< اول سموئیل 12 >

و سموئیل به تمامی بنی‌اسرائیل گفت: «اینک قول شما را در هرآنچه به من گفتید، شنیدم و پادشاهی بر شما نصب نمودم. ۱ 1
Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele: — Napesi nyonso oyo bolobaki na ngai: natieli bino mokonzi.
وحال اینک پادشاه پیش روی شما راه می‌رود و من پیر و مو سفید شده‌ام، و اینک پسران من با شمامی باشند، و من از جوانیم تا امروز پیش روی شماسلوک نموده‌ام. ۲ 2
Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.
اینک من حاضرم، پس به حضور خداوند و مسیح او بر من شهادت دهید که گاو که را گرفتم؟ و الاغ که را گرفتم و بر که ظلم نموده، که را ستم کردم و از دست که رشوه گرفتم تا چشمان خود را به آن کور سازم و آن را به شمارد نمایم.» ۳ 3
Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani? Nazwaki ane ya nani? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.
گفتند: «بر ما ظلم نکرده‌ای و بر ما ستم ننموده‌ای و چیزی از دست کسی نگرفته‌ای.» ۴ 4
Bato bazongiselaki ye: — Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto.
به ایشان گفت: «خداوند بر شماشاهد است و مسیح او امروز شاهد است که چیزی در دست من نیافته‌اید.» گفتند: «او شاهداست.» ۵ 5
Samuele alobaki na bango: — Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai. Bato bazongisaki: — Azali penza Motatoli.
و سموئیل به قوم گفت: «خداوند است که موسی و هارون را مقیم ساخت و پدران شما را اززمین مصر برآورد. ۶ 6
Bongo Samuele alobaki na bato: — Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito.
پس الان حاضر شوید تا به حضور خداوند با شما درباره همه اعمال عادله خداوند که با شما و با پدران شما عمل نمود، محاجه نمایم. ۷ 7
Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.
چون یعقوب به مصر آمد وپدران شما نزد خداوند استغاثه نمودند، خداوندموسی و هارون را فرستاد که پدران شما را از مصربیرون آورده، ایشان را در این مکان ساکن گردانیدند. ۸ 8
Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo.
و چون یهوه خدای خود را فراموش کردند ایشان را به‌دست سیسرا، سردار لشکرحاصور، و به‌دست فلسطینیان و به‌دست پادشاه موآب فروخت که با آنها جنگ کردند. ۹ 9
Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.
پس نزدخداوند فریاد برآورده، گفتند: «گناه کرده‌ایم زیراخداوند را ترک کرده بعلیم و عشتاروت را عبادت نموده‌ایم، و حال ما را از دست دشمنان ما رهایی ده و تو را عبادت خواهیم نمود. ۱۰ 10
Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi; balobaki: « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »
پس خداوندیربعل و بدان و یفتاح و سموئیل را فرستاده، شمارا از دست دشمنان شما که در اطراف شما بودند، رهانید و در اطمینان ساکن شدید. ۱۱ 11
Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.
و چون دیدید که ناحاش، پادشاه بنی عمون، بر شمامی آید به من گفتید: نی بلکه پادشاهی بر ماسلطنت نماید، و حال آنکه یهوه، خدای شما، پادشاه شما بود. ۱۲ 12
Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai: « Te! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.
و الان اینک پادشاهی که برگزیدید و او را طلبیدید. و همانا خداوند بر شماپادشاهی نصب نموده است. ۱۳ 13
Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino.
اگر از خداوندترسیده، او را عبادت نمایید و قول او را بشنوید واز فرمان خداوند عصیان نورزید، و هم شما و هم پادشاهی که بر شما سلطنت می‌کند، یهوه، خدای خود را پیروی نمایید خوب. ۱۴ 14
Kobanda lelo, soki botosi Yawe, soki bosaleli Ye, soki bobateli mitindo na Ye, mpe soki bino elongo na mokonzi oyo azali kokamba bino bolandi Yawe, Nzambe na bino, makambo nyonso ekotambola malamu.
و اما اگر قول خداوند را نشنوید و از فرمان خداوند عصیان ورزید، آنگاه دست خداوند چنانکه به ضد پدران شما بود، به ضد شما نیز خواهدبود. ۱۵ 15
Kasi soki botosi Yawe te mpe bobateli te mibeko na Ye, loboko na Ye ekobalukela bino ndenge ebalukelaki bakoko na bino.
پس الان بایستید و این کار عظیم را که خداوند به نظر شمابجا می‌آورد، ببینید. ۱۶ 16
Yango wana sik’oyo lisusu, bobongama mpo na kotala likambo monene oyo Yawe alingi kosala na miso na bino.
آیا امروز وقت درو گندم نیست؟ از خداوند استدعا خواهم نمود و اورعدها و باران خواهد فرستاد تا بدانید و ببینید که شرارتی که از طلبیدن پادشاه برای خود نمودیددر نظر خداوند عظیم است.» ۱۷ 17
Boni, mokolo ya lelo ezali te tango ya kobuka ble? Nakobelela Yawe mpo ete atinda kake mpe mvula, bongo bokomona mpe bokososola ndenge nini ezali monene, mabe oyo bosalaki na miso ya Yawe tango bosengaki mokonzi.
پس سموئیل ازخداوند استدعا نمود و خداوند در همان روزرعدها و باران فرستاد، و تمامی قوم از خداوند وسموئیل بسیار ترسیدند. ۱۸ 18
Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele.
و تمامی قوم به سموئیل گفتند: «برای بندگانت از یهوه، خدای خود استدعا نما تانمیریم، زیرا که بر تمامی گناهان خود این بدی راافزودیم که برای خود پادشاهی طلبیدیم.» ۱۹ 19
Bato nyonso balobaki na Samuele: — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.
وسموئیل به قوم گفت: «مترسید! شما تمامی این بدی را کرده‌اید، لیکن از پیروی خداوندبرنگردید، بلکه خداوند را به تمامی دل خودعبادت نمایید. ۲۰ 20
Samuele azongiselaki bango: — Bobanga te! Solo, bosalaki mabe nyonso wana; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba.
و در عقب اباطیلی که منفعت ندارد و رهایی نتواند داد، چونکه باطل است، برنگردید. ۲۱ 21
Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina.
زیرا خداوند به‌خاطر نام عظیم خود قوم خود را ترک نخواهد نمود، چونکه خداوند را پسند آمد که شما را برای خود قومی سازد. ۲۲ 22
Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.
و اما من، حاشا از من که به خداوند گناه ورزیده، ترک دعا کردن برای شما نمایم، بلکه راه نیکو و راست را به شما تعلیم خواهم داد. ۲۳ 23
Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.
لیکن از خداوند بترسید و او را به راستی به تمامی دل خود عبادت نمایید و در کارهای عظیمی که برای شما کرده است، تفکر کنید. ۲۴ 24
Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.
و اما اگر شرارت ورزید، هم شما و هم پادشاه شما، هلاک خواهیدشد.» ۲۵ 25
Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.

< اول سموئیل 12 >