibale na mitano na mokuse, mpe ekuke na yango ezalaki na ngambo ya nor.
مقابل بیست ذراع که از آن صحن اندرونی بود و مقابل سنگفرشی که از صحن بیرونی بود دهلیزی روبروی دهلیزی در سه طبقه بود. ۳ 3
Ezalaki na ndako moko ya etaje etalana na ndako ya ba-etaje misato oyo ezalaki na kati-kati ya lopango ya kati mpe lopango ya libanda; molayi oyo ekabolaki ndako ya ba-etaje misato na mir ya Tempelo ezalaki na bametele pene zomi.
و پیش روی حجره‌ها بطرف اندرون خرندی به عرض ده ذراع بود و راهی یک ذراع و درهای آنها بطرف شمال بود. ۴ 4
Nzela moko ya bametele pene mitano na mokuse mpe bametele pene tuku mitano na molayi ezalaki liboso ya bashambre yango. Bongo, bikuke na yango ezalaki na ngambo ya nor.
و حجره های فوقانی کوتاه بود زیرا که دهلیزها از آنها می‌گرفتند بیشتر از آنچه آنها ازحجره های تحتانی و وسطی بنیان می‌گرفتند. ۵ 5
Bashambre ya etaje ya likolo ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe ya se, pamba te baveranda na yango ezalaki kozwa esika mingi koleka etaje ya kati-kati mpe ya se.
چونکه سه طبقه بود و ستونها مثل ستونهای صحن‌ها نداشت و از این سبب، طبقه فوقانی ازطبقات تحتانی و وسطی از زمین تنگتر می‌شد. ۶ 6
Bashambre ya etaje ya misato ezalaki na makonzi te ndenge ezalaki na lopango ya libanda. Boye, ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe oyo ya se.
وطول دیواری که بطرف بیرون مقابل حجره هابسوی صحن بیرونی روبروی حجره‌ها بود پنجاه ذراع بود. ۷ 7
Mir ya libanda ezalaki etalana na bashambre, mpe lopango ya libanda ezalaki liboso ya ndako ya bashambre: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano.
زیرا طول حجره هایی که در صحن بیرونی بود پنجاه ذراع بود و اینک جلو هیکل صدذراع بود. ۸ 8
Bashambre oyo ezalaki pene ya lopango ya libanda ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bashambre oyo ezalaki pene ya Tempelo ezalaki bametele pene tuku mitano na molayi.
و زیر این حجره‌ها از طرف شرقی مدخلی بود که از آن به آنها از صحن بیرونی داخل می‌شدند. ۹ 9
Na se ya bashambre, ezalaki na ekotelo moko na ngambo ya este soki okoteli wuta na lopango ya libanda.
و در حجم دیوار صحن که بطرف مشرق بود پیش روی مکان منفصل و مقابل بنیان حجره‌ها بود. ۱۰ 10
Bashambre yango ezalaki na ngambo ya sude, na molayi ya mir ya lopango ya libanda oyo ekenda kino na lopango ya Tempelo oyo etalana na mir ya libanda.
و راه مقابل آنها مثل نمایش راه حجره های سمت شمال بود، عرض آنها مطابق طول آنها بود و تمامی مخرج های اینها مثل رسم آنها و درهای آنها. ۱۱ 11
Mwa nzela moko ezalaki liboso na yango. Bashambre yango ezalaki ndenge moko na bashambre ya nor, na mokuse mpe na molayi; mpe bikuke na yango ezalaki ndenge moko na monene. Bikuke ya bashambre oyo ezalaki na ngambo ya nor
و مثل درهای حجره های سمت جنوب دری بر سر راه بود یعنی بر راهی که راست پیش روی دیوار مشرقی بود جایی که به آنها داخل می‌شدند. ۱۲ 12
ezalaki ndenge moko na bikuke ya bashambre ya ngambo ya sude. Ezalaki na ekuke moko na ebandeli ya mwa nzela oyo etalana na mir oyo ebatelaka, oyo ezali na ngambo ya este epai wapi bazalaki kokotela na bashambre.
و مرا گفت: «حجره های شمالی وحجره های جنوبی که پیش روی مکان منفصل است، حجره های مقدس می‌باشد که کاهنانی که به خداوند نزدیک می‌آیند قدس اقداس را درآنها می‌خورند و قدس اقداس و هدایای آردی وقربانی های گناه و قربانی های جرم را در آنهامی گذارند زیرا که این مکان مقدس است. ۱۳ 13
Bongo moto yango alobaki na ngai: « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule: makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.
وچون کاهنان داخل آنها می‌شوند دیگر از قدس به صحن بیرونی بیرون نمی آیند بلکه لباسهای خودرا که در آنها خدمت می‌کنند در آنها می‌گذارندزیرا که آنها مقدس می‌باشد و لباس دیگرپوشیده، به آنچه به قوم تعلق دارد نزدیک می‌آیند.» ۱۴ 14
Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »
و چون پیمایشهای خانه اندرونی را به اتمام رسانید، مرا بسوی دروازه‌ای که رویش به سمت مشرق بود بیرون آورد و آن را از هر طرف پیمود. ۱۵ 15
Tango asilisaki komeka molayi ya kati ya Tempelo, amemaki ngai na libanda, na nzela ya ekuke ya este, mpe amekaki molayi ya lopango zingazinga ya Tempelo.
جانب شرقی آن را به نی پیمایش، پانصد نی پیمود یعنی به نی پیمایش آن را از هرطرف (پیمود). ۱۶ 16
Amekaki molayi ya ngambo ya este na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
و جانب شمالی را به نی پیمایش از هر طرف پانصد نی پیمود. ۱۷ 17
Amekaki molayi ya ngambo ya nor na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
و جانب جنوبی را به نی پیمایش، پانصد نی پیمود. ۱۸ 18
Amekaki molayi ya ngambo ya sude na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
پس به سوی جانب غربی برگشته، آن را به نی پیمایش پانصد نی پیمود. ۱۹ 19
Amekaki molayi ya ngambo ya weste na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano.
هر‌چهار جانب آن را پیمود وآن را دیواری بود که طولش پانصد و عرضش پانصد (نی ) بود تا در میان مقدس و غیرمقدس فرق گذارد. ۲۰ 20
Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.

< حزقیال 42 >