< اول پطرس 3 >

همچنین‌ای زنان، شوهران خود را اطاعت نمایید تا اگر بعضی نیز مطیع کلام نشوند، سیرت زنان، ایشان را بدون کلام دریابد، ۱ 1
Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,
چونکه سیرت طاهر و خداترس شما را بینند. ۲ 2
tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.
و شما رازینت ظاهری نباشد، از بافتن موی و متحلی شدن به طلا و پوشیدن لباس، ۳ 3
Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko;
بلکه انسانیت باطنی قلبی در لباس غیر فاسد روح حلیم و آرام که نزدخدا گرانبهاست. ۴ 4
kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati: esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.
زیرا بدینگونه زنان مقدسه درسابق نیز که متوکل به خدا بودند، خویشتن رازینت می‌نمودند و شوهران خود را اطاعت می‌کردند. ۵ 5
Ezalaki ndenge wana nde basi ya bule oyo, na kala, bazalaki kotia elikya na bango na Nzambe bazalaki komikomisa kitoko. Bazalaki kotosa mibali na bango,
مانند ساره که ابراهیم را مطیع می‌بودو او را آقا می‌خواند و شما دختران او شده‌اید، اگر نیکویی کنید و از هیچ خوف ترسان نشوید. ۶ 6
lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai. » Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.
و همچنین‌ای شوهران، با فطانت با ایشان زیست کنید، چون با ظروف ضعیف تر زنانه، وایشان را محترم دارید چون با شما وارث فیض حیات نیز هستند تا دعاهای شما بازداشته نشود. ۷ 7
Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.
خلاصه همه شما یکرای و همدرد و برادردوست و مشفق و فروتن باشید. ۸ 8
Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.
و بدی بعوض بدی و دشنام بعوض دشنام مدهید، بلکه برعکس برکت بطلبید زیرا که می‌دانید برای این خوانده شده‌اید تا وارث برکت شوید. ۹ 9
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
زیرا «هرکه می‌خواهد حیات را دوست دارد و ایام نیکو بیند، زبان خود را از بدی و لبهای خود را از فریب گفتن باز بدارد؛ ۱۰ 10
Solo, moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi mpe kobika mikolo ya esengo asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe, mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta;
از بدی اعراض نماید و نیکویی رابه‌جا آورد؛ سلامتی را بطلبد و آن را تعاقب نماید. ۱۱ 11
asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu, koluka kimia mpe kokoba na yango,
از آنرو که چشمان خداوند بر عادلان است وگوشهای او به سوی دعای ایشان، لکن روی خداوند بر بدکاران است.» ۱۲ 12
pamba te miso ya Nkolo etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka losambo na bango. Kasi Nkolo apesaka bato mabe mokongo.
و اگر برای نیکویی غیور هستید، کیست که به شما ضرری برساند؟ ۱۳ 13
Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu?
بلکه هرگاه برای عدالت زحمت کشیدید، خوشابحال شما. پس ازخوف ایشان ترسان و مضطرب مشوید. ۱۴ 14
Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.
بلکه خداوند مسیح را در دل خود تقدیس نمایید وپیوسته مستعد باشید تا هرکه سبب امیدی را که دارید از شما بپرسد، او را جواب دهید، لیکن باحلم و ترس. ۱۵ 15
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,
و ضمیر خود را نیکو بدارید تاآنانی که بر سیرت نیکوی شما در مسیح طعن می‌زنند، در همان چیزی که شما را بد می‌گویندخجالت کشند، ۱۶ 16
kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.
زیرا اگر اراده خدا چنین است، نیکوکار بودن و زحمت کشیدن، بهتر است ازبدکردار بودن. ۱۷ 17
Eleki malamu komona pasi na kosala bolamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, na esika ete omona pasi na kosala mabe.
زیرا که مسیح نیز برای گناهان یک بار زحمت کشید، یعنی عادلی برای ظالمان، تا ما را نزد خدا بیاورد؛ در حالیکه بحسب جسم مرد، لکن بحسب روح زنده گشت، ۱۸ 18
Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.
و به آن روح نیز رفت و موعظه نمود به ارواحی که درزندان بودند، ۱۹ 19
Ezali mpe kaka na nguya ya Molimo yango nde akendeki kosakola elonga na Ye epai ya milimo oyo ezalaki ya kokangama kati na boloko,
که سابق نافرمانبردار بودندهنگامی که حلم خدا در ایام نوح انتظار می‌کشید، وقتی که کشتی بنا می‌شد، که در آن جماعتی قلیل یعنی هشت نفر به آب نجات یافتند، ۲۰ 20
milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.
که نمونه آن یعنی تعمید اکنون ما را نجات می‌بخشد (نه دور کردن کثافت جسم بلکه امتحان ضمیر صالح به سوی خدا) بواسطه برخاستن عیسی مسیح، ۲۱ 21
Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto
که به آسمان رفت و بدست راست خدا است وفرشتگان و قدرتها و قوات مطیع او شده‌اند. ۲۲ 22
oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.

< اول پطرس 3 >